Komikitisa ezalaka pɛtɛɛ te
BATO mingi bakanisaka ete komikitisa ezali na ntina te lelo oyo. Bato oyo bamitombolaka, bato ya lolendo mpe baoyo basalaka nyonso oyo balingi nde bamonanaka bato ya lokumu mpe oyo balongi na bomoi. Bato mingi balulaka bomoi ya bato ya bozwi mpe ya lokumu, kasi te ya bato mpamba mpe babola. Mbala mingi, bato oyo balongá na bomoi bamikumisaka ete balongá na makasi na bango moko. Na esika ya komikitisa, batutaka nde ntolo.
Moto moko ya mayele na Canada alobaki ete “bato bakómi lolendo mingi” na mboka na bango. Bamosusu bakanisaka ete mokili ya lelo esɛngaka kominanola mingi na esika ya koboma nzoto mpo na kokokisa mikumba na yo mpe ete lelo oyo bato bakómi koluka kaka matomba na bango moko. Na mokili ya boye, komikitisa ekoki mpenza kozala na esika te.
Ya solo, bato mingi bakanisaka ete ebongi mpe bato ya komikitisa bázala, mpo bato ya komikitisa bazalaka mindɔndɔ te. Nzokande na mokili ya lelo oyo etondi na elimo ya kowelana, bato mosusu babangaka ete soki bamikitisi, basusu bakomonela bango.
Biblia, Liloba ya Nzambe, esakolaki ete bato na mikolo na biso bakozala “bato ya lofundo, bato ya lolendo.” (2 Timote 3:1, 2) Ondimi te ete esakweli yango ezali kokokisama lelo? Okanisi ete komikitisa ezali na ntina? To okanisi ete soki ozali komikitisa bato bakobanda komonela mpe kolyela yo?
Likambo ya solo ezali ete Biblia ezali kosalisa biso tómona ete komikitisa ezali na ntina mpe tólona ezaleli yango. Ezali kosalisa biso tótalelaka ezaleli yango na ndenge ebongi mpe ete komikitisa ya solosolo ezali elembo ya bolɛmbu te, kasi ya bokasi. Lisolo elandi ekomonisa ntina yango.
[Elilingi na lokasa 3]
Ndenge nini tosengeli kotalela makambo oyo tosalaka?