Etanda ya makambo ezali na kati
15/03/2013
© 2013 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania. All rights reserved.
NIMERO YA BOYEKOLI
29 SANZA YA MINEI 2013–5 SANZA YA MITANO 2013
Mpo na baoyo balingaka Yehova, ‘eloko ya kobɛtisa libaku ezali te’
LOKASA 3 • NZEMBO: 45, 32
6-12 SANZA YA MITANO 2013
Ozali na ‘motema moko mpo na koyeba’ Yehova?
LOKASA 8 • NZEMBO: 62, 60
13-19 SANZA YA MITANO 2013
Lokola “boyebi Nzambe,” etikali nini?
LOKASA 13 • NZEMBO: 81, 135
20-26 SANZA YA MITANO 2013
Yehova azali esika na biso ya kofanda
LOKASA 19 • NZEMBO: 51, 95
27 SANZA YA MITANO 2013–2 SANZA YA MOTOBA 2013
Kumisá nkombo monene ya Yehova
LOKASA 24 • NZEMBO: 27, 101
MASOLO YA BOYEKOLI
▪ Mpo na baoyo balingaka Yehova, ‘eloko ya kobɛtisa libaku ezali te’
Bakristo nyonso bazali na momekano ya mbangu mpo na kozwa libonza ya bomoi ya seko. Kasi lokola tosangolá lisumu, biso nyonso tobɛtaka mabaku. Lisolo oyo ekosalisa biso tóyeba makambo mitano oyo ekoki kobɛtisa biso libaku, mpe ekolimbola nini tokoki kosala mpo tótika te ete yango epekisa biso tólonga na momekano yango.
▪ Ozali na ‘motema moko mpo na koyeba’ Yehova?
Mokanda ya Yirimia ezali na makambo mingi ya koteya biso mpo na motema. Lisolo oyo ekosalisa biso tóyeba soki ‘motema oyo ekatami ngenga te’ ezali nini, mpe ndenge nini motema ya ndenge wana ekoki kozala likama ata mpo na bakristo. Ekosalisa mpe biso tóyeba ndenge nini tokoki kozala na ‘motema mpo na koyeba’ Yehova.—Yir. 9:26; 24:7.
▪ Lokola “boyebi Nzambe,” etikali nini?
Matambe nini moto asengeli kosala mpo ayeba Nzambe mpe Nzambe ayeba ye? Ndenge nini mpe mpo na nini mokristo akobaka kokola ata nsima ya kokɔmɛla na elimo? Lisolo oyo ekosalisa yo oyanola na mituna wana.
▪ Yehova azali esika na biso ya kofanda
Tofandi na mokili oyo ezali esika ya malamu te mpo na basaleli ya Nzambe; atako bongo, tosengeli kobanga te. Lisolo oyo emonisi ete Yehova Nzambe na biso azali esika ya malamu koleka oyo tokoki kofanda na kimya.
▪ Kumisá nkombo monene ya Yehova
Kozala moko ya bato oyo babengami na nkombo ya Nzambe elimboli nini? Kotambola na nkombo yango elimboli nini? Mpe ndenge nini Nzambe atalelaka bato oyo bamemyaka nkombo na ye te? Lisolo oyo epesi biyano na mituna wana.
MASOLO MOSUSU
18 Okoki kobɔndisama mpe kobɔndisa basusu
29 Josèphe nde moto akomaki yango mpenza?
EZIPELI: Finlande ezali na bokula moko ya molai oyo ezali na bisanga ebele. Ezali mpe na bankóto ya balaki, mingimingi na ntei mpe na ɛsti ya Finlande. Bandeko mosusu oyo bakendaka kosakola mpo na mwa ntango na esika oyo mposa ezali monene basalelaka bwato mpo na kopesa litatoli
FINLANDE
MOTÁNGO YA BATO:
5 375 276
MOTATOLI 1
MPO NA BATO 283
BABONGISI-NZELA YA SANZA NA SANZA:
1 824