Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w07 1/8 nk. 12-15
  • Kosalela Yehova eleki nyonso

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Kosalela Yehova eleki nyonso
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Nazwi molongani
  • Nazongi lisusu mobongisi-nzela
  • Mapamboli oyo nabosanaka te
  • Ngai ná bana na ngai tozali babongisi-nzela
  • Nazali kaka mobongisi-nzela!
  • Mapamboli ya mosala ya Mobongisi-nzela
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
  • Babongisi-nzela bazali kopesa mpe bazali kozwa bolamu
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
  • Mosala ya mobongisi-nzela ekómisaka makasi boyokani na biso na Nzambe
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2013
  • Mosala ya mobongisi-nzela: ezali mpo na yo?
    Mosala na biso ya Bokonzi—1998
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
w07 1/8 nk. 12-15

Lisolo ya bomoi

Kosalela Yehova eleki nyonso

Ya Zerah Stigers

Mobali na ngai, oyo azalaki moninga na ngai ya sembo na mosala ya mobongisi-nzela, akufaki na 1938. Atikaki ngai na bana mibale: moko ya moke mpe mosusu ya mbula zomi. Atako nazalaki na mposa ya kokoba mosala ya mobongisi-nzela, ndenge nini nakokaki kosala yango? Liboso nayebisa bino ndenge nasalaki, tiká nabɛtɛla bino mwa moke lisolo ya bomoi na ngai.

MWA moke na nsima ya kobotama na ngai na mwa 27 Yuli 1907, na Alabama na États-Unis, ngai, baleki na ngai misato mpe baboti na ngai tokendeki kofanda na etúká ya Géorgie. Mwa moke na nsima, tokendeki kofanda na Tennessee mpe na nsima tokendeki kofanda penepene na engumba Tampa, na etúká ya Floride. Na 1916, ntango tozalaki kuna, namonaki “Fɔtɔ-Drame ya Bozalisi.” Lokola bafilme ezalaki naino ndenge ezali lelo te, bato nyonso bazalaki kosepela na “Fɔtɔ-Drame”!

Baboti na ngai bazalaki batángi minene ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe mikanda mosusu oyo elimbolaka Biblia. Atako tata azalaki kosepela kotánga mikanda yango, na ntango wana azalaki mpenza te koyangana na Bayekoli ya Biblia, nkombo oyo bazalaki kobenga Batatoli ya Yehova kala. Nzokande, mama azalaki komema ngai ná baleki na ngai na makita. Kutu, mwa moke nsima ya kokóma na mboka Niles, na etúká ya Michigan, tozalaki kokende makita na engbunduka kilomɛtrɛ 16 tii na engumba South Bend, na etúká ya Indiana.

Nsukansuka, mwa 22 Yuli 1924, nazwaki batisimo mpo na komonisa ete namipesi epai ya Yehova. Eumelaki te, mama amibongisaki mpo akóma mobongisi-nzela, ndenge Batatoli ya Yehova babengaka basakoli ya ntango nyonso. Ndakisa malamu na ye mpe ya babongisi-nzela mosusu epesaki ngai mposa ya kosala mpe mosala yango.

Nazwi molongani

Na liyangani moko ya monene oyo esalemaki na 1925 na engumba Indianapolis, na etúká ya Indiana, nakutanaki na James Stigers oyo autaki na Chicago. Mbala moko, namonaki ete James azalaki kosalela Yehova na esengo mpenza. Nazalaki mosika mpenza na Chicago, kilomɛtrɛ soki 160, yango wana ezalaki mpasi mpo tokutanaka. Na ntango wana, lisangá ezalaki kaka moko na engumba wana monene mpe makita ezalaki kosalema na eteni ya likoló ya ndako moko ya etazi oyo tozalaki kofutela. James azalaki kokomela ngai mbala na mbala mpo na kolendisa ngai na elimo. Tobalanaki na Desɛmbɛ ya 1926 mpe pene na mbula moko na nsima, nabotaki mwana na biso ya liboso, Eddie.

Mwa moke na nsima, ngai ná James tobandaki mosala ya mobongisi-nzela elongo. Tosalaki na bitúká mwambe: Michigan, Louisiane, Mississippi, Dakota ya Sudi, Iowa, Nebraska, Californie mpe Illinois. Wana ezalaki nde bambula ya esengo mpenza na bomoi na biso! Esengo yango ekatanaki kaka ntango James akómaki kobɛla.

Lokola maladi ya James ezalaki kosɛnga mbongo mingi, tózongaki na Chicago na 1936 epai ya mama-bokilo na ngai oyo azalaki mpe Motatoli. Na mikolo ya nsuka ya maladi ya James, nazalaki na zemi ya mwana na biso ya mibale. Nazalaki kosala na restora moko mpe bazalaki kofuta ngai dolare moko na mokolo. Mama-bokilo na ngai azalaki kosala nyonso mpo tólyaka malamu, kasi azalaki koboya tópesa ye ata likuta moko. Akipaki biso malamu mpenza.

James abɛlaki maladi moko ya bɔɔngo (encéphalite) na boumeli ya mbula pene na mibale, mpe na nsima akufaki, na sanza ya Yuli, na 1938. Ntango azalaki kobɛla, azalaki kokoka lisusu te kotambwisa motuka to kosakola ndako na ndako, kasi azalaki kolekisa ata libaku moko te ya kosakola. Mpo na koluka mbongo ya kosalisa libota na ngai, natikaki mosala ya mobongisi-nzela. Nazwaki misala ndenge na ndenge oyo ezalaki kozwa ngai kaka mwa bangonga moke.

Mwana na biso Bobby abotamaki mwa 30 Yuli 1938, mikolo mwambe nsima ya liwa ya tata na ye. Kasi, mama-bokilo na ngai aboyaki nakende kobota na lopitalo ya ofele. Amemaki ngai na lopitalo moko ya malamu, mpe monganga na ye nde abotisaki ngai. Longola yango, afutaki mbongo nyonso oyo basɛngaki. Yango ezalaki elembo ya bolingo ya boklisto, mpe natɔndaki ye mingi mpo na yango.

Nazongi lisusu mobongisi-nzela

Tokobaki kofanda epai ya mama-bokilo na ngai tii ntango Bobby akokisaki mbula mibale mpe Eddie mbula 12. Atako bomoi na ngai ebongwanaki, mposa na ngai ya kosalela Yehova lokola mobongisi-nzela ezalaki kaka makasi. Na liyangani ya etúká oyo esalemaki na Detroit, na etúká ya Michigan na 1940, nakutanaki na ndeko moko ná mwasi na ye oyo bazalaki babongisi-nzela mpe balendisaki ngai nákende kosala mosala ya mobongisi-nzela na Caroline du Sud. Na yango, nasombaki motuka moko na dolare 150 mpe namibongisaki mpo na kokende kuna. Na 1941, mbula oyo États-Unis ekɔtaki na Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, ngai ná bana na ngai mibale tokendeki na Sudi ya États-Unis mpe nazongelaki mosala na ngai ya mobongisi-nzela.

Ntango tokómaki na Caroline du Sud, tokendeki liboso na engumba Camden, na nsima na engumba Little River mpe na nsima na engumba Conway. Na Conway, nazwaki mwa wagɔ moko ya moke oyo motuka ekoki kobenda. Nkolo pɔmpi ya esansi moko ya boboto andimaki natya wagɔ na ngai pene na pɔmpi na ye ya esansi, nasalelaka gaz mpe kura na ye, ata mpe twalɛti na ye. Na boumeli ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, esansi ekómaki mpasi mpe nazalaki na likoki ya kozwa yango te. Yango wana nasombaki velo moko ya kala. Na 1943, ntango nakómaki komona ete nakokoka lisusu kosala mosala ya mobongisi-nzela te mpo mbongo nyonso oyo tozalaki na yango esilaki, baponaki ngai mobongisi-nzela monene, mpe nakómaki kozwa mwa mbongo mpo na kokokisa bamposa ya libota na ngai. Na boumeli ya ebele ya bambula, Yehova asalisi ngai mingi mpenza!

Na ntango wana, Batatoli bazalaki te na Conway, mpe ezalaki mpasi mpo na ngai ná bana kobimaka na mosala ya kosakola kaka biso moko. Yango wana, nakomaki mpo na kosɛnga bátinda mobongisi-nzela monene mosusu, mpe na 1944 batindaki mobongi-nzela moko ya malamu mpenza na nkombo Edith Walker! Tosalaki elongo na bisika mingi na boumeli ya mbula 16. Kasi likambo ya mawa, lokola ndeko yango akómaki kobɛla, azongaki na Ohio.

Mapamboli oyo nabosanaka te

Na kati ya makambo ya esengo oyo namonaki na bambula wana, nakobosana ata moke te Albertha, elenge mwasi moko ya mbula 13, oyo azalaki kofanda na Conway mpe azalaki kobatela nkɔkɔ na ye ya mwasi oyo azalaki ebɔsɔnɔ mpe baleki na ye mibale ya mibali. Azalaki kosepela na solo ya Biblia oyo nazalaki koyebisa ye mpe azalaki na mposa ya koyebisa mpe basusu makambo oyo azalaki koyekola. Asepelaki makasi na mosala ya mobongisi-nzela mpe abandaki yango ntango asilisaki eteyelo ya ntei, na 1950. Mbula koleka 57 na nsima, azali kaka mobongisi-nzela!

Na 1951, batindaki ngai ná Edith mpo na mwa ntango mokuse na engumba Rock Hill, na Caroline du Sud, oyo ezalaki kaka na mwa Batatoli moke. Na nsima tokendeki na engumba Elberton, na etúká ya Géorgie, mpe tosalaki kuna mbula misato. Na nsima, nazongaki na Caroline du Sud epai nasalaki banda na 1954 kino na 1962. Na engumba Walhalla, nakutanaki na nkɔkɔ moko ya mwasi na nkombo Nettie, oyo azalaki kofanda kaka ye moko na kartye moko pembeni ya zamba. Nkɔkɔ yango azalaki koyoka te. Mpo na koyekola Biblia, azalaki kotánga paragrafe moko, nazalaki kolakisa ye motuna na nse ya lokasa mpe na nsima azalaki kolakisa esika eyano ezali na kati ya paragrafe.

Soki asimbi malamu te likanisi moko, azalaki kokoma motuna na ye na papye mpe ngai nazalaki kokoma eyano pembeni na yango. Na nsima, Nettie akómaki kosepela na solo makasi, mpe abandaki koyangana na makita mpe kobima na mosala ya kosakola ndako na ndako. Azalaki kosakola ye moko, kasi nabandaki kozala mosika te; mbala mingi nazalaki kaka na ngámbo ya balabala mpo na kosunga ye soki esengeli.

Ntango nazalaki na Walhalla, motuka na ngai wana ya kala ekufaki. Namonaki bazali kotɛka motuka moko na dolare 100, kasi nazalaki na mbongo te. Nakendeki epai ya Motatoli moko oyo azalaki kosala mombongo mpe adefisaki ngai dolare 100. Mwa moke na nsima, leki na ngai ya mwasi atindelaki ngai mokanda mpo na koyebisa ngai ete bandeko na biso bamoni mikanda oyo ezali komonisa ete ntango tata akufaki atikaki mwa mbongo na banki. Basololaki mpe bayokanaki ete bátindela ngai mbongo yango. Mbongo yango ezalaki dolare 100!

Ngai ná bana na ngai tozali babongisi-nzela

Ntango Eddie ná Bobby bazalaki bana mike, nazalaki komema bango ntango nyonso na mosala ya kosakola ndako na ndako. Na bambula wana, bato bazalaki mpenza komɛla bangi te mpe bazalaki komipesa na pite te lokola lelo oyo. Lokola tozalaki na bomoi ya mindondo te mpe totyaki mosala ya kosakola na esika ya liboso, yango esalisaki ngai nakutana te na mikakatano ebele oyo baboti bazali kokutana na yango lelo oyo mpo na kobɔkɔla bana na bango bákóma basaleli ya Yehova.

Eddie akendeki kotánga na Camden tii na kelasi ya liboso ya eteyelo ya ntei. Na nsima, asepelaki kosala mosala ya mobongisi-nzela elongo ná ngai. Tosalaki mosala na biso ya babongisi-nzela na esengo nyonso na boumeli ya mwa bambula. Na nsima, akómaki na mposa makasi ya kosala na biro monene ya Batatoli ya Yehova na Brooklyn, na New York, epai asalaki banda na 1947 kino na 1957. Na 1958 abalaki Albertha, oyo nayekolaki na ye Biblia mpe bakómaki kosala elongo lokola babongisi-nzela. Ezalaki mpenza esengo ntango biso nyonso misato tokɔtaki kelasi ya babongisi-nzela elongo, na 2004!

Nazali komikundola ete mokolo moko, esili koleka bambula ebele, ntango Bobby azalaki mwana moke, abondelaki ete Yehova asalisa ngai nazwa esansi ebele ya kotya na motuka mpo tókoka kokóma epai ya bato oyo nazalaki koyekola na bango Biblia. Na bomoi na ye mobimba, Bobby azalaki kolinga mosala ya kosakola mingi mpe asalaki mosala ya mobongisi-nzela na boumeli ya bambula ebele. Likambo ya mawa, Bobby akutanaki mpe na mikakatano na libota na ye. Na 1970, nsima ya sanza 22 mpamba ya libala, mwasi na ye akufaki na mpasi ya kobota elongo na bamapasa oyo abotaki. Ngai ná Bobby tozalaki ntango nyonso esika moko mpe tozalaki koyokana malamu.

Nazali kaka mobongisi-nzela!

Na 1962, batindaki ngai na lisánga ya Lumberton, na Caroline du Nord, epai nakokisi lelo mbula 45. Nakobaki kotambwisa motuka na ngai kino ntango nakokisaki mbula pene na 84. Sikoyo, libota moko ya Batatoli ya Yehova oyo bafandaka pene na esika nafandi bamemaka ngai na makita mpe na mosala ya kosakola.

Nazali na bibende ya kotambola na yango mpe na velo ya bibɔsɔnɔ, kasi nasalelaka yango te, mpo nazali na likoki ya kotambola ngai moko. Nazali kotɔnda mpenza Yehova mpo na ndenge nazalaki ntango nyonso nzoto kolɔngɔnɔ; kaka mwa mikolo oyo nde miso na ngai ezali komona lisusu malamu te. Nazangisaka ata likita moko te ya lisangá, longola kaka soki nabɛli makasi, mpe atako nakoki kopesa bangonga te oyo esɛngami mpo na babongisi-nzela mpo nakómi mobange, nazali kaka kokoba na mosala yango.

Nsima ya kolekisa mbula 70 na mosala ya mobongisi-nzela, nakoki koloba na bosembo nyonso ete Yehova asalisi ngai na bomoi na ngai mobimba.a Nayebi ete nazali mayele mingi te mpe nasalaka makambo nyonso malɛmbɛmalɛmbɛ, kasi Yehova ayebi oyo nakoki kosala mpe nakoki kosala te. Nazali kotɔnda ye mingi na ndenge ayebi milende oyo nazali kosala mpe mpo andimi kosalela ngai na mosala na ye.

Namoni ete kosalela Yehova na makasi na biso nyonso ezali na ntina mingi, mpamba te nyonso tozali na yango euti epai na ye. Soki nazali kaka makasi, nakolinga kosala mosala mosusu te, kaka mosala ya mobongisi-nzela. Oyo nde libaku kitoko nazwi na bomoi na ngai! Nabondelaka Yehova ntango nyonso ete akoba kosalela ngai na mosala na ye libela na libela.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Ndeko Stigers asukisaki bomoi na ye awa na mabelé mwa 20 Aprili 2007, sanza misato liboso akokisa mbula 100. Tolendisami na komona ebele ya bambula oyo asaleli Nzambe na bosembo nyonso, mpe tozali na esengo ndenge azwi mbano na ye na likoló.

[Elilingi na lokasa 13]

Ngai ná mobali na ngai tozalaki kosalela motuka oyo ntango tozalaki babongisi-nzela

[Elilingi na lokasa 14]

Ngai ná bana na ngai, na 1941

[Elilingi na lokasa 15]

Ngai, Eddie mpe Bobby, mikolo oyo

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto