Etanda ya makambo ezali na kati
15 Novɛmbɛ 2011
Nimero ya boyekoli
MASOLO YA BOYEKOLI MPO NA PƆSƆ YA:
26 Desɛmbɛ 2011–1 Yanuali 2012
“Kondimela mayele na yo moko te”
LOKASA 6
2-8 Yanuali 2012
Tótambola na kolanda elimo mpo tózwa bomoi mpe kimya
LOKASA 10
9-15 Yanuali 2012
‘Bafandi mpo na ntango mokuse’ na mokili moko mabe
LOKASA 16
16-22 Yanuali 2012
Tósalisa mibali bákola na elimo
LOKASA 24
23-29 Yanuali 2012
Tósalisa bandeko mibali báluka kozwa mikumba
LOKASA 28
Ntina ya masolo ya boyekoli
LISOLO YA BOYEKOLI 1 NKASA 6-10
Libondeli, nzela oyo Nzambe abongisá mpo tósololaka na ye, esalisaka yo mpenza? Lisolo oyo elobeli ndenge libondeli ekoki kosalisa yo ntango ozali na mikakatano, olingi kozwa bikateli ya minene, to ntango ozali kobunda mpo na kotɛmɛla komekama.
LISOLO YA BOYEKOLI 2 NKASA 10-14
Ntoma Paulo ayebisaki bakristo ya Roma makambo oyo basengeli kokanisa mpo bázwa bomoi mpe kimya. Lisolo oyo elobeli ndenge toli oyo apesaki bango ekoki kosalisa yo.
LISOLO YA BOYEKOLI 3 NKASA 16-20
Lisolo oyo emonisi ete bato ya sembo ya ntango ya kala bazalaki ‘bato oyo bafandi na mokili mpo na ntango mokuse.’ Bayekoli ya Yesu ya ekeke ya liboso mpe bazalaki bongo. Ezali boni mpo na bakristo ya solo lelo? Na lisolo oyo, tokomona soki kozala bato oyo bafandi mpo na ntango mokuse na mokili oyo mabe elimboli nini.
MASOLO YA BOYEKOLI 4, 5 NKASA 24-32
Lisangá ya Nzambe ezali na mposa makasi ya mibali oyo bakoki kotambwisa makambo. Yesu asalisaki mibali mingi bándima nsango malamu mpe na nsima bákokisa masɛngami mpo na kozwa mikumba. Koyekola mayele oyo asalelaki ekosalisa biso tóyeba ndenge tokoki kosalisa mibali oyo tokutani na bango na mosala ya kosakola mpe ndenge tokoki kosalisa bandeko mibali oyo bazwá batisimo na lisangá báluka kozwa mikumba na ebongiseli ya Yehova.
MASOLO MOSUSU
3 Yehu abundaki mpo na losambo ya pɛto
15 Azali na elikya atako azali ebɔsɔnɔ
22 Osepelaka ‘na libaku malamu ya kopesa na boboto’?