Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w08 1/9 lok. 30
  • Namonaki mpenza motuya ya bomoi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Namonaki mpenza motuya ya bomoi
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Masolo mosusu
  • Babomaki bato na eteyelo Libondisi oyo epesamaki na nsima
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Nzambe apangwisi mpisoli na ye
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • Yehova azali koteya biso kotánga mikolo na biso
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • Totalela likabo kitoko ya bomoi na motuya mingi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
w08 1/9 lok. 30

Namonaki mpenza motuya ya bomoi

EZALAKI NA NTƆNGƆ YA 16 APRILI 2007. Wana nagumbamaki na nsuka mpenza ya biro moko na etaje ya mibale na ndako oyo babengaka Norris Hall, na Iniversite ya Virginie, mpo na mbala ya mibale, nakutanaki na likambo oyo emonisaki ngai ntina oyo tosengeli kozala na botɔndi mokolo na mokolo mpo na likabo ya bomoi.

Nazalaki na biro na ngai mpe nalingaki kobima mpo na kokende na etaje ya liboso kozwa mikanda na ngai. Profesɛrɛ moko ayaki kobenga ngai mpo nakende kobongisa eloko moko na ordinatɛrɛ na ye. Ntango tokómaki liboso ya biro na ye, toyokaki lokito ya masasi na etaje ya liboso. Lokola toyebaki te soki ezali nini, tokɔtaki mbangu na kati ya biro na ye, tokangaki porte mpe tozalaki kozela na motema likoló nini ekokómela biso. Nakendaki kobombama na nsuka ya biro mpe nabandaki kobondela Yehova Nzambe; nasɛngaki ye apesa ngai mayele liboso ya likambo nyonso oyo nakokutana na yango.

Na ntango yango, nakanisaki likambo moko oyo esalemaki mbula 15 liboso. Nazalaki kosala mosala ya kobongisa mituka. Mokolo moko, na esika ya mosala, saani ya esansi oyo moninga moko asimbaki na mabɔkɔ epelaki mɔtɔ. Na nsɔmɔ wana, abwakaki saani yango mpe esansi oyo ezali kopela ezwaki ngai na elongi! Napemaki milinga ya mɔtɔ mpe nazikaki makasi. Bamemaki ngai na helicoptère na lopitalo ya bato baziki mpe kuna nalekisaki sanza misato na ndambo, nazalaki kobunda na liwa. Nsima ya kosalisa ngai na boumeli ya sanza mitano, nazongaki na ndako mpe nazalaki na botɔndi ndenge nazalaki na bomoi. Likambo yango eteyaki ngai natalelaka bomoi na motuya mokolo na mokolo. Lisusu, ebakisaki ekateli na ngai ya kosalela Yehova Nzambe, ye oyo apesaki ngai bomoi yango, mpe kozala Motatoli na ye.​—Nzembo 90:12; Yisaya 43:10.

Lokola nakokaki lisusu kosala mosala ya kobongisa mituka te, nayekolaki mosala ya ordinatɛrɛ mpe nazwaki mosala na Iniversite ya Virginie. Yango wana nazalaki na Norris Hall mokolo wana.

Tozalaki kaka koyoka lokito ya masasi; nzokande, na etaje ya nse, mobali moko azalaki kobɛtabɛta masasi kozanga kopona mpe abomaki bato mingi koleka moto mosusu nyonso oyo asalá likambo ya ndenge wana na États-Unis mobimba. Mobali yango abomaki bato 32 mpe na nsima ye moko amibomaki. Miniti 20 na nsima, toyokaki bapolisi bazali kolekaleka na kulware. Tobelelaki bango mpe bayaki kobimisa biso mpo na kotya biso na esika ya malamu.

Likambo wana ya nsɔmɔ emonisaki ngai ete tokoki kobungisa na mbalakaka bomoi oyo tozali na yango. (Yakobo 4:14) Yango wana, ezali na ntina mingi tótyaka elikya epai ya Mopesi ya bomoi, Yehova Nzambe, mpe tótalelaka mokolo mokomoko ya bomoi lokola likabo ya motuya mingi oyo apesi biso!​—Nzembo 23:4; 91:2.

[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 30]

AP Photo/​The Roanoke Times, Alan Kim

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto