Etanda ya makambo ezali na kati
15 Novɛmbɛ 2012
© 2012 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania. All rights reserved.
Nimero ya boyekoli
MASOLO YA BOYEKOLI
24–30 DESƐMBƐ 2012
“Teyá ngai nayeba kosala mokano na yo”
LOKASA 3 • NZEMBO: 69, 120
31 DESƐMBƐ 2012–6 YANUALI 2013
Yesu apesi biso ndakisa ya komikitisa
LOKASA 10 • NZEMBO: 84, 82
7–13 YANUALI 2013
Loná ezaleli ya moto oyo azali mpenza moke
LOKASA 15 • NZEMBO: 26, 68
14–20 YANUALI 2013
Osengeli kosala nini mpo Yehova alimbisa yo?
LOKASA 21 • NZEMBO: 67, 91
21–27 YANUALI 2013
LOKASA 26 • NZEMBO: 77, 118
NTINA YA MASOLO YA BOYEKOLI
LISOLO YA BOYEKOLI 1 NKASA 3-7
Davidi, mokonzi ya Yisraele, azalaki kozwa nkombo ya Yehova mpe mokano na ye na motuya mingi. Azalaki mpe koluka koyeba mitinda oyo esimbi Mibeko ya Nzambe mpe abondelaki Yehova ateya ye ayeba kosala mokano na ye, ndenge lisolo oyo emonisi yango. Lisolo yango ekosalisa mpe biso tóyeba mpo na nini tosengeli ntango nyonso kotalela makambo ndenge oyo Yehova atalelaka yango.
MASOLO YA BOYEKOLI 2, 3 NKASA 10-19
Lokola bakristo ya solo bazali bayekoli ya Yesu, bayebi ete basengeli kozala na komikitisa. Lisolo ya liboso elobeli ndakisa ya komikitisa oyo Yesu apesaki mpo ete tólanda matambe na ye malamumalamu. Lisolo ya mibale elobeli ndenge oyo tokoki kolona ezaleli ya moto oyo azali mpenza moke mpe komonisa ezaleli yango na bomoi na biso.
MASOLO YA BOYEKOLI 4, 5 NKASA 21-30
Masolo yango ekosalisa biso tómona ete Yehova andimaka kolimbisa ata masumu ya minene. Ezali solo ete na bantango mosusu, ekoki kozala mpasi tóndima kolimbisa moto oyo asali biso mabe. Kasi, mitinda ya Biblia ekoki kosalisa biso tóboya kobomba nkanda na motema mpe tóndima kolimbisa.
MASOLO MOSUSU
8 Biloko oyo eleki mingi epai na bango ezipa oyo ezangi
EZIPELI: Ndeko moko azali kosakola na mwa engumba Albarracín, na Espagne. Lisangá ya Teruel oyo ezali na basakoli 78, teritware na bango esangisi Albarracín mpe bamboka ná bingumba mikemike 188
ESPAGNE
MOTÁNGO YA BATO
47 042 900
BASAKOLI
111 101
BAYANGANI NA EKANISELI NA 2012
192 942