Osengeli kotingama kaka na makambo oyo olingaka?
BANA mibale bazali kosakana. Moko abɔtɔli eloko ya kosakana ya moninga mpe agangi ete, “Ezali ya ngai!” Banda bomwana, bato ya kozanga kokoka bamonisaka moimi. (Gen. 8:21; Lom. 3:23) Longola yango, mokili elendisaka bato bálukaka liboso matomba na bango moko. Mpo na kokima elimo yango, tosengeli kobunda makasi. Soki tosali bongo te, tokoki kobɛtisa basusu libaku mpe kobebisa boyokani na biso na Yehova.—Lom. 7:21-23.
Mpo na kosalisa biso tóyeba ete makambo oyo tosalaka ekoki kolendisa basusu to kobɛtisa bango libaku, ntoma Paulo akomaki boye: “Makambo nyonso epesami nzela; kasi ezali makambo nyonso te nde ezali na litomba. Makambo nyonso epesami nzela; kasi ezali makambo nyonso te nde etongaka.” Abakisaki boye: “Bókeba ete bókóma te bantina ya kobɛtisa libaku.” (1 Kol. 10:23, 32) Na yango, soki ekómi na makambo oyo tolingaka, ekozala malamu tómituna boye: ‘Nandimaka kotika makambo mosusu oyo nalingaka ntango kimya ya lisangá elingi kobeba? Namibongisi mpo na kolanda mitinda ya Biblia ata ntango ezali mpasi mpo na kosala yango?’
Na oyo etali kopona mosala
Bato mingi bamonaka ete kopona mosala etali kaka bango moko mpe ekoki kosala basusu mabe te. Kasi tózwa ndakisa ya mobali moko ya mombongo oyo afandaka na mwa engumba moko ya Amerika ya Sudi. Azalaki mobɛti monene ya masano ya mbongo mpe molangwi monene ya masanga. Nzokande, lokola akómaki koyekola Biblia na Batatoli ya Yehova, abandaki kosalela makambo oyo azalaki koyekola mpe abongolaki bomoi na ye. (2 Kol. 7:1) Ntango amonisaki ete alingi kokóma mosakoli na lisangá, nkulutu moko alendisaki ye na mayele ete atalela naino mosala oyo asalaka. Na mboka na bango mobimba, moto yango azalaki motɛki monene ya alcool de canne, masanga ya makasi oyo bazalaki kosalela makambo mingi, kasi epai na bango bazalaki kosangisa yango na masanga ya sukali mpe bato bazalaki komɛla yango kaka mpo bálangwa.
Mobali yango asosolaki ete soki abandi kosakola kasi azali kaka kotɛka masanga wana, yango ekoki kobebisa lokumu ya lisangá mpe boyokani na ye na Nzambe. Atako azalaki na libota monene, atikaki kotɛka masanga yango. Lelo oyo, atɛkaka bapapye mpo na koleisa libota na ye. Mobali yango ná mwasi na ye basili kozwa batisimo. Bana mibale kati na bana na bango mitano mpe basili kozwa batisimo. Bazali kosakola nsango malamu na molende kozanga nsɔni.
Na oyo etali kopona baninga
Kozala na baninga oyo bazali Batatoli te ezali kaka likambo ya moto ye moko to etaleli mpe mitinda ya Biblia? Ndeko mwasi moko alingaki kokende fɛti na elenge mobali moko oyo azali Motatoli te. Atako bakebisaki ye na makama oyo ekoki kokómela ye, ndeko mwasi yango alobaki ete azali na lotomo ya kosala ndenge alingi mpe akendaki na fɛti yango. Mwa moke nsima ya kokóma kuna, bapesaki ye masanga oyo batyaki valium. Alalaki mpɔngi bangonga ebele, mpe ntango alamukaki amonaki ete moto oyo ye akanisaki ete azali moninga na ye asangisaki na ye nzoto.—Talá mpe Genese 34:2.
Atako kozala na baninga oyo bazali Batatoli te esukaka ntango nyonso ndenge wana te, Biblia elobi boye: “Ye oyo akotambola na bato ya mayele akozala na mayele, nde motamboli elongo na bazoba akobukana.” (Mas. 13:20) Likambo ya kokakola ezali te: kozala na baninga ya mabe etyaka na likama! Masese 22:3 elobi boye: “Moto ya mayele akososola mabe liboso mpe akomibomba; nde bazoba bakoleka wana mpe bakozwa etumbu.” Baninga na biso bakoki kobebisa biso mpe kobebisa boyokani na biso na Yehova.—1 Kol. 15:33; Yak. 4:4
Na oyo etali molato mpe monzɛlɛ
Midɛlɛ ya bilamba mpe ndenge ya kolata ebongwanaka ntango nyonso. Nzokande, mitinda ya Biblia oyo elobeli molato mpe monzɛlɛ ebongwanaka te. Paulo alendisaki baklisto ya basi “bábongisaka nzoto na bango na molato ya malamu, na kolekisa ndelo te mpe na makanisi malamu”; etinda yango etali mpe mibali. (1 Tim. 2:9) Paulo azalaki te kosɛnga baklisto bálataka kaka bongobongo to ete bango nyonso bálataka bilamba ya modɛlɛ moko. Boye, kolekisa ndelo te elimboli nini? Diksionɛrɛ moko elobi ete kolekisa ndelo te elimboli kozala na molato, elobeli mpe etamboli oyo ezangi lolendo mpe mindɔndɔ.
Tosengeli komituna boye: ‘Ntango nazali kotingama na lolenge ya kolata oyo nayebi ete etindaka bato bátala ngai ntango nazali koleka, nakoki mpenza koloba ete nalekisaka ndelo te? Molato na ngai etindaka bato bámituna soki nazali mpenza moklisto ya solo to soki nalandaka mpenza bindimeli na ngai?’ Tokoboya ‘kobɛtisa basusu libaku’ na likambo yango soki tozali ‘kotya likebi, na kobanzabanza kaka na makambo na biso moko te, kasi na kobanzabanza mpe na makambo ya bamosusu.’—2 Kol. 6:3; Filp. 2:4.
Na makambo ya mombongo
Ntango bandeko mosusu bamɛlaki baklisto mosusu mbongo na lisangá ya Kolinti, Paulo akomaki boye: “Mpo na nini kutu te kondima ete básalela bino mabe? Mpo na nini kutu te kondima ete bábuba bino?” Paulo apesaki baklisto toli ya kotika makambo mosusu na esika ya komema ndeko na esambiselo. (1 Kol. 6:1-7) Ndeko moko ya États-Unis asalelaki toli yango. Azwanaki matata na patrɔ na ye oyo azalaki mpe Motatoli na likambo etali mbongo oyo asengeli kofuta ye. Mpo na kolanda toli ya Biblia, bandeko wana mibale bakutanaki mbala ebele mpo na kosilisa likambo yango kasi balongaki te. Nsukansuka, bamemaki likambo yango “na lisangá,” epai ya bankulutu.—Mat. 18:15-17.
Likambo ya mawa, mokakatano yango esilaki kaka te. Nsima ya kobondela mingi, ndeko yango amonaki malamu asundolela patrɔ na ye mbongo yango. Mpo na nini? Na nsima alobaki boye: “Mokakatano wana ezalaki kolongola ngai esengo nyonso mpe ezalaki kolya ngai ntango oyo nakokaki kosalela mpo na makambo ya lisangá.” Nsima ya kozwa ekateli wana, ndeko yango amonaki ete esengo na ye ezongaki mpe ete Yehova apambolaki mosala na ye.
Ata na makambo ya mike
Koboya kotingama kaka na makambo oyo tolingi ata soki ezali mike, ememaka matomba. Na mokolo ya liboso ya liyangani moko ya etúká, ndeko moko ná mwasi na ye oyo bazali babongisi-nzela bakómaki liboso mpenza ya ngonga mpe bakangaki bisika oyo basepelaki kofanda. Ntango liyangani ebandaki, libota moko ya bana ebele ekɔtaki. Ntango ndeko wana ná mwasi na ye bamonaki ete libota yango ezalaki koluka bisika ya kofanda, batikelaki bango bisika na bango. Yango esalaki ete libota yango báfanda bango nyonso esika moko. Mwa mikolo nsima ya liyangani, libota wana etindelaki ndeko wana ná mwasi na ye mokanda mpo na kopesa bango mersi. Na mokanda yango bamonisaki ete balɛmbaki nzoto mpo bakutaki liyangani ebandi. Mawa oyo bazalaki na yango ebongwanaki mbala moko esengo mpe bazalaki na botɔndi mpo na motema boboto ya babongisi-nzela wana.
Soki likoki ezali, tosengeli kondima kotika makambo oyo tolingaka mpo na bolamu ya basusu. Soki tozali komonisa bolingo oyo “elukaka [kaka] matomba na yango moko te,” tokobatela kimya ya lisangá mpe ya bazalani na biso. (1 Kol. 13:5) Kasi, likambo eleki ntina, tokobatela boyokani na biso na Yehova.
[Elilingi na lokasa 20]
Ondimaka kotika makambo oyo olingaka ntango ozali kopona bilamba?
[Elilingi na lokasa 21]
Okondima kotikela bandeko na yo bisika ya kofanda?