Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w09 1/6 nk. 24-25
  • Mobembo na “nsuka ya mokili”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mobembo na “nsuka ya mokili”
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Masolo mosusu
  • Ngomba ya mabanga ya korai na mapata
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
  • Nazali na esengo ya “kokende mosika”
    Lamuká!—2005
  • Mpasi na ntango ya bitumba eteyá ngai makambo mingi na bomoi
    Lamuká!—2005
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
w09 1/6 nk. 24-25

Mokanda euti na Russie

Mobembo na “nsuka ya mokili”

MWA mpɛpɔ na biso elongwaki na Yakutsk mpe emataki mokemoke tii likoló; tokatisaki lobwaku ya Tuymaada. Totikaki balaki ndenge na ndenge ya mike mpe ya minene oyo ekangamaki ngalasi, tokómaki na Verkhoyanskiy, milɔngɔ ya bangomba oyo bansɔngɛ na yango ezipami na nɛjɛ mpe engɛngaka na moi. Nsima ya kilomɛtrɛ 900 ya mobembo, tokitaki na mboka oyo babengi Deputatskiy.

Yango ezalaki ebandeli ya mobembo oyo nasalaki na ekólo Sakha oyo eyebani mpe na nkombo ya Yakutia, mokili kitoko, monene koleka Mpoto, kasi bomoi ezali pɛtɛɛ te kuna. Na eleko ya molunge, mɔtɔ ezalaka makasi (40°C) mpe na eleko ya mpiɔ, malili ezalaka makasi (-70°C), epai tokoki kokuta mikuwa ya banyama minene oyo elimwá kala. Atako bambula mingi eleki banda nasalaki mobembo kuna, namonaka lokola nde ezalaki kaka lobi; namonaka na makanisi, mwa bingumba oyo ezipami na londɛndɛ, kongɛnga kitoko ya moi oyo ezali komonana mosika, mpe bato ya Yakut oyo bazalaka ntango nyonso na esengo mpe makasi.

Tosukaki na mboka Deputatskiy te. Ngai ná moninga na ngai tosengelaki mpe kokende na bamboka mosusu. Mboka ya liboso ezalaki Khayyr, oyo ezalaki na ntaka ya kilomɛtrɛ 300, mosika mpenza na nɔrdi, pembeni ya mbu Laptev na nɔrdi ya Sibérie. Mpo na nini tozwaki ekateli ya kosala mobembo yango? Liboso, Motatoli moko ya Yehova akendaki na bamboka yango mpe akutanaki na bato ebele oyo basepelaki koyekola Biblia. Emonanaki ete kaka Yakutsk, mboka na biso nde ezalaki pene na bamboka yango, atako ekabwanaki na yango na ntaka ya kilomɛtrɛ soki 1 000! Tomonaki ete bato yango bazalaki na mposa tólendisa mpe tósunga bango.

Ntango tokómaki na Deputatskiy, tomonaki mobali moko oyo azalaki kokende na Khayyr na motuka, mpe asɛngaki amema biso na ntalo moke. Tokakatanaki mwa moke ntango tomonaki motuka na ye, oyo ebebaki makasi mpe ezalaki modɛlɛ moko ya kala. Atako bongo, tondimaki komata, mpe tobandaki mobembo na mpokwa wana. Toyebaki te likambo oyo ezalaki kozela biso.

Bakiti ya motuka yango ekangamaki ngalasi lokola kaka na libándá, mpe tomonaki ete ngalasi yango ezalaki makasi mpenza. Tosɛngaki ye atɛlɛmisa motuka mpo tózwa noki bilamba mosusu ya malili na basakosi na biso mpe tóbakisa likoló ya oyo tolataki. Kasi, malili ezalaki kaka makasi.

Sofɛlɛ yango, oyo amesaná na malili yango, azalaki kaka na esengo. Na mbala moko, atunaki biso boye: “Bosilá komona ndenge moi engɛngaka na mikili ya nɔrdi?” Ngai namonaki yango naino te; yango wana, atɛlɛmisaki motuka mpe tokitaki. Tobosanaki mwa moke malili oyo tozalaki koyoka. Natikalaki monɔkɔ polele, nazalaki kokamwa kongɛnga wana ya langi ndenge na ndenge oyo ezalaki kobalukabaluka likoló ya mitó na biso.

Na esika moko, na ntɔngɔ mpenza, motuka ekangamaki na nɛjɛ. Tosalisaki sofɛlɛ mpo na kobimisa motuka yango na mbala wana mpe bambala mosusu oyo motuka ekangamaki, ntango tokómaki pene ya Khayyr, na banzela oyo etondaki na nɛjɛ. Kaka na ntɔngɔ nde nayaki komona ete “banzela” yango ezalaki nde bibale oyo ekangamaki ngalasi! Nsima ya ngonga 16 ya mobembo longwa na Deputatskiy, tokómaki na Khayyr na pene ya midi. Atako tozalaki kokanisa ete tokobɛla mpo na ndenge totambolaki ngonga molai na malili, na mokolo oyo elandaki tolamukaki nzoto makasi. Kaka misapi na ngai ya makolo nde ezalaki kosala lisusu malamu te, ntango mosusu mpo na malili. Bato ya mboka yango bapesaki ngai mafuta ya ngombolo mpo nápakola na misapi.

Biso nde tosengelaki kokende na bandako ya bato mpo na koyebisa bango nsango malamu. Kasi, ntango kaka bato ya Khayyr bayokaki ete toyei, bango nde bakómaki koya koluka biso! Na boumeli ya pɔsɔ mibale na ndambo, ezalaki kokóma ete tóyekola Biblia na bato ya mboka yango, banda na ntɔngɔ mpenza tii na butu makasi. Tosepelaki mpenza kokutana na bato ebele wana ya esengo mpe ya boboto oyo bazalaki kosepela na makambo ya elimo. Basi mingi ya mibange na Yukut bayebisaki biso boye: “Tondimaka Nzambe. Ndenge boye tii awa na nsuka ya mokili, emonisi ete Nzambe azali mpenza!”

Mimeseno ya mboka yango ezalaki kokamwisa biso. Na ndakisa, bato bazalaki kosangisa maboke ya ngalasi lokola nkoni pene na bandako na bango. Ntango bazali na mposa ya mai, bazalaki kaka kozwa ngalasi moko batye yango na saani ya monene mpe batye yango na mɔtɔ mpo ekóma mai. Bato ya mboka yango bazalaki kolambela biso mbisi moko kitoko ya Mbu ya Arctic oyo babengaka chir; ezalaka kitoko soki balambi yango stroganina, elubu moko ya mboka na bango. Ntango bakangi mbisi yango, batyaka yango na malili, na nsima bakataka yango mikemike, batyaka yango mungwa ná pilipili, mpe balyaka yango mbala moko. Bato ya mboka yango bayebisaki biso mpe masolo ya mikuwa ya banyama oyo elimwá kala, na ndakisa mpɛmbɛ ya Mammouth, mpe banzete oyo ekundamá na nse ya mabelé, oyo emonanaka mbala mingi na esika yango.

Ntango tozalaki na Khayyr nazalaki kosala mibembo ya bankama ya bakilomɛtrɛ, mbala mingi na mpɛpɔ mpo na kokende kotala bato oyo bazalaki kosepela na mateya ya Biblia na bamboka mosusu ya Yakutia. Bato yango bazali na boboto mpe na bolingo! Mokolo moko, nakutanaki na elenge mobali moko oyo amonaki ete nazalaki kobanga ntango nazali na mpɛpɔ. Akomelaki ngai mwa maloba mpo na kolendisa ngai. Ayemaki bandɛkɛ mibale mpe mwa mpɛpɔ, mpe akomaki boye: “Sasha, ntango omati na mpɛpɔ, kobanga te ete okokwea. Matai 10:29.” Ntango natángaki maloba ya vɛrsɛ yango, esimbaki mpenza motema na ngai! Ezalaki maloba ya Yesu na oyo etali bandɛkɛ: “Moko te na yango ekokwea na nse kozanga ete Tata na bino ayeba.”

Nalobi kaka mwa ndambo ya makambo mingi ya kitoko oyo namonaki na Yakutia. Mokili yango ya malili, epai bomoi ezali pɛtɛɛ te, ekobosanisa ngai te bato na yango ya boboto, oyo bafandaka mpenza na “nsuka ya mokili.”

[Bililingi na lokasa 25]

Tomonaki ete bato ya Yakut bazali na boboto mpe bayebi koyamba bapaya

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto