Oyebaki yango?
Resansema nini esalaki ete Yesu abotama na Beteleme?
Evanzile ya Luka emonisi ete ntango Kaisala Augusto abimisaki mobeko ete resansema esalema na ampire ya Roma mobimba, “bato nyonso bazalaki kokende kokomisa nkombo, moto na moto na engumba na ye.” (Luka 2:1-3) Engumba ya Yozefe, tata mobɔkɔli ya Yesu ezalaki Beteleme, mpe mobembo oyo Yozefe na Maria basalaki mpo na kotosa mobeko wana esalaki ete Yesu abotama na Beteleme. Kokomisa nkombo ezalaki kosalisa mpo na kokɔngola bampako mpe kokɔtisa bato na mosala ya soda.
Ntango Baroma bazwaki Ezipito na mobu 30 liboso ya ntango na biso, bato ya Ezipito bazalaki kosala resansema banda kala mpenza. Bato ya mayele bandimaka ete Baroma balandaki mayele oyo bato ya Ezipito bazalaki kosalela mpo na kokoma nkombo mpe basalelaki yango na bamboka oyo bango bazalaki koyangela.
Moko ya likambo yango emonani na mobeko moko oyo guvɛrnɛrɛ Moroma ya Ezipito abimisaki na mobu 104 ya ntango na biso. Kopi ya mobeko yango ezali lelo oyo na bibliotɛkɛ moko na Angleterre. Elobi boye: “Gaius Vibius Maximus, guvɛrnɛrɛ ya Ezipito (alobi): Lokola ntango ya kosala resansema ndako na ndako ekoki, esengeli bato nyonso oyo bakendá kofanda na bisika mosusu ata mpo na likambo nini, bázonga na bamboka na bango mpo bátosaka mobeko ya kosala resansema, mpe lisusu bámipesa na mosala ya bilanga na mabele na bango.”
Mpo na nini Yozefe akanaki kopesa Maria mokanda ya koboma libala nzokande bazalaki kaka bafianse?
Evanzile ya Matai emonisi ete Yozefe ayokaki ete Maria akómi na zemi wana “balakanaki libala,” bakómaki naino kofanda ndako moko te. Lokola ayebaki te ete Maria azwaki zemi “na nzela ya elimo santu,” Yozefe akanisaki ete Maria asali ekobo, na yango akómaki na likanisi ya koboma libala.—Matai 1:18-20.
Epai ya Bayuda, bazalaki kotalela bafianse lokola bato oyo babalaná. Kasi, bafianse yango basengelaki kofanda ndako moko kaka soki bakokisi masɛngami nyonso mpo na libala. Kozala fianse ezalaki likambo ya lisɛki te—mpamba te soki mobali abongoli makanisi to soki mpo na likambo mosusu—libala esalemi te, elenge mwasi asengelaki kobala te tii ntango akozwa mokanda ya koboma libala. Soki mobali akufi liboso bábalana, elenge mwasi azalaki kotalelama lokola mwasi oyo mobali na ye akufá. Lisusu, soki elenge mwasi asali pite ntango bazali naino bafianse, bazalaki kotalela ye ete asali ekobo mpe bazalaki kokatela ye etumbu ya liwa.—Kolimbola Mibeko 22:23, 24.
Emonani ete Yozefe akanisaki mpenza ndenge balingaki kosala Maria soki likambo yango eyebani. Atako amonaki malamu komema likambo yango epai ya bakonzi oyo basengeli, mposa na ye ezalaki ya kobatela Maria mpo básala ye mabe te. Yango wana, azwaki ekateli ya kokabwana na ye na nkuku. Na ntango wana soki bamoni mwasi moko oyo abotá, kasi azali na mokanda ya koboma libala, bato bazalaki koyeba ete mwasi yango abalaki.
[Elilingi na lokasa 16]
Mobeko ya resansema oyo Guvɛrnɛrɛ Moroma ya Ezipito abimisaki na mobu 104 ya ntango na biso.
[Eutelo ya bafɔtɔ]
© The British Library Board, all rights reserved (lok.904)