Tózalaka makambo makasimakasi te
“Kobá kokundwela bango ete . . . bázala te bato ya makambo makasimakasi.”—Tito 3:1, 2.
1, 2. Makomami elobi nini na likambo ya kozala makambo makasimakasi te, mpe mpo na nini yango ebongi?
YEHOVA, Tata na biso ya likoló oyo atondá bolingo, azali na bwanya nsuka te. Biso bikelamu na ye tozali na mposa ya litambwisi na ye. (Nz. 48:14) Yakobo, moyekoli ya Yesu, ayebisi biso ete “bwanya oyo euti na likoló ezali libosoliboso pɛto na bizaleli, na nsima kimya, makambo makasimakasi te, esepelaka kotosa, etondi na motema mawa mpe na bambuma ya malamu, eponaka bilongi te, ezalaka na bokosi te.”—Yak. 3:17.
2 Ntoma Paulo alendisi biso boye: “Tiká ete ezaleli na bino ya makambo makasimakasi te eyebana epai ya bato nyonso.”a (Filp. 4:5) Yesu Klisto azali Nkolo mpe Mokonzi ya lisangá. (Ef. 5:23) Ezali mpenza na ntina ete mokomoko na biso azalaka makambo makasimakasi te mpe andimaka litambwisi ya Klisto mpe ayebaka kofanda na basusu!
3, 4. (a) Pesá ndakisa oyo emonisi matomba ya kozala makambo makasimakasi te. (b) Tokolobela nini?
3 Soki tozali koyokela basusu na bokatikati nyonso, tokoki kozwa matomba mingi. Tózwa ndakisa. Ntango balobaki ete bateroriste bakɔti na Angleterre, bato oyo bazalaki kosala mibembo na mpɛpɔ bakómaki kolanda mibeko mpe koboya komema biloko oyo bazalaki komema liboso. Ntango tozali kotambwisa motuka mpe tokómi na esika oyo banzela ekutaná, tosengeli kotikelaka mituka mosusu nzela, mpo makama esalema te mpe nzela ekóma nkaka te.
4 Mingi kati na biso tokokaka te kobwaka ezaleli ya kozala makambo makasimakasi. Nini ekoki kosalisa biso tózala makambo makasimakasi te? Makambo misato oyo tokotalela sikoyo: Ntina oyo tosengeli te kozalaka makambo makasimakasi, lolenge oyo totalelaka bakonzi mpe soki tosengeli koyokelaka basusu tii wapi.
Ntina oyo tosengeli te kozalaka makambo makasimakasi
5. Na Mibeko ya Moize, nini ekokaki kotinda moombo apona kotikala epai ya nkolo na ye?
5 Ndakisa moko ya ntango ya kala ezali komonisa ntina oyo tosengeli te kozalaka makambo makasimakasi. Mobeko ya Moize elobaki ete Bayuda oyo bazalaki baombo basengelaki kolongwa na boombo na mbula ya nsambo ya boombo na bango to mpe na mbula ya Yubile, soki yango eyei liboso. Kasi, moombo akokaki mpe kopona kotikala moombo. (Tángá Exode 21:5, 6.) Nini ekokaki kotinda moombo atikala? Bolingo nde ekokaki kotinda ye apona kotikala epai ya nkolo na ye wana ya malamu.
6. Ndenge nini bolingo ekoki kotinda biso tóyokelaka basusu?
6 Ndenge moko, bolingo na biso mpo na Yehova etindaka biso tómipesa epai na ye mpo na kosalela ye mpe tókokisa ndai yango. (Lom. 14:7, 8) Ntoma Yoane akomaki boye: “Bolingo ya Nzambe elakisi boye, ete tótosaka bakomandema na ye; kutu bakomandema na ye ezali kilo te.” (1 Yoa. 5:3) Bolingo ya ndenge wana elukaka matomba na yango moko te. (1 Kol. 13:4, 5) Ntango tofandi na basusu, bolingo ekotinda biso tóyokelaka bango mpe tótyaka matomba na bango na esika ya liboso. Na esika ya kotalelaka kaka matomba na biso moko, tosengeli kotalelaka mpe oyo ya basusu.—Filp. 2:2, 3.
7. Ndenge nini kozala na bokatikati ekoki kosalisa biso na mosala ya kosakola?
7 Tosengeli te kobɛtisaka basusu libaku na maloba to na makambo oyo tozali kosala. (Ef. 4:29) Bolingo ekotinda biso tósala te makambo oyo ekoki kopekisa bato ya bikólo mosusu kosalela Yehova. Yango esɛngaka mbala mingi tózala na bokatikati. Na ndakisa, bamisionɛrɛ ya basi oyo bamesaná kotya monzele na biloko ndenge na ndenge to kolata midele mosusu ya bilamba basengeli te kokangama kaka na mimeseno yango na bisika oyo bato bakoki komona bango lokola bandumba mpe kobɛta libaku.—1 Kol. 10:31-33.
8. Ndenge nini bolingo mpo na Nzambe ekoki kosalisa biso tómitambwisa lokola ‘bato oyo baleki mpenza moke’?
8 Bolingo mpo na Yehova ekopekisa biso tózala lolendo. Ntango bayekoli ya Yesu bazalaki kowelana mpo na koyeba soki nani aleki monene na kati na bango, Yesu atɛlɛmisaki mwana moko ya moke na katikati na bango. Alobaki na bango boye: “Moto nyonso oyo ayambi mwana oyo ya moke mpo na nkombo na ngai ayambi mpe ngai, mpe moto nyonso oyo ayambi ngai ayambi mpe moto oyo atindaki ngai. Mpo moto oyo azali komitambwisa lokola moto oyo azali mpenza moke na kati na bino nyonso azali moto oyo aleki monene.” (Luka 9:48; Mko. 9:36) Ekoki mpenza kozala mpasi komitambwisa “lokola moto oyo azali mpenza moke.” Kozanga kokoka oyo Adama ná Eva batikelá biso mpe lolendo ekoki kotinda biso tóluka lokumu, kasi komikitisa ekosalisa biso tózala na bokatikati.—Lom. 12:10.
9. Likambo nini tosengeli kobosana te soki tolingi kozala na botosi?
9 Mpo na kozala na botosi, tosengeli kondima bato oyo Yehova apesi bokonzi. Baklisto nyonso ya solo bayebi ntina ya ebongiseli ya Nzambe mpo na bokonzi. Ntoma Paulo amonisaki yango polele epai ya Bakolinti: “Nalingi bóyeba ete mokonzi ya mobali nyonso ezali Klisto; mpe mokonzi ya mwasi ezali mobali; mpe mokonzi ya Klisto ezali Nzambe.”—1 Kol. 11:3.
10. Kotosa bokonzi ya Yehova emonisaka nini?
10 Kotosa bokonzi ya Nzambe emonisaka ete tozali kotya motema epai na ye lokola Tata na biso ya bolingo. Ayebaka nyonso oyo ezali kokómela biso mpe akoki kopesa biso mbano. Ekozala malamu tóbosanaka likambo yango te ntango basusu bamoni biso mpamba mpe basilikeli biso. Paulo akomaki boye: “Soki likoki ezali, na meko oyo yango etaleli bino, bózala na kimya elongo na bato nyonso.” Mpe abakisaki toli yango na maloba oyo: “Bózongisa bino moko te mabe na oyo asali bino mabe, balingami, kasi bótikela nde nkanda esika; mpo ekomamá ete: ‘Kozongisa mabe ezali likambo na ngai; ngai nakozongisa, Yehova alobi bongo.’”—Lom. 12:18, 19.
11. Ndenge nini tokoki komonisa ete tondimi bokonzi ya Klisto?
11 Ebongiseli ya bokonzi oyo Nzambe atyá ezali mpe na ntina mingi na kati ya lisangá ya boklisto. Emoniseli mokapo 1 elobeli Yesu Klisto asimbi “minzoto” ya lisangá na lobɔkɔ na ye ya mobali. (Emon. 1:16, 20) Tokoki mpe koloba ete “minzoto” yango ezali masangani ya bankulutu, to bakɛngɛli ya masangá. Bakɛngɛli yango bandimaka litambwisi ya Klisto, mpe na ndakisa na ye, bazalaka na boboto mpenza epai ya basusu. Bandeko nyonso na kati ya lisangá batosaka ebongiseli oyo Yesu azwaki ete “moombo ya sembo mpe ya mayele” apesaka bango bilei ya elimo na ntango oyo ebongi. (Mat. 24:45-47) Lelo oyo, kondima koyekola mpe kosalela makambo yango emonisaka ete tondimi bokonzi ya Klisto, oyo esalaka ete tózala na kimya mpe na bomoko.—Lom. 14:13, 19.
Tosengeli koyokelaka basusu tii wapi?
12. Mpo na nini kotosa ezalaka mpe na ndelo na yango?
12 Nzokande, kotosa elimboli te kokakola kondima na biso to mitinda ya Nzambe. Baklisto ya liboso basalaki nini ntango bakonzi ya mangomba basɛngaki bango bátika kosakola na nkombo ya Yesu? Petelo ná bantoma mosusu balobaki na mpiko nyonso ete: “Tosengeli kotosa Nzambe lokola azali moyangeli na esika ya kotosa bato.” (Mis. 4:18-20; 5:28, 29) Yango wana, soki bakonzi ya Leta bapekisi biso kosakola nsango malamu, tosengeli kotika te, kasi tokoki koluka mayele mosusu ya kosakola mpo na kobenda mindondo te. Soki bapekisi biso kosakola ndako na ndako, tokoki koluka ndenge mosusu ya kosolola na bato mpe kokoba kokokisa mokumba oyo Nzambe apesá biso. Ndenge moko, soki “bakonzi oyo bazali liboso” bapekisi makita na biso, tokómaka koyangana na mayele na bituluku mikemike.—Lom. 13:1; Ebe. 10:24, 25.
13. Yesu alobaki nini na likambo ya kotosa bakonzi?
13 Na Lisolo Likoló ya Ngomba, Yesu amonisaki ntina ya kotosaka bakonzi: “Soki moto alingi kokende na yo na esambiselo mpe kokamata elamba na yo ya kati, tikelá ye mpe elamba na yo ya likoló akende na yango; mpe soki moto moko oyo azali na bokonzi azwi yo na makasi mpo osala kilomɛtɛlɛ moko, kende na ye kilomɛtɛlɛ mibale.” (Mat. 5:40, 41)b Komemya basusu mpe kozala na mposa ya kosalisa bango etindaka biso tósala koleka kutu oyo basɛngi biso.—1 Kol. 13:5; Tito 3:1, 2.
14. Mpo na nini tosengeli koyokanaka ata moke te na bapɛngwi?
14 Kasi, mposa na biso ya koyokelaka basusu esengeli te kotinda biso tóluka koyokana na bapɛngwi. Mpo tóbatela bopɛto ya mateya na biso mpe bomoko ya lisangá, tosengeli koboya mpenza boyokani na bapɛngwi. Mpo na “bandeko ya lokuta,” Paulo akomaki boye: “Toyokelaki bato wana te na nzela ya botosi, ɛɛ, ata mpo na ngonga moko te, mpo solo ya nsango malamu ekoba kozala elongo na bino.” (Gal. 2:4, 5) Soki bapɛngwi bamonani na lisangá, baklisto ya solosolo bakangamaka kaka na oyo ezali sembo.
Bakɛngɛli basengeli te kozala makambo makasimakasi
15. Ndenge nini bankulutu bakoki komonisa ete bazali makambo makasimakasi te ntango bakutani?
15 Moko ya masɛngami oyo bankulutu basengeli kokokisa ezali ya kozala makambo makasimakasi te. Paulo akomaki boye: “Mokɛngɛli asengeli kozala . . . makambo makasimakasi te.” (1 Tim. 3:2, 3) Yango ezalaka na ntina mingimingi ntango bankulutu bakutani mpo na kotalela makambo ya lisangá. Liboso ya kozwa ekateli moko, nkulutu mokomoko akoki kopesa makanisi, atako esengeli kaka te bango nyonso báloba. Ntango bazali kosolola, moko akoki kobongola makanisi na ye ntango basusu bapesi mitinda ya Biblia oyo elobeli likambo yango. Na esika ya koboya koyoka mpe kokangama kaka na likanisi na ye, nkulutu oyo akɔmɛlá asengeli koyokela baninga. Na ebandeli, bakoki kozala na makanisi ekeseni, kasi kokanisa elongo mpe kobondela esalisaka bankulutu oyo bazalaka makambo makasimakasi te bázala na bomoko.—1 Kol. 1:10; Tángá Baefese 4:1-3.
16. Nkulutu asengeli kozala na ezaleli nini?
16 Na makambo nyonso oyo azali kosala, nkulutu asengeli kolanda malako ya Nzambe. Asengeli kozala na ezaleli yango ata ntango azali kokende kotala bampate, mpe yango ekosalisa ye azala na limemya mpe na boboto epai na basusu. Petelo akomaki boye: “Bóbatela etonga ya Nzambe oyo epesami na mabɔkɔ na bino, na kopusama te, kasi na bolingo malamu; na bolingo ya litomba ezangi sembo te, kasi na mposa makasi.”—1 Pet. 5:2.
17. Ndenge nini biso nyonso na kati ya lisangá tokoki komonisa ete tozalaka makambo makasimakasi te?
17 Bandeko ya lisangá oyo bakómi mibange basepelaka na lisalisi ya bilenge mpe bapesaka bango lokumu. Bilenge mpe bamemyaka mibange oyo baumeli mingi na mosala ya Yehova. (1 Tim. 5:1, 2) Bankulutu balukaka mibali ya makoki mpo na kotikela bango mikumba mosusu mpe kolakisa bango ndenge ya kobatela bampate ya Nzambe. (2 Tim. 2:1, 2) Moklisto mokomoko asengeli kolanda toli ya Paulo oyo: “Bótosaka baoyo bazali kokamba bino mpe bóyokelaka bango, mpo bazali kokɛngɛla milimo na bino lokola bato oyo bakozongisa monɔkɔ; mpo básalaka yango na esengo kasi na komilelalela te, mpo yango ekozala likama mpo na bino.”—Ebe. 13:17.
Tózalaka makambo makasimakasi te na kati ya libota
18. Mpo na nini ezali na ntina ete moto mokomoko na kati ya libota azalaka makambo makasimakasi te?
18 Na libota mpe, biso nyonso tosengeli kozalaka makambo makasimakasi te. (Tángá Bakolose 3:18-21.) Biblia emonisi mokumba ya moto mokomoko na kati ya libota. Tata azali mokonzi ya mwasi na ye, mpe mokumba ya koteya bana ezali libosoliboso ya ye. Mwasi asengeli kondima bokonzi ya mobali na ye, mpe bana basengeli kosala makasi mpo na kozala na botosi, mpamba te yango esepelisaka Nkolo. Soki moto mokomoko na kati ya libota azali makambo makasimakasi te, libota ekozala na bomoko mpe na kimya. Biblia ezali na bandakisa oyo emonisi bosolo ya likambo yango.
19, 20. (a) Monisá bokeseni oyo ezali na kati ya Eli ná Yehova na likambo ya koyokela basusu. (b) Baboti bakoki kozwa mateya nini na bandakisa wana?
19 Ntango Samwele azalaki mwana moke, Eli azalaki nganga-nzambe monene na Yisalaele. Kasi, bana ya Eli, Hofini ná Fineasi, “bazalaki bana mpamba” oyo “bayebaki [Yehova] te.” Eli ayokaki nsango ya makambo mabe oyo bana na ye bazalaki kosala; na ndakisa bazalaki kosala pite na basi oyo bazalaki kosala na ekuke ya hema ya koyangana. Eli asalaki nini? Alobaki na bango ete soki basali lisumu liboso ya Yehova, moto moko te akoki kobondela mpo na bango. Kasi, asembolaki bango te mpe apesaki bango etumbu te. Yango wana, bana ya Eli bakobaki na mabe na bango. Nsukansuka, Yehova akatelaki bango etumbu ya liwa. Ntango Eli ayokaki ete bana na ye bakufi, ye moko mpe akufaki. Oyo nde mawa! Emonani mpenza ete Eli akangaki miso na mabe na ndenge atikaki bana na ye bákoba kosala mabe.—1 Sam. 2:12-17, 22-25, 34, 35; 4:17, 18.
20 Tótalela sikoyo ndenge oyo Yehova ayokelaka baanzelu na ye. Yehova akeseni mpenza na Eli. Na emonaneli moko ya kokamwa, mosakoli Mikaya amonaki Yehova ná baanzelu na ye bazali na likita. Yehova atunaki bango soki nani akoki kokosa Ahaba, mokonzi mabe ya Yisalaele, mpo na kokweisa ye. Yehova ayokaki makanisi na bango. Na nsima, anzelu moko alobaki ete ye akoki kokosa Ahaba. Yehova asɛngaki ye ayebisa ndenge akosala. Yehova asepelaki na likanisi na ye mpe atindaki ye asala ndenge alobi. (1 Mik. 22:19-23) Okanisi te ete mabota bakoki kozwa liteya na ndakisa malamu wana ya Yehova? Mobali mpe tata moklisto asengeli koyokelaka mwasi ná bana na ye. Ndenge moko mpe, basi ná bana basengeli koyeba ete ata soki bapesi makanisi, ekosɛnga bándima bikateli oyo tata akopesa, mpamba te Makomami emonisi ete ye nde azali na mokumba ya kotambwisa libota.
21. Tokolobela nini na lisolo oyo ekolanda?
21 Tozali mpenza na botɔndi epai ya Yehova mpo na batoli na ye ya bolingo mpe ya bwanya, oyo ezali kosalisa biso tózalaka makambo makasimakasi te. (Nz. 119:99) Lisolo oyo elandi ekomonisa ndenge oyo kozala makambo makasimakasi te ememaka esengo na kati ya libala.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Ntoma Paulo asalelaki liloba moko oyo ezali mpasi kobongola yango na liloba moko kaka na Lingala. Buku moko elobi ete: “Liloba yango ekoki kolimbola kondima kotikela basusu matomba na yo, kopesa bango lokumu mpe komonisela bango boboto.” Na bongo, liloba yango elimboli mpe kozala makambo makasimakasi te, elingi koloba koboya kolandela makambo mikemike to kotikela basusu matomba na yo.
b Talá lisolo “Soki moto azwi yo na makasi mpo osala mosala,” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Febwali 2005, nkasa 23-26.
Okopesa eyano nini?
• Kozalaka makambo makasimakasi te ekoki kobota mbuma nini?
• Ndenge nini bankulutu bakoki komonisa ete bazali makambo makasimakasi te?
• Mpo na nini moto mokomoko na kati ya libota asengeli kozala makambo makasimakasi te?
[Elilingi na lokasa 4]
Bankulutu basalelaka basusu makambo na boboto ndenge Klisto azalaki kosala
[Elilingi na lokasa 6]
Ntango bankulutu bakutani, kokanisa mpe kobondela, mpe koyokelana, ekosala ete bázala na bomoko