Etanda ya makambo ezali na kati
15 Sɛtɛmbɛ 2012
© 2012 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania. All rights reserved.
Nimero ya boyekoli
MASOLO YA BOYEKOLI
22–28 ƆKƆTƆBƐ 2012
LOKASA 3 • NZEMBO: 133, 132
29 ƆKƆTƆBƐ 2012–4 NOVƐMBƐ 2012
Kimya na boumeli ya mbula nkóto mpe mpo na libela!
LOKASA 8 • NZEMBO: 55, 134
5–11 NOVƐMBƐ 2012
Zwá liteya na motema molai ya Yehova mpe ya Yesu
LOKASA 18 • NZEMBO: 35, 90
12–18 NOVƐMBƐ 2012
“Boyebi mokolo te mpe ngonga te”
LOKASA 23 • NZEMBO: 43, 92
19–25 NOVƐMBƐ 2012
Mayangani ya bato oyo basalelaka Yehova na esengo
LOKASA 28 • NZEMBO: 119, 118
NTINA YA MASOLO YA BOYEKOLI
MASOLO YA BOYEKOLI 1, 2 NKASA 3-12
Makambo minene ekosalema na mokili mosika te. Masolo oyo elobeli makambo zomi oyo tosengeli kobatela na makanisi. Mitano kati na yango etaleli kobomama ya mokili ya Satana mpe mitano mosusu ekosalema na mokili ya sika.
LISOLO YA BOYEKOLI 3 NKASA 18-22
Biso nyonso tozali na mposa ete mokili oyo mabe ekufa mpo Paradiso oyo esakolamaki ebanda. Ezala tozelaka yango banda basanza to bambula, mpo na nini ezali na ntina tózala na motema molai? Lisolo oyo ekosalisa biso tókolisa motema molai oyo esengeli.
LISOLO YA BOYEKOLI 4 NKASA 23-27
Basaleli nyonso ya Nzambe bazalaka na mposa ete mokili oyo mabe ekufa. Lisolo oyo ekomonisa ete kozanga koyeba mokolo mpe ngonga oyo nsuka yango ekoya ezali na matomba mingi.
LISOLO YA BOYEKOLI 5 NKASA 28-32
Banda kalakala mayangani ezalaka na esika monene na losambo ya solo. Lisolo oyo ekolobela mwa makambo minene ya mayangani yango na ntango ya kala mpe na ntango na biso mpe ekomonisa matomba oyo tozwaka na mayangani yango.
MASOLO MOSUSU
13 Biteyelo ya Teokrasi emonisaka bolingo ya Yehova
EZIPELI: Na ekólo Philippines, basakoli balukaka kopesa litatoli epai ya bato nyonso, na ndakisa epai ya mobali oyo afandi na kati ya tukutuku na ye na Esanga Luzon
PHILIPPINES
BASAKOLI NA PHILIPPINES
177 635
BABONGISI-NZELA YA SANZA NA SANZA
29 699
BATO OYO BAZWAKI BATISIMO NA 2011
8 586
MIKANDA EBONGOLAMAKA NA MINƆKƆ
21