Mibembo ya mpasi mpo na komema nsango malamu
MOTUKA na biso ekómi liboso ya etuluku moko ya basoda oyo bakangi nzela; bazali soki 60, kati na bango mibali, basi, mpe bilenge. Bamosusu balati sokoto. Mingi kati na bango basimbi mandoki. Emonani ete bazali kozela biso. Tozali na mboka oyo ezali na bitumba.
Tokokisi mikolo minei na mobembo na biso, tomemi tɔni 10 ya mikanda oyo elimbolaka Biblia. Tozali komituna soki bakotika biso tóleka. Bakosɛnga biso mbongo? Ekozwa ntango boni mpo na kondimisa bango ete mosala na biso ezali ya kimya?
Soda moko abɛti masasi likoló mpo na komonisa ete ye nde mokonzi. Ntango amoni batelefone na biso ya mabɔkɔ alobi tópesa ye yango. Ntango amoni ete tozali koumela mpo na kopesa yango, asali elembo moko mpo na komonisa biso ete soki toboyi, akoboma biso. Topesi ye batelefone.
Na mbala moko, mwasi moko oyo alati mpe sokoto azwi mondoki na ye mpe ayei pembeni na biso. Alobi ete ye nde “sekrɛtɛrɛ,” mpe alingi tópesa ye mpe mwa eloko. Bomoi ezali mpasi na mboka yango mpe mwa “likabo” ekoki kosunga. Na nsima, soda mosusu ayei na mwa bidɔ mpe abandi kozwa esansi na motuka na biso. Tobondeli ye atika, kasi alobi ete azali kolanda kaka mitindo oyo bapesi ye. Tokoki kosala eloko moko te. Tozali kaka kolikya ete basoda mosusu bakozwa likanisi ya kosala lokola ye te.
Nsukansuka, bafungoli nzela mpe toleki. Ngai ná moninga na ngai toyoki mitema ekiti. Tobangaki makasi, kasi tomesaná na makambo yango. Kobanda na sanza ya Aprili 2002 tii na sanza ya Yanuali 2004, tosalaki mibembo 18 longwa na Douala, na ekólo Cameroun tii na Bangui, mboka-mokonzi ya République centrafricaine. Mibembo yango ya kilomɛtrɛ 1 600 ezalaka ntango nyonso na makama ndenge na ndenge mpe tokutanaka na makambo oyo tokanisaki te.a
Joseph ná Emmanuel, basofɛlɛ oyo bameseni kosala mibembo yango, balobi boye: “Mibembo yango eteyi biso makambo mingi. Ezalaka malamu mbala na mbala kobondela na nse ya motema mpe kozala motema mpiɔ. Mokomi ya nzembo alobaki ete, ‘Epai ya Nzambe, nakobanga te; moto akoki kosalela ngai nini?’ Biso mpe tosalaka makasi tólanda ndakisa ya mokomi ya nzembo. Tozalaka na elikya ete Yehova ayebi ete tozali kosala mobembo mpo na komemela bato nsango ya elikya oyo bazali na yango mpenza mposa.”—Nzembo 56:11.
Milende ya bandeko ya bikólo ndenge na ndenge
Bato mingi na eteni yango ya Afrika basepelaka koyoka nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe. Tomemelaka bango mikanda oyo ekokokisa mposa na bango ya elimo. (Matai 5:3; 24:14) Mbala na mbala, filiale ya Batatoli ya Yehova oyo ezali na Douala, etindaka mikanda mpo na basakoli koleka 30 000 mpe bato mosusu oyo basepelaka na nsango malamu, na Cameroun mobimba mpe na bikólo mosusu minei ya pembeni.
Mikanda yango eutaka mosika liboso ekóma na Douala. Mikanda yango mingi ebimisamaka na Angleterre, na Finlande, na Allemagne, na Italie, mpe na Espagne. Etyamaka na masuwa na France. Kontenɛrɛ moko ya mikanda ekómaka na libongo ya Douala nsima ya pɔsɔ mibale nyonso.
Motuka moko monene ememaka yango tii na Betele. Bandeko oyo basalaka na departema ya kotinda mikanda batyaka yango na bakartɔ mpe bakomaka bisika oyo esengeli kotindama. Kotinda mikanda tii na bamboka ya mosika ezali pɛtɛɛ te. Kasi, yango ezali na kati ya mosala ya komema nsango malamu “tii na esika eleki mpenza mosika na mabelé.” (Misala 1:8) Bandeko oyo bamipesi bandimaka kosala mibembo na banzela oyo etondi na makama mpo na kokende na bamboka yango. Na ndenge yango, bamilio ya bato oyo bazali na bikólo ya Afrika ya Ntei bazali kozwa ebele ya mikanda oyo elimbolaka Biblia.
Ndakisa ya mobembo moko
Mituka ememaka mikanda na Cameroun, na Tchad, na Guinée équatoriale, na Gabon, mpe na République centrafricaine. Tósala mobembo na motuka moko. Kanisá ete ofandi liboso elongo na sofɛlɛ, mpe bolingi kobanda mobembo oyo ekoumela mikolo zomi to koleka.
Basofɛlɛ bazali motoba mpo na mobembo yango. Bazali mibali ya makasi, oyo bayebi mosala, bazali motema-molai mpe balati malamu. Bamosusu balati baboubou, bamosusu balati basimisi ná kravati. Kala, basali ya douane bazalaki koloba boye: “Mituka oyo ezalaka pɛto mpe basofɛlɛ na yango balataka malamu, lokola kaka bato oyo bazalaka na bafɔtɔ na mikanda na bango.” Kasi, likambo ya malamu koleka molato ya basofɛlɛ yango, ezali ete bandimaka kokende ata na esika nini mpo na kosalela basusu.—Nzembo 110:3.
Tolongwe Douala na ngonga ya 6 na ntɔngɔ, ntango mituka ezali naino mingi te na nzela. Nsima ya kokatisa gbagba moko pembeni ya Betele mpe kobima na engumba, totalisi na ɛsti mpo na kokende na Yaoundé, mboka-mokonzi ya Cameroun.
Basofɛlɛ yango motoba bayebisi biso ete kokumba motuka oyo ezali na tɔni 10 ya mikanda ezalaka pɛtɛɛ te. Na mikolo misato ya liboso mikakatano ezali mingi te mpo tozali kotambola na banzela ya gudrɔ; atako bongo ezali kosɛnga kozala mpenza ekɛngɛ. Na mbala moko, mbula ya makasi ebandi. Tokɔti sikoyo na nzela ya mabelé. Tozali lisusu komona malamu te na mosika, nzela ezali mosɛlu mpe tosengeli kotambola malɛmbɛmalɛmbɛ mpo na mabulu. Molili ebandi kokɔta. Ekómi ntango ya kotɛlɛmisa motuka, kolya mwa eloko mpe kolala moke, wana tosemboli makolo kaka na kati ya motuka. Yango nde makambo oyo elekaka na mibembo yango!
Na ntɔngɔ ya mokolo oyo elandi, tosimbi lisusu nzela. Sofɛlɛ moko azali kotalatala nzela. Soki amoni ete topusani mingi pembeni ya terase, akokebisa mbala moko sofɛlɛ oyo azali kotambwisa. Bango nyonso bayebi ete soki motuka ekɔti na terase, ekosɛnga mikolo mingi mpo na kobimisa yango. Sikoyo, tokɔti na République centrafricaine, kasi awa mpe banzela ya malamu ezali te. Na ntaka ya kilomɛtrɛ 650 oyo etikali, tozali koleka na bazamba kitoko mpe bangomba. Tozali komona bana mike, mibange, mpe bamama bamemi bana na mokɔngɔ, bango nyonso bazali kopepa biso mabɔkɔ, wana tozali koleka malɛmbɛmalɛmbɛ na bamboka na bango. Lokola mboka ezali na bitumba, mituka ezali mingi te na nzela, yango wana bato bazali kokamwa ntango bazali komona biso.
Makambo malamu oyo bakutanaka na yango
Janvier, moko ya basofɛlɛ, alobi na biso ete atako esɛngaka bálanda programe na bango, mbala mingi batɛlɛmaka na bamboka mosusu mpo na kopema mwa moke mpe kokabola mikanda oyo elimbolaka Biblia. Alobi boye: “Na mboka Baboua, tozalaki mbala na mbala kosolola na lifulumɛ moko oyo azalaki kosepela mingi na nsango ya Bokonzi, mpe tokómaki kozwa mwa ntango mpo na koyekola na ye Biblia. Kutu, mokolo moko tolakisaki kasɛti-video ya Noa na ndako na ye. Baninga na ye mpe bato mosusu ya pembeni bayaki kotala; ndako mobimba etondaki na bato oyo bazalaki na esengo. Bango nyonso basilá koyoka lisolo ya Noa, mpe mokolo yango bazwaki libaku ya kotala yango. Komona ndenge oyo bazalaki kosepela esimbaki mpenza mitema na biso. Na nsima, babongiselaki biso biloko ya kolya, mpe basɛngaki biso tólala wana. Kasi, tosengelaki kokoba mobembo na biso. Tozalaki na esengo na ndenge tozwaki libaku ya koyebisa bato ya mboka yango nsango malamu.”
Israel, sofɛlɛ mosusu, ayebisi biso makambo oyo bakutanaki na yango na mobembo moko oyo basalaki mpo na kokende na Bangui. Alobi boye: “Ntango tozalaki kopusana na Bangui, tokómaki komona bisika mingi oyo basoda bazalaki kotɛlɛmisa mituka. Kasi, basoda mingi bazalaki kotungisa biso te mpo bayebaki biso. Bazalaki kosɛnga biso tófanda na bango mpe bazalaki kondima mikanda oyo elimbolaka Biblia. Batalelaka mikanda na biso na valɛrɛ mingi, yango wana soki moto azwi mokanda, akomaka nkombo na ye, dati mpe nkombo ya moto oyo apesi ye yango. Basoda mosusu bazali na bandeko oyo bazali Batatoli; yango wana mpe bazalaki komonisela biso boboto.”
Joseph, sofɛlɛ oyo aumeli mingi na mosala yango, ayebisi biso ntango oyo esepelisaka ye mingi na mibembo yango—kokóma na esika oyo bazali kokende. Akanisi mobembo moko oyo basalaki mpe alobi boye: “Ntango etikalaki moke tókɔta na Bangui, tobengaki bandeko na telefone mpo na koyebisa bango ete tolingi tókóma. Bayaki kozwa biso, mpe basalisaki biso na kozwa mikanda mosusu ya Leta. Ntango tokómaki na Betele, bandeko nyonso babimaki mpo na koyamba biso. Bandeko ya masangá oyo ezali pembeni ya Betele, bayaki kopesa mabɔkɔ mpe na nsima ya mwa bangonga, bakitisaki bankama ya bakartɔ ya Babiblia, babuku, babroshire, mpe bazulunalo, mpe batyaki yango na depo.”
Joseph abakisi boye: “Na bantango mosusu, tozalaki mpe komema bilamba, basapato, mpe biloko mosusu ya bana mpo na bandeko ya République démocratique du Congo. Ezalaki mpenza esengo komona bandeko ndenge bazali kosɛka mpo na komonisa botɔndi!”
Nsima ya kopema mokolo moko, tobongisi motuka mpo na kozonga. Ntango tozali kozonga tokokutana mpe na mikakatano, kasi makambo ya malamu oyo tokutanaki na yango ekobosanisa biso nyonso wana.
Mibembo yango ezalaka mpasi mpo na nzela molai, bambula ya makasi, banzela ya mabe, kotɔbɔka bapinɛ, mpe na bantango mosusu motuka ekufaka. Mbala mingi bakutanaka na basoda ya mobulu. Atako bongo, basofɛlɛ yango bazalaka na esengo na ndenge bamemaka nsango malamu ya Bokonzi na bamboka ya mosika ya Afrika mpe na komona ndenge nsango yango ezali kobongola bomoi ya bato oyo bazali kondima yango.
Na ndakisa, mpo na mibembo yango, moto moko oyo afandaka na mboka moko ya République centrafricaine, pembeni ya Soudan azali sikoyo na likoki ya kotánga Biblia oyo ebongolami na elobeli ya mikolo oyo. Mwasi na ye azwaka banimero ya sika ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli, mpe bana na bango bayekolaka buku Yekolá epai ya Moteyi Monene.b Libota yango mpe ebele ya bato mosusu na bamboka bazali kozwa bilei ya elimo ndenge moko na bandeko oyo bafandi na bingumba ya minene. Yango epesaka mpenza esengo!
[Maloba na nse ya lokasa]
a Lelo oyo, nzela ya Douala tii Bangui ezali lisusu na makama mpenza te.
b Ebimisami na Batatoli ya Yehova.
[Maps/Picture on page 9]
(Mpo na komona yango, talá mokanda)
CAMEROUN
Douala
RÉPUBLIQUE CENTRAFRICAINE
Bangui
[Elilingi na lokasa 9]
Joseph
[Elilingi na lokasa 9]
Emmanuel
[Elilingi na lokasa 10]
Betele ya République centrafricaine, na Bangui
[Elilingi na lokasa 10]
Bazali kokitisa mikanda na Bangui