Etanda ya makambo ezali na kati
15/11/2013
© 2013 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania.
NIMERO YA BOYEKOLI
30 SANZA YA ZOMI NA MIBALE 2013–5 SANZA YA YAMBO 2014
“Bózala na bokɛngi, bóbondelaka mpenza”
LOKASA 3 • NZEMBO: 67, 81
6-12 SANZA YA YAMBO 2014
Ndenge nini tokoki komonisa ete tozali “kozela”?
LOKASA 10 • NZEMBO: 119, 32
13-19 SANZA YA YAMBO 2014
Babateli ya mpate nsambo mpe bankumu mwambe bazali banani lelo oyo?
LOKASA 16 • NZEMBO: 43, 123
20-26 SANZA YA YAMBO 2014
Tosá babateli ya mpate oyo Yehova atye
LOKASA 21 • NZEMBO: 125, 122
27 SANZA YA YAMBO 2014–2 SANZA YA MIBALE 2014
Babateli ya mpate, bómekola babateli minene ya bampate
LOKASA 26 • NZEMBO: 5, 84
MASOLO YA BOYEKOLI
▪ “Bózala na bokɛngi, bóbondelaka mpenza”
Lokola nsuka ya mokili mabe ya Satana ekómi pene, ezali na ntina mingi ete tólala mpɔngi te na elimo. Lisolo oyo emonisi ndenge oyo kozala na bokɛngi mpe kobondela mpenza ekoki kosalisa biso tólala mpɔngi te.
▪ Ndenge nini tokoki komonisa ete tozali “kozela”?
Na lisolo oyo, okomona mateya oyo tokoki kozwa na motema molai ya mosakoli Mika. Elobeli makambo oyo ekomonisa ete ntango oyo tozalaki kozela ete Yehova abebisa mokili oyo mabe ekómi na nsuka. Okomona mpe ndenge oyo tokoki komonisa botɔndi mpo na motema molai ya Nzambe.
▪ Babateli ya mpate nsambo mpe bankumu mwambe bazali banani lelo oyo?
Tokoki kozwa mateya ya ntina mingi na lisolo oyo elobeli ndenge Senakeribe ayaki kobundisa Yerusaleme na mikolo ya Hizikiya. Lisolo oyo elobeli makambo ya ntina mingi oyo etali bandeko oyo bazali na mokumba ya kotambwisa lisangá.
▪ Tosá babateli ya mpate oyo Yehova atye
▪ Babateli ya mpate, bómekola babateli minene ya bampate
Lisolo ya liboso elobeli ndenge oyo Yehova ná Yesu bazali kotambwisa etonga na bango oyo ezali awa na mabele mpe emonisi ndenge oyo bampate basengeli kolanda litambwisi na bango. Lisolo ya mibale elobeli ezaleli oyo bankulutu ya lisangá basengeli kosala makasi bámonisa, wana bazali kokokisa mokumba na bango ya babateli ya mpate basungi.
EZIPELI: Batatoli ya Yehova bazali kosakola na esika oyo engbunduka etɛlɛmaka na Tokyo. Mokolo na mokolo, bato koleka milio 2 na ndambo bautaka mosika mpe bayaka mosala na Tokyo. Bandeko bazali kosala milende mpo na koteya bato oyo bakutaka na ndako te ntango bazali kosakola ndako na ndako
JAPON
MOTÁNGO YA BATO:
126 536 000
MWAYENE YA BASAKOLI:
216 692
BABONGISI-NZELA YA SANZA NA SANZA:
65 245