Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w08 1/12 nk. 13-15
  • Ba-maya bazwi bonsomi ya solosolo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ba-maya bazwi bonsomi ya solosolo
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Koya ya bato ya Espagne
  • Etumba ya mindɛlɛ ná Ba-Maya
  • Basikwamaki mpenza te
  • Bonsomi ya solosolo eyei!
  • Yehova apesaka basaleli na ye esika ya kopema
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
  • Minzoto etambwisaka bomoi na yo?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
  • Ondimaka mpenza ete ozali na kati ya solo? Mpo na nini?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2014
  • Kosambela banyoka—Na ntango ya kala mpe lelo
    Lamuká!—2010
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
w08 1/12 nk. 13-15

Ba-maya bazwi bonsomi ya solosolo

NANI ayoká naino nsango ya Ba-Maya te? Mbula na mbula, ebele ya bato ya mikili ndenge na ndenge bakendeke na Péninsule du Yucatán, na Mexique, mpo na kotala bapiramide kitokokitoko oyo ezali kuna, lokola oyo ezali na bamboka Chichén Itzá ná Cobá. Ba-Maya bayebaki kaka kotonga te, kasi bayebaki mpe mikanda, mituya mpe makambo ya minzoto. Babimisaki lolenge moko ya kokoma ya kokamwa mpenza, babimisaki motángo zero mpe manaka ya mikolo 365 to 366.

Kasi na makambo ya losambo, bakesanaki mpenza na bato mingi. Ba-Maya bazalaki na banzambe mingi. Na ndakisa, bazalaki kosambela banzambe ya moi, ya sanza, ya mbula mpe ya masango, mpe bongo na bongo. Banganga-nzambe na bango bazalaki makasi na likambo ya kotala minzoto. Na losambo na bango, bazalaki mpe kosalela mpaka ya malasi ná bikeko, bazalaki komikatakata nzoto mpe kokaba bato ya bolɔkɔ, baombo mpe bana na bango mbeka epai ya banzambe na bango.

Koya ya bato ya Espagne

Wana nde makambo oyo bato ya Espagne bakutaki ntango bakómaki na mboka yango na ebandeli ya ekeke ya 16. Bato ya Espagne oyo bazwaki bamboka ya Amerika ya sudi mpe ya ntei bazalaki kobengama ba-conquistadors. Bato yango bazalaki na mikano mibale: Kozwa mabelé ya sika mpe bozwi, mpe kobongola Ba-Maya bákóma bandimi ya Katolike, mpo na kosikola bango na bopakano. Koya ya bato ya Espagne ememelaki Ba-Maya bonsomi ya solosolo, ezala na losambo to na makambo mosusu?

Bato ya Espagne, ezala ata basango ya Lingomba ya Katolike, babɔtɔlaki bisika oyo Ba-Maya bazalaki kosalela banda bikeke na bikeke mpo na bilanga na bango. Mpo na kosala bilanga, Ba-Maya bazalaki kokata zamba mpe na nsima bazalaki kotumba. Lokola babɔtɔlaki mabelé na bango ya bilanga, mpasi mpe minyoko ekɔtaki mpenza na mboka. Bato ya Espagne bazwaki mpe mabulu na bango minene ya mai, bisika kaka moko oyo bato ya Péninsule du Yucatán bazalaki kozwa mai. Mpasi na bango mosusu eutaki na mpako oyo Lingomba ya Katolike esɛngaki bango báfutaka mbula na mbula, longola mpako ya Leta oyo bazalaki kofuta. Mobali mokomoko asengelaki kofuta réal 12 na ndambo mpe mwasi mokomoko réala 9. Bato ya Espagne oyo bakómaki bankóló mabelé bazalaki naino kofutela Ba-Maya mpako ya Lingomba mpe na nsima bazalaki kosalisa bango misala tii ntango nyongo wana ekosila, mpe na ndenge yango, bakómisaki bango mpenza lokola baombo.

Basango bazalaki mpe kofutisa bato mbongo mpo na makambo lokola batisimo, libala mpe milulu ya kokunda bawei. Lokola babɔtɔlaki bato mabelé, bazalaki kofutisa bango mpako mpe mbongo mpo na batisimo, libala mpe bongo na bongo, Lingomba ya Katolike ekómaki na bozwi mingi. Bazalaki koloba ete Ba-Maya bazalaki bato ya biyambayamba mpe ya miso molili. Yango wana, basango ná bakonzi mosusu bamonaki ete basengeli kobɛtaka Ba-Maya fimbo mpo na kosembola bango mpe kosilisa bango biyambayamba.

Etumba ya mindɛlɛ ná Ba-Maya

Ba-Maya babandaki libosoliboso naino koboya kofuta mpako ya lingomba, kolongola bana na bango na biteyelo ya lingomba, na malongi mpe koboya kosala na bilanga ya basango. Kasi, yango ebakiselaki bango lisusu nde minyoko. Mɔtɔ epelaki makasi na kati na bango ná Ba-Maya na 1847, nsima ya mbula soki 300 ya boyangeli ya bato ya Espagne. Ba-Maya batombokelaki “mindɛlɛ,” mpe yango ebimisaki etumba ya mindɛlɛ ná Ba-Maya.

Bakambi ya batomboki yango bazalaki kosalela ekulusu moko oyo bazalaki kokanisa ete elobaka. Moto moko oyo azalaki na likoki ya koloba kozanga koningisa monɔkɔ azalaki koloba mpe bato bazalaki kokanisa ete ekulusu yango nde ezali koloba, mpe azalaki kotinda bato bábunda ata tii na liwa. Etumba yango esilisaki mpenza Ba-Maya. Na 1853, ntango bayokanaki ete bátika kobunda, Ba-Maya mingi (40%) ya etúká ya Yucatán bakufaki. Nzokande, etumba yango ezalaki kozonga mbala na mbala, na boumeli ya mbula 55. Nsukansuka, Ba-Maya bamilongolaki na boombo ya bato ya Espagne, mpe bakabolelaki bato nyonso mabelé ndenge moko. Kasi, tokoloba boni mpo na bonsomi ya losambo?

Basikwamaki mpenza te

Ezala koya ya Lingomba ya Katolike to etumba ya mindɛlɛ ná Ba-Maya, moko te epesaki Ba-Maya bonsomi ya solosolo. Tii lelo, bazali kaka na lolenge moko ya losambo oyo esangisi mimeseno ya bonkɔkɔ na bango ná oyo ya Lingomba ya Katolike.

Mpo na Ba-Maya ya ntango na biso, buku moko (The Mayas—3 000 Years of Civilization) elobi boye: “Ba-Maya basambelaka banzambe na bango ya kala mpe bankɔkɔ na bango na bilanga, na kati ya mabulu mpe na bangomba . . . kasi basambelaka mpe basantu.” Yango wana, na miso na bango nzambe lokola Quetzalcóatl, to Kukulcán, azali ndenge moko na Yesu, mpe nzambe ya sanza azali ndenge moko na Ngɔndɔ Malia. Longola yango, losambo ya ekulusu ezwaki esika ya nzete mosantu ceiba, mpe tii lelo, bato bazali kokoba kosopela yango mai lokola nde nzete oyo ezali naino na bomoi. Na esika ya ekeko ya Yesu, bikulusu na bango ezali nde na bililingi ya bafololo ya nzete ceiba.

Bonsomi ya solosolo eyei!

Eleki lelo mwa bambula, Batatoli ya Yehova na Mexique babandaki mosala monene ya koteya Ba-Maya Biblia. Mikanda oyo elimbolaka Biblia, lokola zulunalo oyo osimbi na mabɔkɔ, ebongolamaki na monɔkɔ ya Maya mpo na kosalisa bango báyeba mokano ya Nzambe mpo na bato. Yango ebimisi matomba nini? Na ntango tozalaki kokoma lisolo oyo, basakoli ya Bokonzi oyo balobaka monɔkɔ ya Maya bazalaki soki 6 600, mpe masangá 241 ya Batatoli ya Yehova na mokili na bango. Ezalaki pɛtɛɛ mpo na Ba-Maya kotika bindimeli na bango ya kala mpo na kondima solo ya Biblia?

Mpo na Ba-Maya mingi ya mitema sembo, ezalaki pɛtɛɛ te. Marcelino ná mwasi na ye, Margarita bazalaki Bakatolike ya molende mpenza. Mbula na mbula, bazalaki kokumisa ekulusu mpe komema yango banda na ndako-nzambe tii na ndako na bango, epai bazalaki kotumba bambeka ya banyama, mpe kolya banyama yango elongo na bandeko mpe baninga na bango. Mokolo moko, Batatoli ya Yehova bakendaki kotala bango mpe babandaki koyekola na bango Biblia. Balobi boye: “Toyebaki mpenza ete makambo oyo tozalaki koyekola ezali solo, kasi tozalaki kokanisa ete soki totiki losambo na biso ya kala, bilimo mabe bakosala biso mabe.” Atako bongo, bakobaki koyekola Biblia. Marcelino alobi boye: “Mokemoke, solo ya Biblia ekɔtaki mpe efandaki na mitema na biso. Yango epesaki biso mpiko ya koyebisa bandeko mpe baninga na biso makambo oyo tozalaki koyekola na Biblia. Lelo oyo, tozali na esengo ndenge tosikwami na boombo ya bindimandima oyo tozalaki na yango. Toyokaka mwa mpasi kaka mpo toyebaki solo liboso te. Mpo na kosomba ntango nyonso oyo tobungisá, tozali komipesa na molende nyonso na mosala ya koyebisa basusu mateya kitoko ya Biblia.”

Alfonso, oyo azali na mbula 73, azalaki mondimi ya molende mpenza ya Katolike. Na engumba na bango, ye nde azalaki kobongisa biyenga ya lingomba na bango. Na biyenga yango, bazalaki kosala misa, kobina; mpe moto nyonso azalaki kolya mpe komɛla. Bazalaki mpe kobundisa bangɔmbɛ. Abakisi boye, “ezali likambo ya kokamwa te ete bato bazalaki kolangwa mpe kobimisa mobulu. Atako nazalaki kosepela na biyenga yango, nazalaki komona ete eloko moko ezali kozanga na lingomba na biso.” Ntango Batatoli ya Yehova basololaki na Alfonso, andimaki koyekola Biblia. Atako azalaki kobɛla, abandaki kokende na makita na Ndako ya Bokonzi. Lelo oyo, atiká makambo nyonso ya lingomba na ye ya kala mpe azali kosalela mabaku nyonso mpo na koteya bato nyonso oyo bayaka kotala ye na ndako Biblia.

Wana ezali kaka mwa bandakisa na kati ya ebele ya Ba-Maya ya mitema sembo oyo bazali kozwa bonsomi ya solosolo na losambo. Ya solo, bankɔkɔ ya bato ya etúká ya Yucatán oyo batongaká bapiramide bazali tii lelo, mpe balobaka kaka monɔkɔ oyo bankɔkɔ na bango bazalaki koloba. Mingi na bango bazali kaka na bomoi oyo bankɔkɔ na bango bazalaki na yango; bafandaka na bandako ya ndɛlɛ, oyo etongamá na makonzi mpe na mabelé. Mpo na bilanga ya masango mpe ya ntokia (coton) oyo balonaka, bakataka kaka zamba mpe batumbaka yango, ndenge bankɔkɔ na bango bazalaki kosala. Kasi, sikoyo Liloba ya Nzambe esikoli Ba-Maya mingi na losambo ya lokuta mpe na bindimandima. Bazali mpenza komona bosolo ya maloba ya Yesu oyo: “Bokoyeba solo, mpe solo ekopesa bino bonsomi.”​—Yoane 8:32.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Réal ezalaki mbongo ya kala ya Espagne.

[Karte na lokasa 13]

(Mpo na komona yango, talá mokanda)

Esika oyo balandaka bonkɔkɔ ya Ba-Maya tii lelo

Golfe ya Mexique

MEXIQUE

Péninsule du Yucatán

Chichén Itzá

Cobá

BÉLIZE

GUATEMALA

HONDURAS

EL SALVADOR

[Elilingi na lokasa 13]

Bisika oyo Ba-Maya bazalaká, na Chichén Itzá

[Elilingi na lokasa 15]

Marcelino ná mwasi na ye, Margarita, bazali kosakola nsango malamu na etúká ya Yucatán

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto