Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w09 1/12 nk. 4-5
  • Nzambe atyelaka biso mpenza likebi—Ndenge oyo toyebi yango

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Nzambe atyelaka biso mpenza likebi—Ndenge oyo toyebi yango
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Bozalisi emonisaka bolingo ya Nzambe
  • Biblia emonisaka biso bolingo ya Nzambe
  • Manyoláká na bolingo ya Yehova oyo esilaka te
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
  • Nzambe azali nani?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • Ndenge ya koyeba lingomba ya solo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
  • “Ye alingaki biso liboso”
    Pusaná penepene na Yehova
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
w09 1/12 nk. 4-5

Nzambe atyelaka biso mpenza likebi​—Ndenge oyo toyebi yango

EZALI na motuna moko ya kala, kasi ya ntina mingi oyo bato bamitunaka banda bankóto ya bambula: Soki Nzambe alingaka biso mpo na nini bampasi etondi na mokili boye? Na ntembe te okondima ete soki olingaka moto moko, okolinga te ete moto yango anyokwama, mpe soki azali na mpasi, okoluka kosalisa ye. Yango wana, bato mingi bakanisaka ete lokola mpasi ezali mingi na mokili, yango ekoki kozala elembo ete Nzambe atyelaka biso likebi te. Na yango, ezali na ntina ete tótalela liboso makambo oyo emonisi ete Nzambe alingaka biso mpenza mpe ete atyelaka biso likebi.

Bozalisi emonisaka bolingo ya Nzambe

Yehova Nzambe azali ‘ye Oyo asalaki likoló mpe mabele mpe mbu mpe biloko nyonso na kati na yango.’ (Misala 4:24) Ntango tozali kotala biloko oyo Yehova akelá, yango esengeli kotinda biso tóloba ete atyelaka biso likebi. Na ndakisa, kanisá biloko oyo esepelisaka yo. Osepelaka kolya bilei ya malamu? Yehova akokaki kosala kaka bilei ya ndenge moko mpo ebatela bomoi na biso. Na esika ya kosala bongo, akelaki bilei ndenge na ndenge oyo esepelisaka biso ntango tolyaka yango. Ndenge moko mpe, Yehova akómisaki mabele kitoko na biloko ndenge na ndenge, na ndakisa banzete, bafololo, bangomba, bibale mpe bongo na bongo mpo tósepelaka na bomoi.

Tótalela mpe lolenge oyo tokelamá. Likoki oyo tozalaka na yango ya kosɛkisa bato mpe ya kosepela na miziki, mpe likoki ya kosepela na biloko kitoko, yango te nde esimbi bomoi na biso​—nyonso ezali makabo ya Nzambe oyo ebakisaka esengo na bomoi na biso. Lisusu, kanisá na boyokani na yo na basusu. Nani asepelaka te kozala elongo na baninga ya malamu to koyamba moto oyo alingaka mingi? Likoki ya kolinga ezali likabo oyo euti na Nzambe oyo alingaka biso! Lokola Nzambe akelá bato na likoki ya kolinga, yango emonisi ete Nzambe azali mpenza bolingo.

Biblia emonisaka biso bolingo ya Nzambe

Biblia emonisi biso ete Nzambe azali bolingo. (1 Yoane 4:8) Bolingo na ye emonanaka kaka te na biloko oyo akelá, kasi emonanaka mpe na Liloba na ye, Biblia. Na ndakisa, Biblia ezali na batoli oyo ekoki kosalisa biso tózala nzoto malamu, elendisaka biso tózala na bokatikati na makambo nyonso mpe ekebisaka biso na molangwa mpe lokoso.​—1 Bakorinti 6:9, 10.

Biblia ezali mpe na batoli ya bwanya mpo na boyokani ya bato, ezali mpe kolendisa biso ete tólinganaka mpe tósalelaka basusu makambo na bonkonde, na ndenge ebongi mpe na boboto. (Matai 7:12) Epekisi makambo mpe bizaleli oyo ememelaka moto mpasi, na ndakisa lokoso, matongi, bilulela, ekobo, mpe koboma. Soki moto nyonso azali kolanda batoli kitoko oyo ezali na Makomami, mpasi ekozala mingi te na mokili.

Kasi, Nzambe amonisaki bolingo na ye monene ndenge apesaki Mwana na ye Yesu mpo asikola bato. Yoane 3:16 elobi boye: “Nzambe alingaki mokili mingi, yango wana apesaki Mwana na ye se moko oyo abotamaki, mpo moto nyonso oyo azali kondimela ye abomama te kasi azwa bomoi ya seko.” Yehova asilá kozwa bibongiseli mpo na kosukisa liwa mpe lolenge nyonso ya bampasi mpo na libela.​—1 Yoane 3:8.

Tomoni polele ete ezali na makambo mingi oyo emonisi ete Yehova alingaka biso. Tomoni mpe ete asepelaka te komona biso tozali konyokwama. Akosilisa bampasi. Ntina ezali te tóluka kopesa makanisi kilikili na likambo yango​—Biblia eyebisi biso ndenge mpenza oyo Nzambe akosilisa bampasi.

[Elilingi na lokasa 4]

Likoki ya kolinga ezali likabo oyo euti na Nzambe oyo alingaka biso

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto