Atunaki ngai, “Ozali kolela nini?”—POLINA GUTSHMIDT ABOTAMAKI NA 1922 ABATISAMAKI NA 1962
MAKAMBO ETALI YE Akómaki mwasi ya Viktor Gutshmidt. Ntango azalaki na bolɔkɔ, Polina amonaki ete Batatoli ya Yehova bazali bato ya boboto.
NAZALAKI kondima makanisi ya Bakoministe mpe kosalela yango. Kasi, Bakoministe bakangaki ngai na sanza ya Mai 1944 mpe batindaki ngai na kaa ya misala makasi na engumba Vorkuta. Nasalaki mbula misato na bolɔkɔ kozanga ete báyebisa ngai ntina oyo bakangaki ngai. Na ebandeli, nazalaki kokanisa ete basalaki libunga, mpe nazalaki kozela ete bábimisa ngai. Nzokande, bakatelaki ngai mbula zomi ya bolɔkɔ mpo balobaki ete nazalaki koloba mabe mpo na Union soviétique.
Lokola nayebaki mosala ya monganga, nasalaki na lopitalo ya kaa na boumeli ya bambula ya liboso oyo nakɔtaki bolɔkɔ. Na 1949, batindaki ngai na engumba Inta, na kaa moko ya bolɔkɔ ya bato ya politiki. Kuna, mibeko elekaki makasi. Bato ya bolɔkɔ bazalaki nkandankanda, makambo makasi, kosala pite, mpe bazalaki bato bazangá mawa mpe elikya. Lokola bazalaki koloba ete bakoboma bato nyonso ya bolɔkɔ to bakokatela bango etumbu ya bolɔkɔ ya bomoi mobimba, yango esalaki ete bato bákóma lisusu mabe mingi. Lokola mitungisi elekaki, bato mingi ya bolɔkɔ bakómaki lokola bato ya ligboma. Bazalaki lisusu te kotyelana motema mpe bazalaki koyinana, mpamba te bato ya bilobaloba bazalaki mingi na kaa. Moto na moto akómaki kofanda na ndenge na ye. Bato mingi bakómaki na moimi mpe lokoso.
Nzokande, basi mosusu soki 40 oyo bazalaki mpe na bolɔkɔ bakesanaki mpenza na bato nyonso. Bazalaki ntango nyonso kofanda elongo, bazalaki komonana kitoko, pɛto, bato ya boboto mpe bazalaki kolingana. Mingi na bango bazalaki bilenge basi mpe basusu kutu bazalaki bana mike. Bayebisaki ngai ete bazali Batatoli ya Yehova. Bato ya bolɔkɔ bazalaki kotalela bango na ndenge ekeseni. Basusu bazalaki kosalela bango makambo na yauli. Kasi, basusu bazalaki kosepela na bizaleli na bango, mingimingi bolingo oyo bazalaki na yango na kati na bango. Na ndakisa, soki Motatoli moko abɛli, bamosusu bazalaki kokɛngɛla ye moto na moto na ngala na ye. Na kaa, likambo ya ndenge wana ezalaki kosalema te.
Nakamwaki mpo, atako bato yango bazalaki bato ya bikólo ekeseni, bazalaki kolingana makasi. Na ntango wana, nazalaki lisusu na mposa ya bomoi te. Mokolo moko, ntango nayokaki ete nakómi mpenza na nsuka, nafandaki mpe nabandaki kolela. Moko ya bana basi yango ayaki epai na ngai mpe atunaki ngai ete, “Polina, ozali kolela nini?”
Nayanolaki ye ete, “Nazali lisusu na mposa ya bomoi te.”
Mwana mwasi yango na nkombo Lidia Nikulina, abandaki kobɔndisa ngai. Ayebisaki ngai ntina ya bomoi, ndenge oyo Nzambe akosilisa bampasi nyonso ya bato, mpe makambo mosusu mingi. Na Yuli 1954, babimisaki ngai na bolɔkɔ. Banda wana, nayekolaki makambo mingi na ntina na Batatoli ya Yehova mpe nakómaki moko na bango.