Kotongama ya Bandako ya Bokonzi mpo na kokumisa Yehova
“Ezali likambo ya kokamwa. Nandimaki te ete mokolo mosusu tokozwa esika ya kitoko lokola oyo mpo na koyangana mpe kokumisa Yehova. Ata eloko moko te ekoki kopesa ngai esengo oyo nazali na yango!”—MARIA, MEXIQUE.
BATATOLI YA YEHOVA basepelaka koyangana mpo na koyekola Liloba ya Nzambe, Biblia. (Nzembo 27:4; Baebele 10:23-25) Esengo na bango ekómaka lisusu makasi soki bazwi bisika ya losambo oyo ebongi mpenza. Na bambula oyo euti koleka, Batatoli ya Yehova batongi bankóto ya bisika ya sika ya losambo, elingi koloba Bandako ya Bokonzi, na bikólo ebele na mokili.
Mpo na nini bazali kotonga bandako yango? Banani basalaka mosala yango? Matomba nini baoyo bazali komipesa na mosala yango bazwaka? Mpo na kozwa biyano na mituna yango, tótala oyo ezali kosalema na Mexique mpe na Bélize.
Mposa monene ya Bandako ya Bokonzi!
Kala, Batatoli ya Yehova ya Mexique bazalaki koyangana mpo na losambo na esika nyonso oyo emonani, na ndakisa na nsima ya ndako, na mapango ya Batatoli, badepo, garaje, to bazalaki kofutela bandako mosusu. Na ntango wana, Batatoli wana ya sembo bazalaki kokanisa ntango nyonso ete ekozala malamu mingi soki batongi Bandako ya Bokonzi ya bango moko.
Na 1994, Batatoli bazalaki 388 000 na Mexique. Ankɛti moko oyo esalemaki mbula wana emonisaki ete mpo Batatoli nyonso wana bázwa bisika na bango moko ya losambo, esengelaki kotonga Bandako ya Bokonzi ya sika 3 300. Ezalaki mpenza mosala monene!
Masangá mosusu bazalaki kotonga Bandako ya Bokonzi na makoki na bango moko. Kasi, mbula mitano na nsima, emonanaki polele ete mpo bandeko nyonso bázwa Bandako ya Bokonzi, esengelaki kotonga bandako ebele ya Bokonzi, mpe tosengelaki kosala yango na lombangu. Ndenge nini mposa yango ezali kokokisama?
Bandeko oyo bayebi kotonga bazali kotambolatambola
Na 1999, programɛ ya sika ya kotonga ebandaki. Bandeko babandaki kobongisama mpo na kotonga Bandako ya Bokonzi na Mexique mobimba. Batatoli ya Yehova ya Mexique—oyo mingi na bango bayebaki kotonga—bandimaki komipesa na mosala wana kitoko. Lelo oyo, baekipi yango ezali 35 na Mexique; mpe moko ezali na Bélize.
Mbala mingi ekipi mokomoko ya batongi ya Bandako ya Bokonzi ezalaka na bandeko mibali mpe basi soki mwambe, oyo basalaka kaka mosala yango kozanga ete bafuta bango. Bandeko wana bandimaka kokende bisika ndenge na ndenge na kati ya ekólo mpo na kotambwisa misala ya kotonga. Ndeko mokomoko asalaka ngonga mwambe kobanda mokolo ya mosala moko tii mokolo ya mitano; ezala mpe mikolo mosusu ya pɔsɔ. Na ntɔngɔ liboso ya kobanda mosala, bakutanaka na ngonga ya 7 mpo na kotalela mokapo ya mokolo mpe na nsima bamɛlaka tii. Bango nyonso bazalaka pene na kosala oyo bakosɛnga bango. Na ndakisa, bandeko basi basalaka mpe misala oyo mibali basalaka lokola kopalisa bandako mpe kotya makwanza, kosala béton, mpe kotya langi.
Bandeko oyo Ndako na bango ya Bokonzi ezali kotongama bapesaka batongi bisika ya kolala, basukolelaka bango bilamba mpe balambelaka bango biloko ya kolya. Longola kosala elongo, bandeko yango ná bandeko ya lisangá oyo bazali kotongela Ndako ya Bokonzi bayanganaka elongo na makita mpe babimaka na mosala ya kosakola ndako na ndako.
Matomba ya komipesa na mosala ya botongi
Bandeko oyo batongaka batalelaka mosala na bango ndenge nini? Daniel, oyo amipesi na mosala yango koleka mbula misato alobi boye: “Mpo na koloba solo, tosalaka mosala yango na nse ya moi mpe na malili, tolyaka biloko oyo tomeseni na yango te, totambolatambolaka mingi, tozali mosika na mabota na biso, mpe mbala mingi tozangaka biloko mingi ya kitoko ya mikolo oyo. Kasi, mikakatano oyo tokutanaka na yango ezali moke soki tokanisi ebele ya mapamboli oyo tozali kozwa.”
Wapi mapamboli yango mosusu? Bandeko mingi bayekolaka mayele mosusu ya kotonga. Kasi, ndeko moko na nkombo Carlos, oyo azali kokamba ekipi moko oyo ezali na batongi mingi, alobeli litomba oyo ye azali komona ete eleki monene. Alobi boye: “Tokómá lokola libota moko ya bato 20. Tolyaka esika moko, tosalaka esika moko, toyekolaka esika moko mpe tobondelaka esika moko. Tokómá mpenza baninga ya motema.”
Bandeko oyo bakendeke kotonga Bandako ya Bokonzi bakómaka baninga mpenza ya bandeko ya masangá oyo bazali kotongela ndako. José, oyo atongi Bandako koleka 100, alobi boye: “Ezalaka esengo komona ndenge Batatoli oyo totongeli Ndako ya Bokonzi bazali kobimisa mai ya miso mpe kosepela mpo ndɔtɔ na bango ya kozwa Ndako ya Bokonzi ekómi likambo ya solo.” Abakisi ete: “Soki tosilisi kotonga Ndako moko ya Bokonzi, tozalaka na esengo ya koyeba ete ata mwa moke oyo tozali kosala elendisaka kondima ya bandeko.”
Ezali mpenza likambo ya kokamwa!
Bisika yango ya losambo ezalaka mindɔndɔmindɔndɔ te. Yango wana etongamaka na lombangu mpe elyaka mbongo mingi te. Na bisika mosusu, basalelaka biloko mpe mayele ya botongi oyo basalelaka na bisika wana. Na ndenge yango, bakoki kosilisa kotonga Ndako ya Bokonzi moko na boumeli ya pɔsɔ motoba!
Na 2007, batongaki Bandako ya Bokonzi ya sika 17 mpo na masangá nyonso ya Bélize. Na Mexique, Bandako ya Bokonzi koleka 1 400 etongami kobanda 1999.
Atako basili kotonga bandako ya Bokonzi ebele, mosala ezali naino mingi. (Matai 9:37) Batatoli ya Yehova ya Mexique bakómi koleka 600 000, mpe bango nyonso bazali koyangana mbala misato na pɔsɔ mpo na koyekola Liloba ya Nzambe. Yango wana, basengeli kotonga lisusu Bandako ya Bokonzi soki 2 000. Soki mosala yango ezalaki kosalema kaka na makasi ya bato, elingaki kozala mpasi mokano yango elonga. Kasi, Bandako ya Bokonzi oyo esili kotongama emonisi ete na lisalisi ya Yehova, “makambo nyonso ekoki kosalema.”—Matai 19:26.
[Etanda/Elilingi na lokasa 22]
“Soki balobi, bakokisaka”
Kaka Batatoli ya Yehova te nde basepelaka soki batongeli bango Ndako ya Bokonzi. Na ndakisa, ntango bazalaki kotonga Ndako ya Bokonzi moko na Bélize, mobali moko oyo mwasi na ye asambelaka na Lingomba ya Pantekote ayebisaki mwasi na ye ete soki Batatoli ya Yehova basilisi kotonga “esika na bango ya mayangani,” akobanda koyangana na bango. Nini etindaki ye azwa ekateli wana? Alobaki boye: “Namoni ete Nzambe azali na bango. Babundaka te ntango bazali kosala. Mpe soki balobi, bakokisaka.”
[Elilingi]
Ndako ya Bokonzi na etúká ya Orange Walk, na Bélize
[Etanda/Bililingi na lokasa 23]
Milende ezali kosalema na mokili mobimba
Baekipi ya kotonga Bandako ya Bokonzi esalemi na mikili 120. Mwa bikólo oyo bandeko bamipesi mpo na mosala wana, yango oyo:
Angola, Bolivie, Croatie, Éthiopie, Fidji, Ghana, Hong-Kong, Inde, Jamaïque, Kazakhstan, Liberia, Moldavie, Nigeria, Papouasie-Nouvelle-Guinée, République dominicaine, Rwanda, Tuvalu, Ukraine, Venezuela, Zambie.
[Bililingi]
Ndako ya Bokonzi na etúká Acapulco, na Mexique
Ekipi moko ya batongi ya Bandako ya Bokonzi na Mexique
[Elilingi na lokasa 23]
Ndako ya Bokonzi na engumba Tlaxcala, na Mexique