Kondima makambo ya sika esalisá ngai mingi
Lisolo ya James Thompson
Ntango nabotamaki na 1928, na sudi ya États-Unis, bokabwani makasi ezalaki kati na mindɛlɛ ná baindo. Moto oyo aboyi bokabwani yango akokaki kokɔta bolɔkɔ to kozwa etumbu mosusu ya makasi koleka.
NA NTANGO wana, na bisika mosusu ya États-Unis, Batatoli ya Yehova ya mindɛlɛ mpe ya baindo basengelaki kozala na masangá oyo ekeseni, bazongazonga mpe bitúká oyo ekeseni. Na 1937, tata na ngai akómaki Mosaleli ya lisangá (lelo oyo mokambi-misala ya bankulutu) na lisangá ya baindo na engumba Chattanooga, na etúká ya Tennessee. Ndeko Henry Nichols azalaki Mosaleli ya lisangá na lisangá ya mindɛlɛ.
Nabosanaka te mokolo moko na butu ntango nazalaki elenge, nafandaki na veranda ya nsima na ndako na biso mpe nayokaki tata azali kosolola na Ndeko Nichols. Atako nakangaki ntina ya makambo nyonso te oyo bazalaki kolobela, nazalaki kondima makanisi ya tata, wana bango mibale bazalaki kolobela ndenge malamu ya kokoba kosakola na kotalela ndenge makambo ezalaki.
Mwa moke liboso, na 1930, likama moko ekwelaki libota na biso. Mama na biso akufaki; azalaki kaka na mbula 20. Tata atikalaki ye moko mpo na kobɔkɔla biso; yaya na ngai ya mwasi Doris azalaki na mbula minei mpe ngai nazalaki kaka na mbula mibale. Atako eumelaki naino te banda tata azwaki batisimo, azalaki kokola malamu na elimo.
Bandakisa oyo namekolaki
Na 1933, tata akutanaki na ndeko mwasi moko kitoko na nkombo Lillie Mae Gwendolyn Thomas, mpe mwa moke na nsima babalanaki. Tata ná mama bazalaki kosalela Yehova na bosembo mpe yango ezalaki ndakisa malamu mpo na ngai ná Doris.
Na 1938, basɛngaki masangá ya Batatoli ya Yehova endima ekateli oyo ezwamaki ete biro monene na Brooklyn, na etúká ya New York, nde esengeli kotya bankulutu na masangá. Bankulutu basengelaki koponama lisusu na voti te. Atako bandeko mosusu ya Chattanooga bakakatanaki mpo na kondima mbongwana yango, tata alobaki ete andimi na motema mobimba mbongwana wana oyo esalemi na lisangá. Ndakisa na ye ya bosembo, mpe ndenge mama azalaki kosala na bomoko elongo na ye, esalisaka ngai tii lelo.
Batisimo mpe mosala ya ntango nyonso
Na 1940, bandeko mingi ya lisangá na biso bafutaki motuka moko mpo emema bango na liyangani ya etúká na engumba Detroit, na etúká ya Michigan. Bandeko mosusu oyo tokendaki na bango na bisi oyo tozwaki bazwaki batisimo kuna. Bamosusu balukaki koyeba ntina oyo nazwaki batisimo te, mpo nazalaki kosakola banda ntango nazalaki na mbula mitano mpe nazalaki molende na mosala yango.
Ntango batunaki ngai mpo na nini nazwi batisimo te, nayanolaki boye: “Nayebi mpenza te soki kozwa batisimo esɛngi makambo nini.” Tata ayokaki ngai mpe akamwaki. Kobanda wana, abakisaki milende mpo na kosalisa ngai nayeba ndimbola mpe ntina ya batisimo. Sanza minei na nsima, na mokolo ya 1 Ɔkɔtɔbɛ 1940, nazwaki batisimo na liziba moko libándá ya engumba Chattanooga; malili ezalaki makasi mokolo yango.
Ntango nakómaki na mbula 14, nazalaki kosala mosala ya mobongisi-nzela soki tozwi konje na kelasi. Nazalaki kosakola na bamboka mikemike ya etúká ya Tennessee mpe pembenipembeni ya etúká ya Géorgie. Nazalaki kolamuka ntɔngɔntɔngɔ, kobongisa biloko oyo nakolya na midi, mpe na ngonga ya 6:00, nazalaki kozwa engbunduka to bisi mpo na kokende na teritware. Nazalaki kozonga soki na ngonga ya 6 na mpokwa. Mbala mingi, bilei oyo nazalaki komema ezalaki kosila liboso midi ebɛta. Atako nazalaki na mbongo, nakokaki kokɔta na restora te mpo na kosomba bilei mosusu mpamba te nazalaki moindo. Mokolo moko ntango nakɔtaki na restora moko mpo na kosomba crème, babenganaki ngai. Mwasi moko ya mondɛlɛ amoniselaki ngai boboto mpe amemelaki ngai crème moko libándá.
Ntango nakɔtaki na eteyelo ya ntei, baindo ya Sudi bazalaki kosala nyonso mpo bákóma na ntomo ndenge moko na mindɛlɛ. Mangomba lokola NAACP (Association nationale pour le progrès des gens de couleur) ezalaki kolendisa bana-kelasi bámipesa na politiki. Bazalaki kolendisa biso tókɔta na mangomba yango mpo na kolongisa ntomo na biso. Biteyelo mingi ya baindo, ata oyo ya biso, elobaki ete bana-kelasi nyonso basengeli kokɔta na mangomba yango. Bazalaki kotya ngai mbamba “nakɔtela loposo na biso.” Kasi naboyaki; nalimbwelaki bango ete Nzambe aponaka bilongi te mpe ete na miso na ye, bato ya mposo nyonso bazali ndenge moko, mpe yango wana nandimaka ete Nzambe nde akosilisa makambo ya kozanga bosembo ya ndenge wana.—Yoa. 17:14; Mis. 10:34, 35.
Mwa moke nsima ya kosilisa eteyelo ya ntei, nalobaki ete nakende kofanda na engumba New York. Kasi, ntango nazalaki kokende kuna, nalobaki nakende naino na engumba Philadelphie, na etúká ya Pennsylvanie, mpo na kotala baninga oyo nakutanaki na bango na liyangani ya etúká. Lisangá ya kuna ezalaki lisangá ya liboso oyo esangisaki baindo ná mindɛlɛ. Ntango mokɛngɛli ya zongazonga ayaki kotala lisangá yango, abendaki ngai pembeni mpe ayebisaki ngai ete nakosala lisolo na makita oyo elandi. Yango nde etindaki ngai nazwa ekateli ya kotikala wana.
Na baninga na ngai ya Philadelphie, ezalaki na elenge mwasi moko na nkombo Geraldine White, oyo nakómaki kobenga Gerri. Ayebaki Biblia malamu mpe ayebaki malamu ndenge ya kobanda masolo na mosala ya kosakola ndako na ndako. Eloko oyo esepelisaki ngai mingi epai na ye ezalaki ete ye mpe azalaki na mokano ya kokóma mobongisi-nzela. Tobalanaki na mokolo ya 23 Aprili 1949.
Babengi biso na Gileade
Banda na ebandeli, tozalaki na mokano ya kokɔta na Eteyelo ya Gileade mpe kokende mosala ya misionɛrɛ na ekólo mosusu. Tosepelaki mingi kobongola bomoi na biso mpo na kokokisa masɛngami ya kokɔta na Gileade. Eumelaki te, basɛngaki biso tókende na Lawnside, na etúká ya New Jersey; na nsima batindaki biso na Chester, na Pennsylvanie; mpe nsukansuka na Atlantic City, na New Jersey. Wana tozalaki na Atlantic City, tokokisaki masɛngami mpo na kotondisa formilɛrɛ ya Gileade, mpo tokokisaki mbula mibale ya libala. Kasi, bazelisaki biso naino. Mpo na nini?
Na ebandeli ya bambula ya 1950, bazalaki kozwa bilenge mibali ebele na mosala ya soda mpo bákende kobunda na etumba ya Corée. Biro oyo ezalaki kokomisa bato na Philadelphie ezalaki mpenza kosepela na Batatoli ya Yehova te mpo tozalaki kokɔta na makambo ya politiki te. Nsukansuka, zuzi moko ayebisaki ngai ete polisi ya FBI elandelaki bomoi na ngai mpe emonaki ete nakɔtaka na bitumba te. Yango wana na mokolo ya 11 Yanuali 1952, Cour d’appel oyo prezida atyaki epesaki ngai papye moko (4-D) oyo emonisaki ete nazali na molɔngɔ ya baministre ya makambo ya Nzambe.
Na sanza ya Augusto ya mbula yango, babengaki ngai ná Gerri na kelasi ya Gileade ya mbala ya 20, oyo ebandaki na sanza ya Sɛtɛmbɛ. Wana tozalaki na kelasi, tozalaki kolikya ete bakotinda biso na ekólo mosusu. Yaya na ngai Doris asilaki kokɔta kelasi ya Gileade ya mbala ya 13 mpe azalaki kosakola na Brésil. Ngai ná Gerri tokamwaki mpenza ntango batindaki biso na mosala ya zongazonga, tótalaka masangá ya baindo na sudi ya etúká ya Alabama! Tolɛmbaki nzoto mwa moke, mpo tozalaki mpenza na mposa ya kokende kosala na ekólo mosusu.
Lisangá ya liboso oyo totalaki ezalaki na engumba Huntsville. Ntango tokómaki kuna, tokendaki na ndako ya ndeko mwasi moko epai tosengelaki kofanda. Wana tozalaki kofungola bisaka na biso, toyokaki ye azali kosolola na telefone mpe koloba ete: “Bana bakómi.” Tozalaki kaka na mbula 24 mpe tozalaki komonana bilenge koleka. Bakobaki kobenga biso “Bana” ntango nyonso oyo tosalaki na zongazonga yango.
Mbala mingi, ngámbo ya Sudi ezalaki kobengama Etúká ya Biblia mpo bato mingi kuna bazalaki na limemya makasi mpo na Biblia. Na yango, na lisolo na biso tozalaki mbala mingi kosala makambo misato oyo elandi:
(1) Kolobela mwa moke makambo oyo ezali kosalema na mokili.
(2) Komonisa ndenge Biblia ekobongisa makambo yango.
(3) Koyebisa oyo Biblia esɛngi biso tósala.
Na nsima, tozalaki kopesa mokanda ya boyekoli oyo esengeli. Lokola mayele yango ezalaki kobota mbuma, bapesaki ngai lisolo na liyangani oyo ezalaki na motó ya likambo ‘Ebongiseli ya mokili ya sika,’ oyo esalemaki na New York na 1953. Nasalaki elakiseli mpo na komonisa makambo yango misato oyo tozalaki kosala.
Mwa moke na nsima, na eleko ya molunge ya 1953, batindaki ngai mokɛngɛli ya etúká mpo natalaka bazongazonga ya baindo na Sudi. Teritware na biso ezwaki etúká mobimba ya Virginie tii na Floride mpe ekendeki tii na wɛsti, na Alabama mpe Tennessee. Ezalaki kosɛnga bakɛngɛli-batamboli bámesana na makambo ya sika. Na ndakisa, mbala mingi tozalaki kofanda na bandako oyo ezalaki na pɔmpi ya mai te na kati mpe tozalaki kosukola na mwa saani moko ya ebende oyo basalá mpo na kosukola (baignoire) na nsima ya kuku. Likambo ya esengo, na ndako mobimba, esika yango nde ezalaki molunge koleka!
Mikakatano mpo na bokabwani kati na mindɛlɛ mpe baindo
Kosala na Sudi ezalaki kosɛnga moto amona mosika mpe azala na mayele mpo na kosala makambo. Baindo bazalaki na ndingisa te ya kosalela bamasini oyo batyá mpo na kosukola bilamba. Na yango, Gerri azalaki kokende kuna mpe koloba ete bilamba oyo ezali ya “Mama Thompson.” Bato mingi bazalaki kokanisa ete azali moto ya mosala mpe “Mama Thompson” nde mama nkolo-ndako. Ntango bakɛngɛli ya etúká bazalaki kolakisa filme La Société du Monde Nouveau en action, nazalaki kobenga na telefone na magazini mpe kosɛnga bábombela “Tata Thompson” etando moko monene ya kolakisa bililingi. Na nsima, nazalaki kokende kozwa yango. Tozalaki ntango nyonso na bonkonde mpe mbala mingi tozalaki kosakola na kimya.
Mokakatano mosusu ezalaki ete bato bazalaki na makinisi mabe mpo na bato ya bitúká ya Nɔrdi. Mokolo moko, zulunalo ya mboka ekomaki ete James Thompson, moto ya Watchtower Bible and Tract Society ya etúká ya New York, akoloba na liyangani moko. Bato mosusu bakanisaki ete nazali moto ya New York, mpe baboyaki kopesa biso ndako oyo tofutelaki na eteyelo moko mpo na kosala liyangani. Na yango, nakendaki na biro ya eteyelo yango mpe nalimbwelaki bango ete natángaki kelasi na engumba Chattanooga. Na nsima, bapesaki biso ndingisa ya kosala liyangani ya zongazonga na esika yango.
Na katikati ya bambula ya 1950, koyina bato ya mposo mosusu eyaki makasi, mpe mbala mosusu mobulu ezalaki kobima. Na 1954, Batatoli mosusu basilikaki mpo baindo basalaki badiskur te na mayangani mosusu ya etúká. Tolendisaki bandeko na biso baindo ete bázala motema molai. Na eleko ya molunge ya mbula oyo elandaki, bapesaki ngai diskur. Banda wana, baindo mosusu na Sudi bakómaki kosala badiskur.
Nsima ya bambula, mobulu oyo ezalaki kobima na Sudi mpo na koyinana kati na bato ya mposo ekeseni ezalaki lisusu mingi te, mpe mokemoke, masangá ya Sudi ekómaki kosangisa bandeko ya mposo nyonso. Yango esɛngaki kokabola lisusu basakoli na masangá mpe kobongola bateritware ya masangá mpe mikumba ya bandeko oyo bazalaki kokamba. Bandeko mosusu, ezala baindo to mindɛlɛ, basepelaki te na ebongiseli wana ya sika. Kasi, mingi bazalaki kopona bilongi te, ndenge moko na Tata na biso ya likoló. Kutu, mingi bazalaki baninga ya motema atako bazalaki mposo ndenge moko te. Libota na biso emonaki makambo yango na bambula ya 1930 mpe 1940, ntango nazalaki kokola.
Mokumba ya sika
Na sanza ya Yanuali 1969, basɛngaki ngai ná Gerri tókende na ekólo Guyana, na Amerika ya Sudi, mpe tondimaki na esengo. Tokendeki liboso na Brooklyn, na etúká ya New York, epai bapesaki ngai formasyo oyo etali ndenge ya kotambwisa mosala ya kosakola na Guyana. Tokómaki na Guyana na sanza ya Yuli 1969. Nsima ya kosala mosala ya mokɛngɛli-motamboli mbula 16, kofanda esika moko ezalaki mpenza likambo ya sika. Gerri azalaki kolekisa ntango na ye mingi na mosala ya kosakola lokola misionɛrɛ, mpe ngai nazalaki kosala na Betele.
Nazalaki kosala misala nyonso: kokata matiti, kobongisa mikanda mpo na masangá 28, mpe kosolola na biro monene na Brooklyn. Mokolo na mokolo nazalaki kosala ngonga 14 to 15. Ngai ná Gerri tozalaki kosala mosala makasi, kasi tosepelaki na mokumba na biso. Ntango tokómaki na Guyana, basakoli bazalaki 950; lelo oyo basakoli baleki 2 500.
Tozalaki kosepela mingi mpo molunge mpe malili ezalaki makasi te; tozalaki mpe kosepela na bambuma mpe ndunda ndenge na ndenge oyo tokutaki kuna. Kasi, esengo na biso ya solosolo ezalaki nde ete bato ya komikitisa oyo bazalaki na mposa ya mateya ya Biblia bazalaki koyekola makambo etali Bokonzi ya Nzambe. Mbala mingi, Gerri azalaki koyekola Biblia na bato 20 pɔsɔ nyonso, mpe bato mingi oyo toyekolaki na bango bakolaki tii bazwaki batisimo. Na nsima, bamosusu bakómaki babongisi-nzela, bankulutu, mpe bamosusu bakendaki kutu Gileade mpe bakómaki bamisionɛrɛ.
Mikakatano, mingimingi ya nzoto
Na 1983, baboti na biso kuna na États-Unis bazalaki na mposa ya lisalisi. Ngai, Gerri ná Doris tofandaki mpo na kotalela makambo ya libota. Doris asalaki mosala ya misionɛrɛ mbula 35 na Brésil; kasi amonaki malamu azonga na États-Unis mpo na kosunga bango. Alobaki ete mpo na nini bato mibale bákata mosala na bango ya misionɛrɛ soki moto moko akoki kokokisa mokumba yango? Kobanda liwa ya baboti na biso, Doris afandaka na Chattanooga mpe azali mobongisi-nzela monene.
Na 1995, bazwaki ngai na kanser ya prostate, mpe nasengelaki kozonga na États-Unis. Tofandaki na Goldsboro, na Caroline du Nord, mpo libota na ngai ezalaki na Tennessee mpe libota ya Gerri na Pennsylvanie; Goldsboro ezalaki na katikati. Sikoyo kanser na ngai etungisaka ngai lisusu te. Tozali babongisi-nzela monene ya mibange na lisangá moko na Goldsboro.
Soki nakanisi mbula koleka 65 oyo nalekisi na mosala ya ntango nyonso, nasepelaka mingi ndenge Yehova apamboli ngai ná Gerri mpo tozalaki kondima makambo ya sika mpo na kosalela ye. Maloba oyo ya Davidi ezali mpenza solo: “Epai ya moto ya sembo, [yo Yehova] okozala sembo”!—2 Sa. 22:26.
[Bililingi na lokasa 3]
Tata ná Ndeko Nichols bazalaki ndakisa malamu mpo na ngai
[Bililingi na lokasa 4]
Ngai ná Gerri na 1952, liboso tókɔta na Gileade
[Bililingi na lokasa 5]
Nsima ya Gileade, batindaki biso na mosala ya zongazonga na Sudi
[Elilingi na lokasa 6]
Bakɛngɛli-batamboli ná basi na bango babongami mpo na kokende liyangani oyo esangisaki baindo ná mindɛlɛ, na 1966
[Elilingi na lokasa 7]
Mosala ya misionɛrɛ na Guyana epesaki biso esengo mingi