3 Nzambe alimbisaka te—Solo to lokuta?
Liteya oyo mbala mosusu oyoká: “Nzambe alandelaka lisumu mokomoko mpe atindaka bato na lifelo mpo bányokwama libela na libela.”
“Nzambe atindaka makama mpo na kopesa bato ya masumu etumbu.”
Oyo Biblia eteyaka: Mokanda ya 2 Petro 3:9 elobi ete Yehova “alingi moto ata moko te abomama kasi alingi nde bato nyonso bábongola motema.” Nzambe atyaka miso na ye na makambo na biso ya malamu, kasi na mabunga na biso te. “Miso [ya Nzambe] ezali kotambolatambola na mabele mobimba mpo na komonisa makasi na ye mpo na bolamu ya baoyo motema na bango ezali mobimba epai na ye.”—2 Ntango 16:9.
Biblia eteyaka lifelo te; kutu, Nzambe ayinaka mpenza ata likanisi mpamba ya konyokola bato seko na seko. Etumbu monene oyo akopesa bato mabe ezali nde kobɔtɔla bango likabo ya bomoi. (Yirimia 7:31; Baroma 6:7) Mpe Nzambe te nde atindaka makama oyo ebomaka bato bibomelá; ezalaka nde makambo oyo ekanami te, oyo ekoki kokwela moto nyonso.—Mosakoli 9:11.
Ndenge oyo solo ekoki kosalisa yo: Tokoki kopusana penepene na Nzambe soki toyebi ete “asepelaka kolimbisa,” kasi alukaka te kopesa etumbu. (Nzembo 86:5) Tosengeli te kosalela Nzambe mpo na kobanga etumbu. Nzokande, tokoki kokóma na kondima ya solo epai ya Yehova mpo tolingaka ye. Bolingo yango nde etindaka biso tósala nyonso oyo tokoki mpo na kosepelisa ye.—Matai 22:36-38; 1 Yoane 5:3.
Atako Nzambe alingi ete moto nyonso asala malamu, ayebi ete mingi bakosala yango ata mokolo moko te. Soki apesi etumbu te na bato oyo balingi kotika mabe te, akokokana na mokonzi oyo azali kotya mibeko, kasi azali kopesa etumbu te na baoyo bazali kobuka yango, mpe na bongo, azali kotika nzela ete kozanga bosembo mpe bampasi ebakisama. (Mosakoli 8:11) Koyeba ete Nzambe akotika bampasi mpo na libela te ezali kopesa biso elikya ya solosolo mpo na mikolo ezali koya. Nzambe alaki ete akolongola bato oyo balingi kotika mabe te, mpo ete “bato ya komikitisa” bázala na bomoi ya seko awa na mabele ndenge akanaki yango na ebandeli.—Nzembo 37:10, 11, 29.a
[Maloba na nse ya lokasa]
a Mpo na koyeba ndenge oyo Nzambe akokómisa mabele paradiso, talá mokapo 3 mpe 8 ya buku Biblia eteyaka mpenza nini?
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 6]
Nzambe alingi nde ete tósambela ye mpo na kobanga etumbu?
[Eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 6]
Liyemi ya Doré