Oyebaki yango?
Mpo na nini Yesu alobaki ete “moto moko te atyaka vinyo ya sika na milangi ya kala ya mposo ya nyama”?
▪ Na ntango ya kala, bazalaki na momeseno ya kobomba vinyo na milangi ya mposo ya nyama. (Yosua 9:13) Bazalaki kosala milangi ya mposo ya nyama na mposo ya banyama ya mboka na ndakisa bana ya ntaba to bantaba oyo ekɔmeli. Mpo na kosala molangi ya mposo ya nyama, bazalaki kokata motó mpe makolo ya nyama oyo ekufi mpe kolongola yango mposo na likebi mpo libumu efungwama te. Bazalaki kobongisa mposo yango mpe kotonga bisika oyo efungwami longola kaka motó to lokolo moko ya nyama yango nde bazalaki kotonga te mpo ezala nkingo ya molangi. Mbala mosusu bazalaki kokanga yango na bouchon to na nsinga.
Nsukansuka, mposo yango ezalaki kokóma makasi mpe ezalaki kobendana lisusu te. Na yango, milangi ya mposo ya kala ebongaki te mpo na kobomba vinyo ya sika, oyo ezali naino kobongwana. Ntango vinyo ezalaki kobongwana ndenge wana ekokaki kopasola molangi ya mposo ya kala oyo ekómá makasi. Nzokande, lokola milangi ya mposo ya sika ezalaki kobendana, ekokaki kopasuka te ata ntango vinyo ya sika ezalaki se kobongwana. Mpo na ntina yango, Yesu alobelaki likambo moko oyo eyebanaki malamu na ntango na ye. Alobelaki likambo oyo ekoki kokóma soki moto atye vinyo ya sika na milangi ya mposo ya nyama ya kala: “Vinyo ya sika ekopanza milangi ya mposo ya nyama, mpe ekosopana mpe milangi ya mposo ya nyama ekobeba. Kasi vinyo ya sika esengeli kotyama na milangi ya sika ya mposo ya nyama.”—Luka 5:37, 38.
‘Mibali oyo bazalaki na bambeli,’ oyo balobeli ntango Baroma bakangaki Paulo, nde banani?
▪ Ndenge mokanda ya Misala elobi, ntango mobulu ebimaki na tempelo na Yerusaleme, komanda moko ya basoda ya Baroma akangaki Paulo na bolɔkɔ, akanisaki ete Paulo azali mokambi ya etuluku ya batomboki, “mibali nkóto minei (4 000) oyo bazalaki na bambeli.” (Misala 21:30-38) Toyebi nini na ntina etali mibali yango oyo bazalaki na bambeli?
Liloba ya Grɛki oyo ebongolami na ‘mibali oyo bazalaki na bambeli’ euti na liloba sicarii na Latin, oyo elimboli “bato oyo basalelaka sica,” to mbeli. Flavius Josèphe, mokomi ya masolo ya kala na ekeke ya liboso amonisaki ete ba-Sicarii ezalaki nde etuluku ya Bayuda oyo bazalaki na bolingo ya koleka ndelo mpo na ekoló na bango mpe bazalaki ntango nyonso banguna ya Roma; mibali yango bazalaki koboma bato mpo na makambo ya politiki.
Josèphe alobi ete ba-Sicarii “bazalaki koboma bato na moi, mpe na kati ya engumba; bazalaki kosala yango mingimingi na bafɛti, wana bakɔti na kati ya ebele ya bato, bazalaki kobomba bambeli na bango na nse ya bilamba na bango, mpe bazalaki kotuba yango banguna na bango.” Soki batubi moto mpe akufi, ba-Sicarii bazalaki kokosa kosilika mpo na liwa yango mpe bato bazalaki koyeba bango te. Josèphe abakisi ete na nsima ba-Sicarii bazalaki bato ya liboso ya kobimisa botomboki oyo Bayuda batombokelaki Roma na 66-70 T.B. Yango wana, komanda ya basoda ya Baroma akokaki kozala motema likoló ndenge akangaki moto oyo bakanisaki ete azali mokambi ya etuluku yango.
[Elilingi na lokasa 15]
Molangi ya kala ya mposo ya nyama
[Elilingi na lokasa 15]
Liyemi ya mobali moko oyo azalaki na bambeli