‘Yehova ayanolá mabondeli na ngai’
FAIGAAI TU
ABOTAMAKI NA 1932
BATISIMO 1964
BOMOI NA YE: Azalaki mobongisi-nzela na bisanga ya Upolu mpe Savaii banda 1965 tii 1980. Lelo afandaka na Savaii.
NABOTAMÁ na mbeba makasi na makolo. Mpo na yango, matambe na ngai egumbamá, etalá na matindi, mpe ezalaka mpasi mingi mpo natambola.
Ntango nayokaki mateya ya solo mpo na mbala ya liboso, esimbaki mpenza motema na ngai. Nazalaki kolinga koyangana na makita ya lisangá, kasi ezalaki komonana ete nakokoka soki moke te kotambola na nzela wana ya makasi mpe ya mabangamabanga mpo na kokóma kuna. Nsukansuka, nayebaki malamu mpenza kosala basapato na ngai moko na basandale ya caoutchouc. Esalisaki ngai nakoka kotambolaka na mpasi mingi te.
Nabandaki mosala ya mobongisi-nzela nsima kaka ya batisimo na ngai. Bongo, nsima ya kosala mosala ya mobongisi-nzela mbula libwa na esanga Upolu, ngai ná yaya na ngai ya mwasi ná mobali na ye tokendaki na Savaii, epai mposa ya basakoli ya Bokonzi ezalaki makasi. Awa, nasalaki mosala ya mobongisi-nzela monene elongo na Kumi Falema‘a, mwana ya yaya ngai ya mwasi.
Ngai ná Kumi tozalaki kokende na bisi pɔsɔ nyonso longwa na Faga tii na Lata, mboka moko moke oyo ezali na bokula ya wɛsti ya Savaii. Nsima ya koyekola Biblia na mwasi moko na Lata, tozalaki kotambola kilomɛtrɛ mwambe tii na mboka Taga mpo na koyekola na mwasi mosusu. Tozalaki kolala na ndako ya mwasi yango ná libota na ye mpe na nsima tozalaki kozonga na Faga na bisi ya ntɔngɔ. Tosalaki bongo mbula soki mibale. Likambo ya esengo, na nsima basi yango nyonso mibale mpe mabota na bango bakómaki Batatoli ya molende.
Ntango bandeko na ngai ya libota balongwaki na Savaii, natikalaki kuna mpo na kosalisa etuluku moko ya bandeko basi mpe basi mosusu oyo bazalaki kosepela na solo na Faga. Nazalaki kotambwisa Boyekoli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Boyekoli ya mokanda na lisangá pɔsɔ na pɔsɔ mpe kokamba bandeko basi yango na mosala ya kosakola ndako na ndako. Mbala moko na sanza, nkulutu moko azalaki kouta na Apia mpo na kotambwisa makita ya mokolo ya lomingo. Lokola mokonzi ya mboka apekisaki biso koyemba nzembo ya Bokonzi na makita na biso, tozalaki kotánga maloba yango na mongongo makasi. Mbula mitano na nsima, ndeko Leva ná mwasi na ye Tenisia Faai‘u, oyo bazalaki bamisionɛrɛ, bautaki Nouvelle-Zélande mpe bayaki kosalisa mwa etuluku na biso. Bamosusu bayaki na nsima. Lelo, Savaii ezali na masangá mibale oyo ezali kokola malamu; moko ezali na Faga mpe mosusu na Taga.
Atako nabalá te, nalingaka bana mpe nazalaka ntango nyonso penepene na bango. Bana mosusu kutu bafandaka na ngai na ndako mpo na mwa ntango. Komona ndenge “bana” na ngai ya elimo bazali kokola mpe kozwa ekateli ya kosalela Yehova epesaka ngai esengo mingi.
Sikoyo nakómi mobange mpe nakoki kosakola ndako na ndako lisusu te. Nayekolaka Biblia na bato na ndako na ngai mpe napesaka litatoli na bato oyo nakutanaka na bango ntango nakei na lopitalo. Atako bongo, ndenge nazalaki kokoka kosala mingi te ezalaki kopesa ngai mpasi na motema, yango wana nabondelaki Yehova asalisa ngai nasala lisusu mingi. Nde bamisionɛrɛ ya lisangá na biso balakisaki ngai ndenge ya kopesa litatoli na nzela ya telefone. Soki nakanisi bomoi na ngai, namonaka ete Yehova ayanolá mpenza mabondeli na ngai.