Etanda ya makambo ezali na kati
15/08/2013
© 2013 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania. All rights reserved.
NIMERO YA BOYEKOLI
30 SANZA YA LIBWA 2013–6 SANZA YA ZOMI 2013
LOKASA 3 • NZEMBO: 125, 66
7-13 SANZA YA ZOMI 2013
“Kosilikela Yehova” soki moke te
LOKASA 10 • NZEMBO: 119, 80
14-20 SANZA YA ZOMI 2013
Tótyelanaka likebi mpe tólendisanaka
LOKASA 18 • NZEMBO: 124, 20
21-27 SANZA YA ZOMI 2013
Bókanisa lolenge ya bato oyo bosengeli kozala
LOKASA 23 • NZEMBO: 61, 43
MASOLO YA BOYEKOLI
▪ Bosantisami
Biso basaleli ya Yehova tozali bato oyo basantisami, elingi koloba totyami pembeni mpo na mosala mosantu. Na boyekoli oyo, tokotalela Nehemia mokapo 13. Tokotalela makambo minei oyo ekoki kosalisa biso tótikala basantu.
▪ “Kosilikela Yehova” soki moke te
Lisolo oyo ekolobela makambo mitano oyo ekoki komema mokristo moko ya sembo akóma “kosilikela Yehova.” (Mas. 19:3) Na nsima, tokotalela malamumalamu makambo mitano oyo ekosalisa biso tótika soki moke te ete mikakatano na biso etinda biso tópesa Yehova foti.
▪ Tótyelanaka likebi mpe tólendisanaka
▪ Bókanisa lolenge ya bato oyo bosengeli kozala
Lisolo ya liboso na masolo oyo mibale ekolobela ndenge oyo tokoki kosalisana mpo tózala na ekateli ya kokoba kosalela Yehova atako tozali kokutana na mikakatano. Lisolo ya mibale ekomonisa ndenge oyo tokoki kolonga kotɛlɛma mitambo oyo Satana azali kosalela mpo na koluka kobebisa boyokani na biso na Nzambe.
MASOLO MOSUSU
9 Yehova ‘azali komema mokumba na ngai mokolo na mokolo’
15 Baboti—Bóteya bana na bino banda bomwana
28 Elisha amonaki makalo oyo ezali kopela mɔtɔ—Yo mpe omonaka yango?
EZIPELI: Basakoli ya Bokonzi bazali kosakola ndako na ndako na Erap, moko ya bamboka ya mosika oyo etondi na bangomba mpe mabwaku, na etúká ya Morobe, na Papouasie-Nouvelle-Guinée
PAPOUASIE-NOUVELLE-GUINÉE
Motángo ya bato: 7 013 829
Mwayene ya basakoli: 3 770
Babongisi-nzela ya sanza na sanza: 367
Mwayene ya bayekoli ya Biblia: 5 091
Bayangani na Ekaniseli na 2012: 28 909
Mosala ya kobongola: Minɔkɔ 14
Na mwayene, mosakoli mokomoko ayambaki bato motoba na Ekaniseli