Landá ndakisa ya Misionɛrɛ monene
“Bókóma bamekoli na ngai, ndenge ngai mpe nazali ya Klisto.”—1 KOL. 11:1.
1. Mpo na nini tosengeli kolanda ndakisa ya Yesu Klisto?
NTOMA PAULO alandaki ndakisa ya Yesu Klisto, Misionɛrɛ monene. Alendisaki mpe baninga na ye baklisto boye: “Bókóma bamekoli na ngai, ndenge ngai mpe nazali ya Klisto.” (1 Kol. 11:1) Nsima ya kopesa bayekoli na ye liteya ya komikitisa na ndenge asukolaki bango makolo, Yesu alobaki na bango boye: “Napesi bino ndakisa, mpo, ndenge nasaleli bino yango, bino mpe bósalaka bongo.” (Yoa. 13:12-15) Lelo oyo, biso baklisto tozali na mokumba ya kolanda ndakisa ya Yesu Klisto na maloba, na misala, mpe na bizaleli na biso.—1 Pet. 2:21.
2. Ata soki Lisangani ya Mikóló-Bakambi etindi yo lokola misionɛrɛ te, elimo nini okoki kozala na yango?
2 Na lisolo eleki, tomonaki ete misionɛrɛ ezali moto oyo atindami lokola mopalanganisi ya nsango malamu—moto oyo azali komemela bato nsango malamu. Na likambo yango, Paulo atunaki mituna oyo esengeli kobenda likebi na biso. (Tángá Baloma 10:11-15.) Paulo atunaki boye: “Ndenge nini bakoyoka nsango soki moto oyo akosakola azali te?” Na nsima, azongelaki maloba oyo ezali na Yisaya ete: “Oyo nde kitoko makolo ya baoyo bazali kosakola nsango malamu ya makambo ya malamu!” (Yis. 52:7) Ata soki Lisangani ya Mikóló-Bakambi etindi yo lokola misionɛrɛ te na mboka mopaya, okoki kozala na elimo ya mopalanganisi ya nsango malamu, mpe okoki kolanda ndakisa ya Yesu lokola mosakoli ya molende ya nsango malamu. Na mbula eleki, basakoli ya Bokonzi 6 957 852 ‘basalaki mosala ya mopalanganisi ya nsango malamu’ na mikili 236.—2 Tim. 4:5.
“Totiki biloko nyonso mpe tolandi yo”
3, 4. Yesu atikaki nini mpo na koya awa na mabelé, mpe tosengeli kosala nini mpo na kolanda ndakisa na ye?
3 Mpo na koya kokokisa mosala na ye awa na mabelé, Yesu “amikómisaki nde mpamba mpe akamataki motindo ya moombo,” atikaki nkembo oyo azalaki na yango na likoló. (Filp. 2:7) Nyonso oyo tokoki kosala mpo na kolanda ndakisa ya Klisto ekoki soki moke te kokokana na oyo ye moko asalaki na ndenge ayaki awa na mabelé. Kasi, tokoki kotikala ntango nyonso bayekoli na ye mpe koboya kokanisa makambo oyo totikaki na mokili ya Satana.—1 Yoa. 5:19.
4 Mokolo moko, ntoma Petelo alobaki na Yesu boye: “Talá! Biso totiki biloko nyonso mpe tolandi yo.” (Mat. 19:27) Petelo, Andele, Yakobo, mpe Yoane basundolaki mbala moko minyama na bango ntango Yesu abengaki bango. Batikaki mosala na bango ya koboma mbisi mpe bamipesaki na mosala ya kosakola. Evanzile ya Luka emonisi ete Petelo alobaki boye: “Talá! Biso totiki biloko na biso mpenza mpe tolandi yo.” (Luka 18:28) Mingi kati na biso totiki “biloko na biso” nyonso mpenza te mpo na kolanda Yesu. Atako bongo, ‘tomiboyaki’ mpo na kokóma bayekoli ya Klisto mpe basaleli ya sembo ya Yehova. (Mat. 16:24) Ekateli yango ememeli biso ebele ya mapamboli. (Tángá Matai 19:29.) Kozala na elimo ya mopalanganisi ya nsango malamu na ndakisa ya Klisto, epesaka biso esengo na motema, mingimingi soki tosalisi ata moke moto moko apusana penepene na Nzambe mpe na Mwana na ye.
5. Lobelá ndakisa oyo ezali komonisa ekateli oyo moto oyo akei na mboka mopaya akoki kozwa ntango ayekoli solo ya Biblia.
5 Valmir, mobali moko oyo azali moto ya Brésil, akendaki kofanda na ekólo Suriname mpo na koluka wolo. Mobali yango azalaki molangwi-masanga mpe azalaki na etamboli ya mbindo. Ntango azalaki na engumba moko, akutanaki na Batatoli ya Yehova mpe bakómaki koyekola na ye Biblia. Azalaki koyekola mokolo na mokolo, abongwanaki mpenza mpe eumelaki te, azwaki batisimo. Ntango amonaki ete mosala na ye ezalaki kopekisa ye alanda mitinda ya Biblia, atɛkaki biloko na ye ya mosala, azongaki na Brésil mpo na kosalisa bato ya libota na ye báyeba solo. Bato mingi oyo bakendaki na mikili ya bozwi, ntango bayekoli solo ya Biblia kuna, bazali kotika misala na bango mpe bazali kozonga na mikili na bango mpo na kosalisa bandeko na bango mpe bato mosusu báyeba solo. Basakoli yango bazali mpenza komonisa elimo ya mopalanganisi ya nsango malamu.
6. Tokoki kosala nini soki tozali na likoki te ya kokende na esika oyo basakoli ya Bokonzi bazali mingi te?
6 Batatoli mosusu mpe bakei na bisika oyo basakoli ya Bokonzi bazali mingi te. Bamosusu kutu bakei na mboka mopaya. Mbala mosusu ezali mpasi mpo biso mpe tósala lokola bango, kasi tokoki kolanda ndakisa ya Yesu soki tozali kosala nyonso oyo tokoki na mosala ya kosakola.
Yehova azali kopesa formasyo oyo esengeli
7. Biteyelo nini ebongisami mpo na kopesa formasyo na bandeko oyo balingi kobakisa makoki na bango lokola basakoli ya Bokonzi?
7 Se ndenge Yesu azwaki formasyo epai ya Tata na ye, biso mpe tokoki kolanda formasyo oyo Yehova azali kopesa lelo oyo. Yesu alobaki boye: “Ekomamá na kati ya Basakoli ete, ‘Mpe bango nyonso bakoteyama na Yehova.’” (Yoa. 6:45; Yis. 54:13) Lelo oyo, biteyelo ndenge na ndenge ebongisami mpo na kopesa basakoli ya Bokonzi formasyo. Na ntembe te, biso nyonso tozali kozwa litomba na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi oyo esalemaka na masangá na biso. Babongisi-nzela bazali na libaku malamu ya kokɔta na Eteyelo mpo na babongisi-nzela. Babongisi-nzela oyo baumeli bazali na libaku ya kokɔta na eteyelo yango mpo na mbala ya mibale. Bankulutu mpe basaleli na misala bakɔtaka na Eteyelo mpo na mosala ya Bokonzi, oyo esalisaka bango báyeba koteya malamu mpe bábongisa mosala oyo bazali kosala mpo na bandeko. Ebele ya bankulutu mpe basaleli na misala oyo bazali minzemba bazali kozwa libaku ya kokɔta na Eteyelo mpo na kobongisa basungi, oyo ezali kopesa bango formasyo mpo na kosalisa basusu na mosala ya kosakola. Lisusu, ebele ya bandeko mibali mpe basi oyo bazali bamisionɛrɛ bazwaki formasyo na Gileadi, Eteyelo ya Watchtower mpo na mateya ya Biblia.
8. Bandeko mingi bapesaka motuya nini na formasyo oyo Yehova azali kopesa?
8 Batatoli mingi batikaki misala to makambo mosusu mpo bázwa likoki ya kokɔta na biteyelo yango. Na ndakisa, mpo na kokɔta na Eteyelo mpo na kobongisa basungi, Yugu, ndeko moko na Canada, atikaki mosala na ye mpamba te patrɔ na ye aboyaki kopesa ye konje. Yugu alobaki boye: “Nazali na mawa te. Kutu, soki patrɔ na ngai andimaki kopesa ngai konje, alingaki komizela ete nazongela mosala na ngai. Kasi, sikoyo nazali pene ya kokende esika nyonso oyo Yehova akotinda ngai na mosala na ye.” Mpo na kozwa libaku ya kolanda formasyo oyo Nzambe azali kopesa, bandeko mingi batiki makambo oyo bazalaki kotalela na motuya mingi.—Luka 5:28.
9. Lobelá ndakisa moko oyo ezali komonisa ete mateya ya Biblia mpe milende oyo moto azali kosala ekoki kofungola ye mayele.
9 Kolanda mateya ya Biblia mpe kosala molende ekoki mpenza kofungola moto mayele. (2 Tim. 3:16, 17) Tózwa ndakisa ya Saulo, elenge moko na ekólo Guatemala. Saulo abotamaki na maladi oyo esalaki ete azala mayele te. Molakisi moko ayebisaki mama ya Saulo ete asengeli te koluka ete mwana na ye ayeba kotánga, yango ekonyokola mwana mpamba. Saulo alongwaki na kelasi, ayebaki kotánga te. Nzokande, Motatoli moko ateyaki Saulo kotánga na lisalisi ya mwa buku Omipesa na kotánga mpe kokoma. Kutu, Saulo akómaki kosala masolo na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi. Mokolo moko, ntango mama ya Saulo azalaki kosakola ndako na ndako, akutanaki na molakisi wana. Ntango ayebisaki ye ete Saulo akómá kotánga, molakisi asɛngaki mama yango amema Saulo na pɔsɔ oyo ekolanda. Ntango molakisi amonaki Saulo, atunaki ye ete: “Makambo nini osepeli koteya ngai?” Saulo atángelaki ye paragrafe moko na buku Biblia eteyaka mpenza nini? Molakisi alobaki ete: “Nazali kondima te ete yo nde ozali koteya ngai.” Molakisi akokaki kokanga motema te, alelaki mpe ayambaki Saulo.
Mateya oyo esimbaka motema
10. Buku nini ya malamu mingi tozali na yango mpo na koteya bato Biblia?
10 Yesu azalaki koteya makambo oyo Yehova alakisaki ye mpe malako oyo ezali na Liloba ya Nzambe. (Luka 4:16-21; Yoa. 8:28) Tolandaka ndakisa ya Yesu na ndenge tosalelaka batoli na ye mpe toteyaka kaka makambo oyo euti na Biblia. Na ndenge yango, biso nyonso tozalaka na maloba mpe makanisi ndenge moko, mpe yango esalaka ete tózala na bomoko. (1 Kol. 1:10) Tozali mpenza na botɔndi na ndenge “moombo ya sembo mpe ya mayele” azali kobimisa mikanda oyo ezali kosalisa biso tózala na mateya ndenge moko mpe tókokisa mosala na biso lokola bapalanganisi ya nsango malamu! (Mat. 24:45; 28:19, 20) Moko ya mikanda yango ezali buku Biblia eteyaka, oyo ebimisami lelo oyo na minɔkɔ 179.
11. Ndenge nini ndeko-mwasi moko na Éthiopie alongaki botɛmɛli na lisalisi ya buku Biblia eteyaka?
11 Kosalela buku Biblia eteyaka ekoki kolɛmbisa mitema ya bato oyo batɛmɛlaka biso. Mokolo moko, Lula, mobongisi-nzela moko na Éthiopie, azalaki koyekola Biblia na moto moko; mbala moko, ndeko ya moto yango ayaki mpe apekisaki bango koyekola. Na kimya nyonso, Lula asololaki na ye; asalelaki ndakisa ya mbongo ya monyato oyo balobeli na mokapo 15 ya buku Biblia eteyaka. Mwasi yango alɛmbisaki motema mpe atikaki bango bákoba koyekola. Kutu, na mbala oyo elandaki, ayaki kolanda boyekoli mpe asɛngaki ete ye mpe abanda koyekola, mpe soki ekosɛnga mbongo, akobanda kofuta! Mwa moke na nsima, akómaki koyekola mbala misato na pɔsɔ mpe akolaki mpenza na elimo.
12. Lobelá ndakisa moko oyo emonisi ete bilenge bakoki mpenza koteya bato solo ya Biblia.
12 Bilenge mpe bakoki kosalisa bato na nzela ya buku Biblia eteyaka. Na Hawaii, ntango Keanu, elenge moko ya mbula 11, azalaki kotánga buku yango na kelasi, moninga na ye moko ya kelasi atunaki ye ete: “Mpo na nini bosalaka bafɛti te?” Keanu atángelaki ye apɛndisi, na motó ya likambo, “Tosengeli mpe kosalaka bafɛti oyo bato mingi basalaka?” Na nsima, afungolaki na lokasa oyo ezali na mitó ya makambo mpe asɛngaki ye apona motó ya likambo oyo ebendi mpenza likebi na ye. Na nsima, bakómaki koyekola Biblia. Na mbula oyo eleki, Batatoli ya Yehova bayekolaki Biblia na bato 6 561 426, mingimingi na lisalisi ya buku Biblia eteyaka. Yo mpe osalelaka buku yango mpo na koyekola Biblia na bato?
13. Ndenge nini koyekola Biblia ekoki kobongola mitema ya bato?
13 Koyekola Biblia na lisalisi ya buku Biblia eteyaka ekoki kobongola mitema ya bato oyo bazali na mposa ya kosala mokano ya Nzambe. Na ekólo Norvège, mobali moko ná mwasi na ye oyo bazali babongisi-nzela monene, babandaki koyekola Biblia na libota moko oyo bautaki na Zambie. Na libota yango, bazalaki na bana misato mpe basepelaki lisusu kobota te. Ntango mwasi akómaki na zemi, bazwaki likanisi ya kolongola yango. Mwa mikolo liboso bákende na lopitalo, bayekolaki mokapo oyo ezali na motó ya likambo, “Talelá bomoi ndenge Nzambe atalelaka yango.” Elilingi ya mwana na kati ya libumu, oyo ezali na mokapo yango esimbaki mpenza mitema na bango na boye ete batikaki likanisi ya kolongola zemi. Bakobaki kokola na elimo mpe ntango mwasi abotaki, bapesaki mwana nkombo ya ndeko mobali oyo azalaki koyekola na bango.
14. Pesá ndakisa oyo ezali komonisa ete kosalela makambo oyo tozali koteya ekoki komema matomba.
14 Likambo moko ya ntina mingi na ndenge oyo Yesu azalaki koteya ezali ete ye moko mpe azalaki kosalela makambo yango. Bato mingi basepelaka na etamboli malamu ya Batatoli ya Yehova mpamba te balandaka ndakisa ya Yesu na likambo yango. Na ekólo Nouvelle-Zélande, miyibi bafungolaki motuka ya moto moko ya mombongo mpe bayibaki sakosi na ye. Ntango moto yango ayebisaki likambo yango na bapolisi, balobaki na ye ete: “Sakosi na yo ekomonana kaka soki Motatoli ya Yehova moko alɔkɔti yango.” Ndeko mwasi moko oyo atɛkisaka bazulunalo alɔkɔtaki sakosi yango. Ntango ayokaki ete sakosi na ye emonani, moto yango akendaki na ndako ya ndeko mwasi yango. Asepelaki mingi ntango akutaki na kati ya sakosi mokanda na ye moko ya ntina mingi. Ndeko yango alobaki na ye ete: “Nazongisi sakosi yango mpamba te nazali Motatoli ya Yehova.” Mobali yango akamwaki mpenza ntango akanisaki likambo oyo mokonzi ya bapolisi ayebisaki ye na ntɔngɔ. Tomoni mpenza ete na ndakisa ya Yesu, baklisto ya solo bazali kosalela mateya ya Biblia.—Ebe. 13:18.
Tólanda ndakisa ya Yesu na ndenge ya kotalela bato
15, 16. Ndenge nini tokoki kobenda bato na nsango oyo tosakolaka?
15 Ndenge oyo Yesu azalaki kotalela bato ezalaki kotinda bango básepela na mateya na ye. Na ndakisa, bolingo mpe komikitisa na ye ebendaki bato mpamba epai na ye. Amonisaki motema mawa epai ya baoyo bayaki epai na ye mpe abɔndisaki bango na maloba ya boboto; abikisaki mpe bato mingi na maladi. (Tángá Malako 2:1-5.) Biso tokoki kosala makamwisi te, kasi tokoki komonisa bolingo, komikitisa, mpe motema mawa—bizaleli oyo ebendaka bato na solo.
16 Motema mawa esalisaki mingi ntango Tariua, mobongisi-nzela monene moko, akendaki kosakola na ndako ya mobange moko nkombo na ye Beere, na esanga moko ya Kiribati, na Mbu ya Pasifike. Atako moto yango alobaki ete asepeli koyoka ye te, Tariua amonaki ete moto yango azalaki na maladi ya paralize mpe amoniselaki ye motema mawa. Atunaki ye boye: “Osilá koyoka makambo oyo Nzambe alaki kosala mpo na bato ya maladi mpe mibange?” Na nsima atángelaki ye vɛrsɛ moko na mokanda ya Yisaya. (Tángá Yisaya 35:5, 6.) Mobange yango akamwaki mpe alobaki boye: “Natángaka Biblia banda bambula ebele, misionɛrɛ moko ya lingomba na biso azalaki koya kotala ngai na boumeli ya bambula mingi, kasi natángá naino vɛrsɛ oyo te.” Beere akómaki koyekola Biblia mpe akolaki na elimo. Lelo oyo, asili kozwa batisimo, azali kokamba mwa etuluku na bango, mpe atambolaka na esanga na bango mpo na kosakola nsango malamu, atako azali ebɔsɔnɔ.
Tókoba kolanda ndakisa ya Klisto
17, 18. (a) Ndenge nini okoki kokóma mopalanganisi ya nsango malamu oyo azali kobota mbuma? (b) Mbano nini ezali mpo na baoyo bazali komipesa na mosala ya kosakola?
17 Ndenge makambo oyo basakoli bazali kokutana na yango na mosala ya kosakola ezali komonisa yango, mosala na biso ya kopalanganisa nsango malamu ekobota mbuma soki tozali komonisa bizaleli oyo Yesu amonisaki. Yango wana, ebongi mpenza tólanda ndakisa ya Klisto na mosala na biso lokola bapalanganisi ya nsango malamu ya molende!
18 Na ekeke ya liboso, ntango Petelo mpe bato mosusu bakómaki bayekoli ya Yesu, Petelo atunaki boye: “Eloko nini mpenza ekozala mpo na biso?” Yesu apesaki eyano ete: “Moto nyonso oyo atiki bandako to bandeko ya mibali to bandeko ya basi to tata to mama to bana to bilanga mpo na nkombo na ngai akozwa mbala mingi koleka mpe akozwa libula ya bomoi ya seko.” (Mat. 19:27-29) Biso mpe tokozwa mbano yango soki tozali kokoba kolanda ndakisa ya Yesu Klisto, Misionɛrɛ monene.
Okopesa eyano nini?
• Ndenge nini Yehova azali kopesa biso formasyo na mosala ya kopalanganisa nsango malamu?
• Mpo na nini buku Biblia eteyaka ezali malamu mingi mpo na mosala ya kosakola?
• Ndenge nini tokoki kolanda ndakisa ya Yesu na ndenge na biso ya kotalela bato?
[Elilingi na lokasa 17]
Ntango Yesu abengaki Petelo, Andele, Yakobo, mpe Yoane ete bálanda ye, bandimaki mbala moko
[Elilingi na lokasa 19]
Mikanda lokola “Biblia eteyaka” ezali kosalisa biso tóteyaka mateya ndenge moko