Oyebaki yango?
Mpo na nini bakonzi ya Bayuda bapesaki Yuda mbongo ya palata 30 mpo atɛka Yesu?
Ntango Yuda Mokeliota akendaki kotuna banganga-nzambe bakonzi soki bakopesa ye nini mpo atɛka Yesu, balakaki ete bakopesa ye “mbongo ya palata ntuku misato.” (Matai 26:14, 15) Ntalo yango emonisi ete bakonzi yango bazalaki mpenza koyina Yesu mpe bazalaki kotalela ye na motuya moke.
Ekoki kozala ete mbongo yango ya palata ezalaki nde basɛkɛlɛ, mbongo ya ebandeli oyo Bayuda bazalaki kosalela. Eloko nini bakokaki kosomba na sɛkɛlɛ 30? Na Mibeko ya Moize, yango ezalaki motuya ya mbongo oyo bazalaki kosomba na yango moombo. Motuya yango ya mbongo ekokaki mpe kosomba eteni ya mabelé.—Exode 21:32; Matai 27:6, 7.
Ntango mosakoli Zekalia asɛngaki Bayisalaele oyo bazangaki bosembo ete bápesa ye lifuti mpo na mosala na ye ya mokɛngɛli ya libota ya Nzambe, Bayisalaele yango bamekaki na kilo mpe bapesaki ye mbongo “ntuku misato ya palata.” Yango ezalaki ndenge ya kotyola mpe ya kokitisa mosakoli ya Nzambe; bamonisaki ete na miso na bango, azalaki na motuya moko na moombo. Yango wana Yehova ayebisaki Zekalia boye: “Bwaká yango epai ya moyemi ya mbɛki, oyo motuya malamu motángami ngai na bango.” (Zekalia 11:12, 13) Ndenge oyo Zekalia atosaki etinda ya Yehova mpe abwakaki mbongo yango ezali kotinda biso tókanisa likambo oyo Yuda asalaki na mbongo oyo azwaki ntango atɛkaki Moto oyo Yehova aponaki lokola mokɛngɛli ya Yisalaele.—Matai 27:5.
“Mokanda ya koboma libala” oyo Biblia elobeli ezalaki nini?
Mibeko ya Moize elobaki boye: “Soki moto akamati mwasi mpe abali ye, mpe na nsima soki ye abongi na miso na ye te mpo ete azwi likambo ya nsɔni na ye, mpe ye akomeli ye mokanda ya kolongola ye, mpe atye yango na lobɔkɔ na ye mpe abimisi ye na ndako na ye.” (Deteronome 24:1) Ntina ya mokanda yango ezalaki nini? Biblia elobi te makambo oyo bazalaki kokoma na mokanda yango; kasi, ekoki mpenza kozala ete ezalaki kobatela ntomo mpe matomba ya mwasi oyo babengani na libala.
Kati na 1951 mpe 1952, bamonaki biloko ndenge na ndenge ya kala na kati ya madusu, na nɔrdi ya Wadi Murabbaat, oyo ezalaká ebale na esobe ya Yudea. Na kati na ebele ya bamaniskri oyo bakundolaki, moko ezalaki mokanda ya koboma libala, oyo ekomamaki na monɔkɔ ya Aramɛyɛ na mobu 71 to 72 ya ntango na biso. (T.B.) Mokanda yango elobeli likambo oyo esalemaki na mokolo ya liboso ya sanza ya Marheshvân, na mbula ya 6 kobanda Bayuda batombokelaki Loma. Joseph, mwana ya Naqsan, oyo azalaki kofanda na Masada, abomaki libala na Miriam, mwana ya Jonathan, moto ya Hanablata. Na ndenge yango, Miriam akokaki kobalana na Moyuda nyonso oyo asepeli na ye. Joseph azongisaki mbongo ya libala mpe afutaki mbala minei eloko nyonso ya Miriam oyo ebebaki. Mokanda yango ezalaki na sinyatire ya Joseph ye moko mpe ya batemwe misato: Eliezer, mwana ya Malka; Joseph, mwana ya Malka; Eleazar, mwana ya Hanana.
[Elilingi na lokasa 25]
Madusu ya Wadi Murabbaat
[Elilingi na lokasa 25]
Mokanda ya koboma libala, esalemaki na mobu 71/72 T.B.
[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 25]
Madusu: Todd Bolen/Bible Places.com; mokanda: Clara Amit, na ndigisa ya Israel Antiquities Authority