Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w10 1/3 nk. 16-17
  • Ngomba ya mabanga ya korai na mapata

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ngomba ya mabanga ya korai na mapata
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
  • Masolo mosusu
  • Tozalaki na ekateli makasi ya kokokisa mosala na biso ya kosakola
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
w10 1/3 nk. 16-17

Mokanda euti na Papouasie-Nouvelle-Guinée

Ngomba ya mabanga ya korai na mapata

TOZALI mokolo ya mibale, tozali naino na ngonga ya mitano na ntɔngɔ, kasi molunge ezali makasi na engumba Lae, na Papouasie-Nouvelle-Guinée (PNG). Ngai ná mwasi na ngai tozali komilɛngɛla mpo na kokende na Lengbati, na Ngomba Rawlinson na etúká ya Morobe, mpo na kotala etuluku moko ya Batatoli ya Yehova kuna.

Mobembo na biso ezali kaka ya miniti 30 na mpɛpɔ ya bakiti minei, oyo ezali na motɛrɛ moko. Na mibembo yango, mbala mingi nafandaka pembeni ya pilote, mpe mpo na makɛlɛlɛ ya motɛrɛ, tosololaka na nzela ya telefone ya mpɛpɔ, oyo balataka na matoi. Na mosapi, alakisi ngai makɔnga mpe biloko mosusu na tableau de bord oyo ezali liboso na biso, alimboli ntina na yango mpe asali lisɛki ete soki likambo ekómeli ye, ngai nde nakotambwisa mpɛpɔ. Na mbala moko, nakanisi lisolo ya Motatoli ya Yehova mosusu oyo azalaki kosala mibembo mpo na kotala bandeko awa na PNG. Ntango pilote ya mpɛpɔ na bango asenzwaki wana bazalaki likoló, mpɛpɔ ezalaki kobalukabaluka yango moko tii ntango pilote azongelaki makanisi mpe alongaki kokitisa mpɛpɔ. Kasi likambo ya esengo, mobembo na biso ezali koleka malamu mpe likambo moko esalemi te.

Tozali sikoyo kopumbwa pembenipembeni ya bangomba; kasi tótala boye, tobimi na esika moko ya polele, esika oyo mapata ezali te mpe tokatisi likoló ya nsɔngɛ ya ngomba, etikalaki mɛtrɛ soki 100 mpamba mpo mpɛpɔ etuta nsɔngɛ yango. Mboka Lengbati etandami wana liboso na biso, ezali liboke ya bandako oyo batongá na matiti, mpe bansamba na yango ya matiti ezali mineneminene. Pilote atali libándá ya mpɛpɔ na nse ntango tozali kopumbwa likoló na yango mpo na komona soki ezali ndenge nini mpe soki bana bazali kobɛta bale kuna te. Azali mpe koluka mabulu oyo, mbala mosusu, bangulu etimolá banda mbala ya nsuka oyo azalaki kuna. Ntango abaluki lisusu mpo na kokɔta na lobwaku yango, alobi: “Namoni likambo ezali te; tokomeka kokita.” Tobaluki mpe tobandi kolongwa na likoló mpo na kokita na mwa libándá ya mpɛpɔ oyo bato ya mboka yango basalá na mopanzi ya ngomba mpe oyo kala mingi te, bauti kotya mabanga mikemike ya korai oyo bazwaki na ngomba moko oyo ezali pene na wana.

Na mibembo oyo tosalaki liboso awa, natalaki mabanga ya korai ya mikemike mpe namitunaki soki bangomba wana ezali mpenza banda ntango boni. Kanisá naino: esɛngaki nguya ya ndenge nini mpo ngomba ya mabanga ya korai ya bankama ya kilomɛtrɛ na bolai ebima na mbu mpe emata kino kilomɛtrɛ minei likoló ya mai! Ntango tobimaki na mpɛpɔ, tokómaki na esika oyo nabengi ngomba ya mabanga ya korai na mapata.

Lokola momeseno, bato ya mboka bayei mbangu, bauti bipai na bipai ntango bayoki makɛlɛlɛ ya mpɛpɔ oyo ezali kokita. Ntango pilote akati motɛrɛ, namoni mobali moko abimi na etuluku wana ya bato mpe abandi koya esika mpɛpɔ ezali. Ezali Zung, moko na mibali oyo batyamá na mboka yango mpo na kotambwisa programɛ ya mateya oyo Batatoli ya Yehova basalaka pɔsɔ na pɔsɔ na mokili mobimba. Bato ya mboka bayebi ete azali moto ya bizaleli malamu, moto ya sembo, mpe oyo bakoki kotyela motema. Andimaka ete ayekolaki kozala ndenge wana mpo asalelaka mitinda ya Biblia na bomoi na ye. Nsima ya kopesana mbote ya monɔkɔ mpe ya mabɔkɔ, tokitaki ngomba mwa moke elongo na Zung mpe Batatoli mosusu. Bana mike bazalaki kolanda biso nsimansima, bazalaki kowelana makasi mpo na koyeba nani akomema bisaka na biso.

Tokómi na mwa ndako ya mabaya oyo Batatoli ya mboka yango batongá mpo na mokɛngɛli-motamboli soki ayei nsima ya sanza soki motoba. Atako PNG ezali mokili ya molunge, awa ezali malili mpo ezali na bangomba. Na butu, ntango topelisi mwinda na biso ya petrole, mbala mingi namonaka londende​—oyo emataki mokemoke na ngomba nsima ya midi uta na lobwaku na nse—​ezali kokɔta na ndako na biso na nzela ya mabaya ya nse. Moto akoki kokamwa mwa moke komona ete tozali kolata jakɛti ná djini (jean) mpo na malili, nzokande euti koleka kaka mwa bangonga, tozalaki kotɔka mpo na molunge ntango tozalaki na bokula.

Na katikati ya bambula ya 1980, mobali moko ya mboka oyo ayekolaki Biblia na Batatoli ya Yehova na Lae. Ntango azongaki awa, ye ná mwa bato mosusu batongaki mwa esika ya kosala makita, mpe bazalaki kosepela na yango mingi. Na nsima, pastɛrɛ moko ya lingomba ya ba-luthérien ya mboka yango elongo na bato na ye bazikisaki nyɛɛ esika yango ya makita. Bato yango oyo batumbaki esika ya makita balobaki na lolendo ete esika wana ezali kaka mpo na ba-luthérien. Na nsima, mpe atako bazalaki kotɛmɛla bango ntango nyonso, Batatoli batongá esika mosusu ya makita, mpe motángo na bango ezali kaka kokola; bakómi basakoli ya nsango malamu soki 50 oyo bazali na molende. Bato mosusu oyo bazalaki liboso kotɛmɛla mosala ya Batatoli bazali lelo komipesa na molende na mosala yango.

Lelo, mbala mingi, bato ya mboka yango bayambaka Batatoli ya Yehova, oyo bateyaka bango makambo ya Biblia. Atako bato mingi ya mboka yango bayebi kotánga te, Batatoli mingi kuna bayekolá kotánga mpo bákoka koyebisaka basusu nsango ya Biblia. Bato soki 200 bayaka na makita oyo esalemaka pɔsɔ na pɔsɔ na Ndako ya Bokonzi na bango.

Kura ezalaka te. Na mpokwa, biso nyonso tofandaka zingazinga ya mɔtɔ na kuku. Tolyaka, tosololaka, mpe tosɛkaka elongo. Esengo ya kosalela Yehova emonanaka polele na bilongi oyo etondi na nsai ya baninga na biso, ntango mwa pole ya mɔtɔ engɛngisi yango. Mokemoke, lokola butu ezali koyinda makasi, bato mosusu bazali kozwa bombom na mɔtɔ, elingi koloba mandalala oyo ezali kopela, na elikya ete ekopela mokemoke mpo na kosalisa bango bázala na mwa mwinda na nzela, wana bazali kokatisa zamba mpo na kozonga na bandako na bango.

Ntango tozali kozonga na ndako, kimya oyo ezali awa esimbi biso. Tozali koyoka kaka makɛlɛlɛ ya biloko oyo Nzambe asalá. Liboso tókende kolala, totali likoló mpo na mbala ya nsuka, mpe tozali kokamwa mpo na ebele ya minzoto oyo ezali komonana uta na ngomba oyo.

Pɔsɔ eumelaka te, mpe tokómi kokanisa ndenge mpɛpɔ ekozonga lobi. Etikali kaka butu moko ya kolala na malili ya mapata ya Lengbati, mpe na nsima, tokozonga na molunge ya bokula.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto