Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w07 15/9 nk. 8-10
  • Ndenge ya kolona bolingo ya Nzambe na motema ya mwana

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ndenge ya kolona bolingo ya Nzambe na motema ya mwana
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Masolo oyo esimbaka motema
  • Ndakisa ya baboti
  • Tósalisa bana na biso báyeba Nzambe
  • Kopona baninga
  • Ntina ya kolakisa bana
  • Baboti—Bósalisa bana na bino bálinga Yehova
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2022
  • Lolenge ya kozala na libota oyo ezali makasi na elimo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • Teyá mwana na yo uta azali naino moke mpenza
    Sɛkɛlɛ́ ya bolamu na libota
  • Ndenge ya kobɔkɔla mwana na yo
    Okoki kozala na libota ya esengo
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
w07 15/9 nk. 8-10

Ndenge ya kolona bolingo ya Nzambe na motema ya mwana

LELO oyo, ezali pɛtɛɛ te mpo moto akóma moninga ya Yehova Nzambe. (Nzembo 16:8) Ndenge Biblia esakolaki yango, tozali na “bantango ya ndenge mosusu mpe ya mpasi mpenza.” Bato mingi bakómi “bato balingá bisengo na esika ya kozala bato oyo balingaka Nzambe.” (2 Timote 3:1-5) Bato mingi bazali na bolingo ya solosolo te mpo na Nzambe.

Mpo bolingo ya Nzambe ekola na motema ya mwana esɛngaka baboti básala milende. Esengeli kolona bolingo yango na mitema ya bana. Ndenge nini baboti bakoki kosala yango?

Masolo oyo esimbaka motema

Baboti bakoki kolona bolingo ya Nzambe na mitema ya bana na bango, soki bango moko bazali na bolingo yango na mitema. (Luka 6:40) Biblia emonisi yango na maloba oyo: “Okolinga [Yehova] Nzambe na yo na motema na yo mobimba, mpe na molimo na yo mobimba, mpe na nguya na yo mobimba. Maloba oyo malakeli ngai yo lelo makozala na motema na yo, mpe okolakisa yango na etingya na bana na yo.”​—Deteronome 6:4-7.

Ndenge nini moboti akoki kolona bolingo ya Nzambe na motema ya mwana? Ya liboso, asengeli koyeba makambo oyo ezali na motema ya mwana. Ya mibale, asengeli komonisa oyo ezali na kati ya motema na ye moko.

Na nzela ya Emausi, Yesu Klisto atunaki bayekoli na ye mibale mituna mpo bámonisa makanisi mpe mabanzo na bango. Yesu ayokaki bango mpe na nsima, alimbwelaki bango Makomami mpo na kosembola makanisi na bango. Na nsima bayekoli yango balobaki boye: “Mitema na biso ezalaki te kozika ntango azalaki koloba na biso?” Yango ezali mpenza ndakisa ya lisolo oyo esimbaka motema. (Luka 24:15-32) Ndenge nini koyeba makanisi ya mwana?

Batunaki baboti mosusu oyo bakolisi bana mpe bamosusu oyo bazali kobɔkɔla bana mpe bana yango bazali bandakisa malamu na lisangá báyebisa ndenge ya kosolola na mwana na ndenge oyo ekosimba motema na ye. Na ndakisa, Glen, ndeko moko na Mexique, azali na bana minei oyo bakoli.a Ye alobi boye: “Kosolola malamu na bana esɛngaka milende. Ngai ná mwasi na ngai totikaka makambo mosusu oyo ezali na ntina mingi te mpo na kolekisa ntango elongo na bana na biso. Ntango babandaki kokóma bilenge, tozalaki mbala mosusu kolekisa mpokwa mobimba elongo na bango kaka mpo na kobɛta masolo. Na ntango ya kolya mpe tozalaki koyoka masolo na bango; yango ezalaki kosalisa biso tóyeba makanisi na bango mpe na boboto nyonso, tósembola makanisi oyo ezali malamu te kozanga kutu báyeba yango.”

Lisolo ya mozindo esɛngaka mpe ete moboti ye moko abimisa makanisi oyo ezali na motema na ye. Yesu alobaki boye: “Moto malamu abimisaka malamu na eloko ya motuya ya malamu ya motema na ye, . . . mpo uta na makambo oyo etondi na motema nde monɔkɔ na ye elobaka.” (Luka 6:45) Toshiki, ndeko moko na Japon oyo azali na bana misato oyo bazali na mosala ya ntango nyonso, alobi boye: “Mbala mingi nazalaki koyebisa bango ntina oyo nakómaki na kondima epai ya Yehova​—makambo oyo endimisaki ngai ete Yehova azalaka mpenza mpe ndenge oyo makambo oyo nakutanaki na yango na bomoi endimisaki ngai ete Biblia elobaka solo mpe ete yango nde ebongi kotambwisa moto.” Cindy, ndeko moko na Mexique, alobi boye: “Mobali na ngai azalaki ntango nyonso kobondela elongo na bana na biso. Ntango bazalaki koyoka mabondeli yango, bazalaki komona ete Yehova azalaka mpenza.”

Ndakisa ya baboti

Etamboli ya baboti ezali na ntina mingi koleka maloba na bango, mpamba te emonisaka epai ya bana bolingo oyo bazali na yango mpo na Nzambe. Bato bamonaki ete Yesu Klisto alingaka mpenza Yehova na ndenge oyo azalaki kotosa Ye. Yesu alobaki boye: “Mpo mokili eyeba ete ngai nalingaka Tata, ɛɛ kaka ndenge Tata apesi ngai komandema nasala, nazali mpe kosala bongo.”​—Yoane 14:31.

Gareth, Motatoli moko na Pays de Galles, alobi boye: “Bana na biso basengeli komona ete tolingaka Yehova mpe ete tosalaka makasi mpo na kotosa ye. Na ndakisa, bana na ngai bamonaka ete natosaka mpenza Nzambe na ndenge nandimaka mabunga na ngai. Bango mpe basalaka makasi mpo na komekola ngai.”

Greg, ndeko moko na Australie, alobi boye: “Tolingaki ete bana na biso bámona ete losambo ya Yehova ezali likambo oyo eleki ntina na bomoi na biso. Ntango tozali kozwa bikateli na oyo etali mosala to kominanola, totalelaka libosoliboso soki yango ekobebisa te makambo ya elimo. Toyokaka esengo ndenge mwana na biso ya mwasi oyo azali na mbula 19, azwi mpe momeseno yango mpo na kokokisa malamu mosala na ye ya mobongisi-nzela mosungi.”

Tósalisa bana na biso báyeba Nzambe

Ezali mwa mpasi kolinga moto oyo toyebi te to kotyela ye motema. Mpo na kolendisa baklisto ya Filipi bákolisa bolingo na bango mpo na Yehova, ntoma Paulo akomaki boye: “Talá eloko oyo nazali kokoba kobondela mpo na yango, ete bolingo na bino etondana lisusu mpe lisusu elongo na boyebi ya solosolo mpe bososoli ya kokoka.” (Bafilipi 1:9) Falconerio, ndeko moko na Pérou oyo azali kobɔkɔla bana minei, akomi boye: “Kotánga mpe koyekola Biblia mbala na mbala na bana elendisaka kondima na bango. Na bantango mosusu nazalaki kosala yango te, mpe ngai moko nazalaki komona ete bolingo na bango mpo na Nzambe ezalaki kokita.” Gary, ndeko moko na Australie, alobi boye: “Mbala mingi namonisaka bana na ngai ndenge oyo bisakweli ya Biblia ezali kokokisama. Namonisaka bango mpe matomba ya kotosa mitinda ya Biblia. Koyekola pɔsɔ na pɔsɔ na kati ya libota esalisi bango bázala na kondima makasi.”

Mateya ekosimba mpenza motema ya mwana soki baboti bazali kosala ete ntango ya boyekoli ezala ntango ya esengo, kasi mpe ya lisɛki te. (Yakobo 3:18) Na Angleterre, Shawn ná mwasi na ye Pauline oyo bazali na bana minei, balobaki boye: “Na ntango ya boyekoli ya libota tozalaki kosala makasi tógangela bana na biso te, ata soki basali mwa mobulu. Tozalaki kobongola ndenge ya koyekola. Na bantango mosusu tozalaki kosɛnga na bana bango moko bápona likambo oyo tokolobela. Tozalaki kosalela bakasɛti-video ya moombo ya sembo mpe ya mayele. Ntango tozali kotala kasɛti-video moko, na bantango mosusu tozalaki kozongela eteni moko to kokanga mwa moke mpo na kolobela eteni oyo touti kotala.” Kim, mama moko na Angleterre, alobi boye: “Nabongisaka malamumalamu boyekoli oyo nakosala na bana na ngai mpo nakoka kotuna mituna oyo ekotinda bango bákanisa. Tosepelaka na boyekoli. Tosɛkaka mingi ntango tozali koyekola.”

Kopona baninga

Bana na biso bakolinga Yehova mpe bakosepela na losambo ya solo soki bazali na baninga oyo balingaka Nzambe. Ekoki kosɛnga baboti básala milende mpo na kosalisa bana na bango bázala na baninga oyo bakoki kosololaka mpe kosakanaka na bango. Kasi, kosala yango ezali na matomba mingi. Lisusu, ezali malamu baboti bálukaka mabaku mpo bana na bango bálekisaka ntango na Batatoli oyo bazali na mosala ya ntango nyonso. Bana mingi baponaki mosala yango mpo bazalaki baninga ya bandeko oyo bazalaki kosalela Nzambe na molende. Ndeko mwasi moko oyo akómaki misionɛrɛ alobi boye: “Mbala mingi baboti na ngai bazalaki kobengisa babongisi-nzela báya kolya epai na biso. Tozalaki komona ete mosala yango ezalaki kopesa bango esengo, yango wana ngai mpe nalingaki kosalela Nzambe lokola bango.”

Bana bakoki kolanda ndakisa ya malamu to mpe ya mabe. Yango wana, esɛngaka baboti báyeba ndenge ya kosalisa bana mpo bálanda baninga ya mabe te. (1 Bakolinti 15:33) Esɛngaka mayele mpo na koteya bana ndenge ya kokima baninga oyo bayebi Yehova te mpe balingaka ye te. (Masese 13:20) Shawn, ndeko oyo tolobelaki liboso, alobi boye: “Tozalaki koteya bana na biso bázala malamu na baninga na bango ya kelasi, kasi bákómisa bango te baninga ya motema. Bana na biso bakangaki ntina oyo basengeli te kosanganaka na makambo mosusu to masano oyo esalemaka na eteyelo.”

Ntina ya kolakisa bana

Soki tozali kolakisa bana na biso ndenge ya koyebisa bindimeli na bango epai ya bato mosusu, tokosalisa bango básepelaka komonisa bolingo na bango mpo na Nzambe. Mark, ndeko moko na États-Unis, alobi boye: “Tolingaki ete bana na biso báyeba ete basengeli kopesaka litatoli na mabaku nyonso, kaka te ntango babimi na mosala ya kosakola. Na yango, ntango tokei esika moko mpo na kominanola, na ndakisa na parke moko to na libongo, to kotambola na zamba moko, tomemaka Babiblia mpe mikanda oyo elimbolaka Biblia mpe topesaka litatoli epai ya bato oyo tokutanaka na bango. Bana na biso basepelaka mpenza kopesa litatoli ya libaku malamu na bisika ya ndenge wana. Bango mpe balobaka ntango tozali kopesa litatoli.”

Ntoma Yoane asalisaki bato mingi bákolisa bolingo na bango mpo na Nzambe. Na ntina na bango, akomaki boye: “Nazali na ntina ya botɔndi te koleka makambo oyo, ete nayokaka ete bana na ngai bazali kokoba kotambola na kati ya solo.” (3 Yoane 4) Soki toloni bolingo ya Nzambe na mitema ya bana na biso, biso mpe tokoyoka esengo yango.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Topesi bango bankombo mosusu.

[Bililingi na lokasa 9]

Kosolola na mozindo na ntina na makambo etali kondima na biso eyaka yango moko te

[Elilingi na lokasa 10]

Lakisáká bana na yo ndenge ya komonisa bolingo na bango mpo na Nzambe

[Eutelo ya bafɔtɔ]

Na ndingisa ya Green Chimneys Farm

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto