Mituna ya batángi
Nzambe azwaka bana mike mpo bákóma baanzelu na likoló?
Soki mwana moke akufi, mbala mosusu baninga ya baboti ya mwana yango bakoki kobɔndisa bango na maloba oyo: “Nzambe azalaki na mposa ya anzelu mosusu na likoló.” Okanisi ete likanisi yango ezali solo?
Soki ezali solo ete Nzambe alingaka bana mike bákufa mpo azali na mposa ya baanzelu mosusu na likoló, wana azali motema makasi mpe mobomi. Nzokande, Biblia elobi bongo te. (Yobo 34:10) Tata ya motema mawa akoki te kozwa na makasi mwana ya bato mpo akómisa libota na ye monene. Nzokande, tata ata moko te awa na mabelé azali na motema mawa koleka Yehova, oyo ezaleli na ye ya monene ezali bolingo. (1 Yoane 4:8) Lokola azali mpenza na bolingo, akoki soki moke te kosala likambo ya mabe ndenge wana.
Omituna boye: ‘Nzambe azalaka na mposa ya baanzelu mosusu na likoló?’ Biblia elobi ete misala nyonso ya Nzambe ezali malamu mpe ya kokoka. (Deteronome 32:4) Mosala oyo asalaki mpo na kokela bamilio ya baanzelu ezalaki ya kokoka, mpe motángo ya baanzelu ezalaki ya kokoka. (Danyele 7:10) Nzambe abungaki nde motángo ya baanzelu oyo azalaki na bango mposa? Ata moke te! Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso akoki kosala libunga ya ndenge wana te. Ezali solo ete Yehova aponi bato mosusu mpo bákóma bikelamu ya elimo oyo bakoyangela na Bokonzi na ye ya likoló, kasi ntango bato yango bakufaka, bazalaka bana mike te.—Emoniseli 5:9, 10.
Ntina mosusu oyo Nzambe akoki te kozwa bana mike awa na mabelé mpo bákóma baanzelu na likoló ezali ete likanisi yango eyokani te na mokano oyo azalaki na yango na ebandeli mpo na bana. Na elanga ya Edene, Nzambe alobaki na Adama ná Eva ete: “Bóbotaka mpe bózala na kobota mingi, mpe bótondisa mokili mpe bótya yango na nse na bino.” (Genese 1:28) Bana bazali likabo ya Nzambe, mpe bazali na ntina mpo na kokokisama ya mokano na ye ya ebandeli ya kotondisa mabelé na bato ya sembo. Akanaki te ete bana bákufaka mpo bákómaka bikelamu ya elimo. Biblia elobi ete bana bazali “likabo ya [Yehova].” (Nzembo 127:3) Tokanisi mpenza ete Yehova, Nzambe ya bolingo abɔtɔlaka baboti likabo oyo ye moko apesaki bango? Te!
Soki mwana akufi, epesaka mawa mpe mpasi makasi. Na yango, elikya nini baboti oyo mwana na bango akufi bakoki kozala na yango? Biblia elaki ete Nzambe akosekwisa bamilio ya bato mpe akotya bango na paladiso kaka awa na mabelé. Kanisá naino ntango bana oyo bakosekwa na nzoto kolɔngɔnɔ bakokutana na baboti mpe bandeko na bango! (Yoane 5:28, 29) Mposa ya Nzambe ezali ete bana bákola, básepela na bomoi mpe báyeba ye mpe mokano na ye mpo na mabelé. Na yango, bana oyo bakufá bakómá baanzelu na likoló te, kasi bazali kozela lisekwa mpo bákɔta na paladiso awa na mabelé. Na ntango yango, Mozalisi na biso Yehova, Nzambe ya bolingo akosala ete bana mpe mikóló básambela ye na esengo libela na libela.