Etanda ya makambo ezali na kati
15/10/2013
© 2013 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania.
NIMERO YA BOYEKOLI
2-8 SANZA YA ZOMI NA MIBALE 2013
Bozalisi emonisaka Nzambe ya bomoi
LOKASA 7 • NZEMBO: 110, 15
9-15 SANZA YA ZOMI NA MIBALE 2013
“Bósalela Yehova lokola baombo”
LOKASA 12 • NZEMBO: 62, 84
16-22 SANZA YA ZOMI NA MIBALE 2013
Tózwa mateya na libondeli moko oyo ebongisamaki malamu
LOKASA 21 • NZEMBO: 68, 6
23-29 SANZA YA ZOMI NA MIBALE 2013
Salá na boyokani na libondeli ya Yesu
LOKASA 26 • NZEMBO: 57, 56
MASOLO YA BOYEKOLI
▪ Bozalisi emonisaka Nzambe ya bomoi
Nzambe oyo amonanaka te nde akelá molɔ́ngɔ́ mobimba oyo emonanaka. Ondimaka yango na motema na yo mobimba? Bato mosusu bandimaka yango te. Ndenge nini okoki kosalisa basusu báyeba solo oyo etali Mozalisi mpe kolendisa kondima na yo moko epai na ye? Lisolo oyo epesi eyano na mituna yango.
▪ “Bósalela Yehova lokola baombo”
Biblia elendisi bakristo básalela Yehova lokola baombo. Lisolo oyo elobeli ebongiseli moko ya Mibeko ya Moize oyo etalelaki baombo, ndenge oyo tokoki koboya kozala baombo ya Satana mpe ya makambo ya mokili oyo. Emonisi mpe mapamboli ya kozala baombo ya Nzambe.
▪ Tózwa mateya na libondeli moko oyo ebongisamaki malamu
▪ Salá na boyokani na libondeli ya Yesu
Soki tozali komanyola Liloba ya Nzambe mokolo na mokolo, tokokóma kosala mabondeli ya malamu koleka. Lisolo ya liboso elobeli libondeli ya malamu oyo Balevi basalaki mpo na libota ya Nzambe mpamba te bamanyolaki na Liloba ya Nzambe. Lisolo ya mibale emonisi liteya oyo tokoki kozwa na libondeli moko oyo Yesu asalaki. Mabondeli yango mibale emonisi ete tosengeli kotyaka mokano ya Yehova na esika ya liboso, mpe matomba na biso moko na esika ya mibale.
MASOLO MOSUSU
3 Bamipesaki na bolingo na bango moko—Na Philippines
17 Kotyela Yehova motema esalisi biso tózala na bomoi ya esengo
EZIPELI: Ndeko moko azali kosakola na engumba Panajachel, oyo ezali pene ya Laki Atitlan. Na Guatemala, Batatoli ya Yehova basakolaka na monɔkɔ ya Espagnol mpe na minɔkɔ mosusu 11
GUATEMALA
MOTÁNGO YA BATO:
15 169 000
BASAKOLI:
34 693
BAYEKOLI YA BIBLIA:
47 606