Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w08 1/3 nk. 8-10
  • Ndenge ya kokóma mwana ya Nzambe

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ndenge ya kokóma mwana ya Nzambe
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Ndenge oyo libota ya Nzambe ekabwanaki
  • Koyanganisama ya bana oyo babungá
  • Bana ya Nzambe oyo bakozala awa na mabelé
  • Ndenge ya kozonga epai ya Tata na yo
  • Sepelá na libota na yo ya solosolo
  • Zwá na motuya esika oyo ozali na yango na libota ya Yehova
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2021
  • Mokano ya Yehova ekokisami na nkembo mpenza
    Tósambela Nzambe kaka moko ya solo
  • “Nzambe alingaki biso boye”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
  • Bokonzi ya Nzambe—Boyangeli ya sika mpo na mabele
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
w08 1/3 nk. 8-10

Ndenge ya kokóma mwana ya Nzambe

MBULA soki 30 nsima ya Etumba ya Corée, radio ya ekólo Corée ebongisaki emisyo moko mpo na kosalisa bato bákutana lisusu na bandeko na bango oyo babungaki na ntango ya etumba. Likambo nini emonanaki na nsima? Bato koleka 11 000 bakutanaki lisusu na bandeko na bango​—bazalaki kolela, koganga, mpe koyambana na esengo. Zulunalo moko (Korea Times) elobaki boye: “Ezalaki mbala ya liboso oyo bato ya Corée batangisaki mpisoli mingi ya esengo.”

Na Brésil, ntango Cézar azalaki naino bebe, baboti na ye bapesaki ye na libota mosusu mpo na kofuta nyongo oyo bazalaki na yango. Mbula soki zomi na nsima, Cézar azalaki na esengo ya komona mama oyo abotá ye mpe alongwaki na libota ya bato ya mbongo oyo bazalaki kobɔkɔla ye mpo na kokende kofanda na mama na ye.

Bato ya libota moko basepelaka mingi ntango bakutani lisusu! Biblia emonisi ndenge oyo bato bakabwanaki na libota ya Nzambe. Eyebisi mpe ndenge oyo bazali kozonga lisusu na libota yango. Likambo nini esalemaki? Ndenge nini yo mpe okoki koyoka esengo ya kozonga na libota ya Nzambe?

Ndenge oyo libota ya Nzambe ekabwanaki

Mokomi ya nzembo alobaki mpo na Yehova Nzambe, Mozalisi na biso ete: “Na yo ezali liziba ya bomoi.” (Nzembo 36:9) Yehova azali Tata ya libota moko monene. Libota yango esangisi baanzelu na likoló, oyo bazali bana na ye ya elimo; mpe bato oyo bazali bana na ye awa na mabelé.

Ndenge tomonaki yango na lisolo eleki, ntango Adama, mwana ya liboso ya Nzambe awa na mabelé, akómaki motomboki, bato bakabwanaki na Tata mpe Mozalisi na bango ya bolingo. (Luka 3:38) Ezali bongo mpamba te ntango Adama akómaki motomboki, abebisaki mpo na ye moko mpe mpo na bana oyo asengelaki kobota libaku malamu ya kozala bana ya Nzambe. Na nzela ya mosaleli na ye Moize, Nzambe amonisaki mabe oyo likambo yango ememaki: “Bango basaleli ye mabe, bazali bana [ya Nzambe] lisusu te na ntina na libebi na bango.” “Libebi” to lisumu ekabolaki bato na Nzambe, ye oyo azali mosantu mpe azali ya kokoka. (Deteronome 32:4, 5; Yisaya 6:3) Na maloba mosusu, bato babunganaki na Tata na bango.​—Baefese 2:12.

Mpo na komonisa ete bato bakabwani mpenza na Nzambe, Biblia elobi ete bato oyo bazali na libota ya Nzambe te bazali “banguna.” (Baloma 5:8, 10) Lokola bato bakabwanaki na Nzambe, bazali konyokwama na boyangeli mabe ya Satana mpe bazali kokufa mpo na lisumu mpe ezaleli ya kozanga kokoka. (Baloma 5:12; 1 Yoane 5:19) Bato ya masumu bakoki kozala na libota ya Nzambe? Bato ya kozanga kokoka bakoki mpenza kokóma bana ya Nzambe, ndenge oyo Adama ná Eva bazalaki liboso básala lisumu?

Koyanganisama ya bana oyo babungá

Na bolingo na ye, Yehova azwaki bibongiseli mpo na bolamu ya bato ya kozanga kokoka oyo balingaka ye. (1 Bakolinti 2:9) Ntoma Paulo alobaki boye: “Nzambe na nzela ya Klisto azalaki kozongisa mokili na boyokani elongo na ye moko, kotángeláká bango mabunga na bango te.” (2 Bakolinti 5:19) Ndenge lisolo eleki emonisaki yango, Yehova Nzambe apesaki Yesu Klisto lokola lisiko mpo na masumu na biso. (Matai 20:28; Yoane 3:16) Ntoma Yoane amonisaki botɔndi na ye ntango akomaki boye: “Bótala motindo ya bolingo oyo Tata apesi biso, mpo tóbengama bana ya Nzambe.” (1 Yoane 3:1) Na ndenge yango, nzela efungwamaki mpo bato ya botosi bákɔta na libota ya Yehova.

Atako bato nyonso oyo bakokɔta na libota ya Nzambe bakozala na bomoko mpe Tata na bango ya likoló akobatela bango, Biblia emonisi ete bazali bituluku mibale. Elobi boye: “Yango ezali engebene bosepeli [ya Nzambe] ndenge akanaki na kati na ye moko mpo na mosala moko ya kotambwisa makambo na nsuka mpenza ya bantango oyo etyamá, elingi koloba, koyanganisa lisusu biloko nyonso esika moko na kati ya Klisto, biloko oyo ezali na likoló mpe biloko oyo ezali na mabelé.” (Baefese 1:9, 10) Mpo na nini Nzambe azali kotambwisa makambo na ndenge wana?

Ndenge oyo Yehova akaboli bana na ye na bituluku mibale ezali kosala ete makambo na libota na ye etambwisama na molɔngɔ. Ezali mpasi te tóyeba mpo na nini. Libota ya Nzambe ezali monene mpenza, tokoki kokokanisa yango na ekólo mobimba. Na ekólo nyonso, ezalaka na mwa bato oyo baponamaka mpo na kozala na guvɛrnema mpo bato mosusu bázala na kimya. Ya solo, ata guvɛrnema moko te ya bato esilá kotya kimya ya solosolo, kasi Nzambe abongisi guvɛrnema moko ya kokoka mpo na libota na ye. Etuluku ya liboso, “biloko oyo ezali na likoló,” esangisi bana ya Nzambe oyo aponi mpo bázala na guvɛrnema, to Bokonzi, na likoló. Kuna, “basengeli koyangela mabelé.”​—Emoniseli 5:10.

Bana ya Nzambe oyo bakozala awa na mabelé

Yehova azali mpe koyanganisa “biloko oyo ezali na mabelé,” elingi koloba, ebele ya bato na mokili mobimba mpo nsukansuka bákóma bana na ye oyo bakofanda awa na mabelé. Lokola azali Tata ya bolingo, azali koteya bango banzela na ye ya bolingo mpe bazali na bomoko atako bauti na bikólo ndenge na ndenge. Ata bato ya mobulu, ya moimi, ya pite, mpe bato oyo batosaka Nzambe te bazali kobengama mpo na ‘kozonga na boyokani elongo na Nzambe.’​—2 Bakolinti 5:20.

Ezali boni mpo na bato oyo bazali koboya kozonga na boyokani na Nzambe? Yehova akozwela bango ekateli mpo na kobatela kimya mpe bomoko na kati ya libota na ye. Biblia elobi ete ekozala na “mokolo ya lisambisi mpe ya libebi ya bato oyo batyolaka Nzambe.” (2 Petelo 3:7) Nzambe akolongola batomboki nyonso awa na mabelé. Yango ekozala mpenza esengo mpo na bato ya botosi!​—Nzembo 37:10, 11.

Na nsima, ekozala na mbula nkóto ya kimya oyo, na boumeli na yango, bato nyonso oyo balingaka Nzambe bakozongisama mokemoke na ezaleli ya kokoka lokola oyo Adama azalaki na yango. Ata bato oyo bakufá bakozonga na bomoi. (Yoane 5:28, 29; Emoniseli 20:6; 21:3, 4) Na ndenge yango, Nzambe akokokisa elaka na ye oyo: “Bozalisi [elingi koloba bato] yango moko mpe ekolongolama na boombo ya kopɔla mpe ekozwa bonsomi ya bana ya Nzambe oyo etondi na nkembo.”​—Baloma 8:21.

Ndenge ya kozonga epai ya Tata na yo

Cézar mpe bankóto ya bato ya Corée oyo tolobelaki na ebandeli ya lisolo oyo, basengelaki kosala likambo moko mpo na kokutana lisusu na baboti mpe bandeko na bango. Mpo na bato ya Corée, esengelaki ete bálanda malako oyo ezalaki kopesama na radio; mpo na Cézar, esengelaki ete atika baboti oyo bazalaki kobɔkɔla ye. Ndenge moko mpe, osengeli kosala likambo moko mpo na kozonga na boyokani na Yehova Nzambe, Tata na yo ya likoló, mpe kokɔta na kati ya libota na ye. Osengeli kosala nini?

Mpo na kopusana penepene na Tata na yo, osengeli koyekola Biblia, Liloba na ye, mpo na kokóma na kondima makasi epai na ye mpe na bilaka na ye. Osengeli kondima ete makambo oyo Nzambe ayebisaka yo ezali mpo na bolamu na yo. Osengeli mpe kondima toli mpe disipilini ya Nzambe, mpamba te Biblia eyebisi baklisto boye: “Nzambe azali kosalela bino makambo lokola bana. Mpo mwana nini oyo tata apesaka disipilini te?”​—Baebele 12:7.

Soki osali makambo yango, bomoi na yo ekobongwana mpenza. Biblia elobi ete: “Bosengeli kokómisama sika na kati ya bokasi oyo ezali kopusa makanisi na bino, mpe bosengeli kolata bomoto ya sika oyo ezalisamaki engebene mokano ya Nzambe na kati ya boyengebene ya solosolo mpe bosembo.” (Baefese 4:23, 24) Na nsima, landá toli oyo ya ntoma Petelo: “Bótosaka Nzambe, ndenge bana batosaka baboti na bango; bótika kolanda baposa oyo bozalaki na yango, tango boyebaki Nzambe té.”​—1 Piere 1:14, Bible na Lingala ya lelo oyo.

Sepelá na libota na yo ya solosolo

Ntango Cézar amonaki mama na ye, azalaki na esengo makasi ya koyeba ete azalaki mpe na yaya ya mwasi mpe yaya ya mobali. Ndenge moko mpe ntango opusani penepene na Tata na yo ya likoló okomona ete ozali na ebele ya bandeko ya mibali mpe ya basi na kati ya lisangá ya boklisto. Ntango ozali kosangana na bango, okomona ete okolingana na bango koleka ata bandeko na yo ya libota moko.​—Misala 28:14, 15; Baebele 10:24, 25.

Lelo oyo, ozali na libaku ya kozala na boyokani malamu na Tata na yo mpe kosangana na bandeko na yo ya solosolo. Esengo oyo okoyoka ekozala lokola esengo oyo Cézar mpe bankóto ya bato ya Corée bayokaki ntango bakutanaki lisusu na bandeko na bango.

[Elilingi na lokasa 8]

Cézar na mbula 19, elongo na mama na ye

[Bililingi na lokasa 10]

Salá makambo oyo ekosalisa yo opusana penepene na Nzambe

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto