Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w07 15/7 nk. 21-25
  • ‘Okokoba kotambola na elimo’?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • ‘Okokoba kotambola na elimo’?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Tótikala penepene na Nzambe mpe na Klisto
  • “Tólinganaka”
  • “Esengo ya Yehova ezali nguya na bino”
  • Tózala bato ya kimya mpe bato ya motema molai
  • Tómonisa motema malamu mpe bolamu
  • “Kondima oyo ezangi bokosi”
  • Tózala na boboto mpe na komipekisa
  • Tókoba kotambola na elimo
  • Ozali kotika elimo ya Nzambe ekamba yo?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • Elimo na Nzambe ekoki kozala na bopusi likoló na yo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Tambolá na elimo mpe zalá na bomoi oyo eyokani na komipesa na yo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
  • Elimo na Jéhovah ezali kokamba libota na ye
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
w07 15/7 nk. 21-25

‘Okokoba kotambola na elimo’?

“Bókoba kotambola na elimo mpe bokokokisa ata mposa moko te ya mosuni.”​—BAGALATIA 5:16.

1. Tokoki kosala nini mpo tózala na kobanga te ete tokosalela elimo santu lisumu?

EZALI na likambo moko oyo tokoki kosala mpo tózala na kobanga te ete tosaleli elimo santu ya Yehova lisumu. Likambo yango ezali oyo ntoma Paulo alobelaki na maloba oyo: “Bókoba kotambola na elimo mpe bokokokisa ata mposa moko te ya mosuni.” (Bagalatia 5:16) Soki totiki ete elimo santu ya Nzambe etambwisa biso, tokomipesa te na bamposa mabe ya nzoto.​—Baloma 8:2-10.

2, 3. Tokozala na bomoi ya ndenge nini soki tokobi kotambola na elimo?

2 Soki tozali ‘kokoba kotambola na elimo,’ nguya ya Yehova ekopesa biso makasi ya kotosa ye. Tokomonisa bizaleli ya Nzambe na mosala ya kosakola, na lisangá, na libota, to mpe na bisika mosusu. Ndenge na biso ya kozala na molongani na biso, na bana na biso, na bandeko na biso baklisto, mpe na bato mosusu ekomonisa ete tozali kobota mbuma ya elimo.

3 Kozala na bomoi “na oyo etali elimo uta na etaleli ya Nzambe” epesaka biso makasi ya koboya masumu. (1 Petelo 4:1-6) Soki totambwisami na elimo, tokosala te lisumu oyo ekoki kolimbisama te. Matomba nini mosusu tokozwa soki tokobi kotambola na elimo?

Tótikala penepene na Nzambe mpe na Klisto

4, 5. Ndenge nini tokotalela Yesu soki tozali kotambola na elimo?

4 Soki tozali kotambola na elimo santu, tokobatela boninga na biso na Nzambe mpe na Mwana na ye. Na ntina na makabo ya elimo, Paulo akomelaki baklisto ya lisangá ya Kolinti boye: “Nalingi [bino baoyo bozalaki basambeli ya bikeko] bóyeba ete moto moko te ntango azali koloba na lisalisi ya elimo ya Nzambe alobaka ete: ‘Yesu alakelami mabe!’ mpe moto moko te akoki koloba ete: ‘Yesu azali Nkolo!’ soki ezali te na lisalisi ya elimo santu.” (1 Bakolinti 12:1-3) Elimo nyonso oyo etindi moto alakela Yesu mabe ekoki kouta epai mosusu te, kaka epai ya Satana Zabolo. Nzokande, lokola biso baklisto totambwisami na elimo santu, tondimaka ete Yehova asekwisaki Yesu mpe atyaki ye likoló ya bikelamu nyonso mosusu. (Bafilipi 2:5-11) Tozali na kondima na mbeka ya lisiko ya Klisto mpe totalelaka Yesu lokola Nkolo oyo Nzambe atye likoló na biso.

5 Na siɛklɛ ya liboso, bato mosusu oyo bazalaki komibenga baklisto baboyaki kondima ete Yesu abotamaki na nzoto ya mosuni. (2 Yoane 7-11) Bato mosusu bandimaki makanisi wana mpe bakómaki koboya mateya ya solo na ntina na Yesu Masiya. (Malako 1:9-11; Yoane 1:1, 14) Kotambola na elimo santu ebatelaka biso tókwea te na lipɛngwi ya ndenge wana. Kasi, mpo tókoba kosepela na boboto monene ya Yehova mpe ‘tókoba kotambola na kati ya solo,’ tosengeli kolala mpɔngi te. (3 Yoane 3, 4) Yango wana, tózwa ekateli makasi ya kokima lipɛngwi mpo tózala ntango nyonso na boyokani ya malamu na Tata na biso ya likoló.

6. Bizaleli nini elimo ya Nzambe ekolisaka epai ya baoyo batambolaka na elimo?

6 Paulo atángaki kosambela bikeko mpe kosala mwa mangomba na kati ya “misala ya mosuni” lokola pite mpe etamboli ya nsɔni. Alobaki boye: “Baoyo bazali bato ya Klisto Yesu babaká na nzete mosuni elongo na kolula na yango mpe bamposa na yango. Soki tozali na bomoi na elimo, tiká tókoba kotambola mpe na molɔngɔ mpenza na elimo.” (Bagalatia 5:19-21, 24, 25) Elimo santu ekolisaka bizaleli nini epai ya baoyo bazali na bomoi na elimo mpe batambolaka na yango? Paulo akomaki ete “mbuma ya elimo ezali bolingo, esengo, kimya, motema molai, motema malamu, bolamu, kondima, boboto, komipekisa.” (Bagalatia 5:22, 23) Tiká tótalela ezaleli mokomoko ya mbuma ya elimo.

“Tólinganaka”

7. Bolingo ezali nini, mpe wapi mwa makambo oyo emonisaka yango?

7 Moto amonisaka bolingo, moko ya bizaleli ya mbuma ya elimo, ntango azali kosepela mpenza na basusu, komibanzabanza mpo na bango, mpe kokangama na bango. Biblia elobi ete “Nzambe azali bolingo” mpo ete ye nde azali liziba na yango. Mbeka ya lisiko oyo Yesu Klisto apesaki ezali komonisa bolingo mingi oyo Nzambe mpe Mwana na ye bazali na yango mpo na bato. (1 Yoane 4:8; Yoane 3:16; 15:13; Baloma 5:8) Biso bayekoli ya Yesu toyebanaka na bolingo oyo tozalaka na yango kati na biso. (Yoane 13:34, 35) Kutu, Biblia ezali kolendisa biso ete “tólinganaka.” (1 Yoane 3:23) Paulo alobaki mpe ete bolingo ezali na motema molai mpe na boboto. Ezali na zuwa te, mpe emikumisaka te, emitambwisaka na ndenge ya nsɔni te, elukaka matomba na yango moko te. Bolingo esilikaka te, ebombaka mabe na motema te. Esepelaka na makambo ya solo, kasi na kozanga boyengebene te. Bolingo ekangaka motema, endimaka, elikyaka, mpe eyikaka mpiko na makambo nyonso. Lisusu, bolingo esilaka soki moke te.​—1 Bakolinti 13:4-8.

8. Mpo na nini tosengeli kolinga bandeko na biso basaleli ya Yehova?

8 Soki totiki elimo ya Nzambe ebota bolingo na mitema na biso, ezaleli yango ekomonana na boyokani na biso na Nzambe mpe bazalani na biso. (Matai 22:37-39) Ntoma Yoane akomaki boye: “Moto oyo alingaka te azali kofanda na kati ya liwa. Moto nyonso oyo azali koyina ndeko na ye azali mobomi, mpe boyebi ete mobomi ata moko te azali na bomoi ya seko efandi na kati na ye.” (1 Yoane 3:14, 15) Na Yisalaele, moto oyo abomi mozalani na ye akokaki kokima na engumba moko ya komibomba mpe kotikala kuna kaka soki azalaki koyina moto yango te. (Deteronome 19:4, 11-13) Soki tozali kotambwisama na elimo santu, tokolinga Nzambe, bandeko na biso baklisto, mpe bato mosusu.

“Esengo ya Yehova ezali nguya na bino”

9, 10. Esengo ezali nini, mpe wapi mwa bantina tozali na yango ya kozala na esengo?

9 Kozala na esengo elimboli kozala na nsai na motema. Yehova azali “Nzambe ya esengo.” (1 Timote 1:11; Nzembo 104:31) Mwana ya Yehova asepelaka kosala mokano ya Tata na ye. (Nzembo 40:8; Baebele 10:7-9) Lisusu, “esengo ya [Yehova] ezali nguya na [biso].”​—Nehemia 8:10.

10 Esengo oyo Nzambe apesaka esalisaka biso tósepela kosala mokano na ye ata na ntango ya mpasi, ya mawa, to ya minyoko. ‘Boyebi ya Nzambe’ epesaka biso esengo mingi! (Masese 2:1-5) Boyokani malamu oyo tozali na yango na Nzambe esimbami na boyebi ya sikisiki mpe kondima epai na ye mpe na mbeka ya lisiko oyo Yesu apesaki. (1 Yoane 2:1, 2) Kozala na libota ya bandeko kaka moko ya solo na mokili mobimba epesaka mpe esengo. (Sefania 3:9; Hagai 2:7) Elikya ya Bokonzi mpe libaku malamu ya kosakola nsango malamu epesaka mpe esengo. (Matai 6:9, 10; 24:14) Longola yango, elikya ya kozala na bomoi ya seko epesaka mpe esengo. (Yoane 17:3) Soki tokanisi nyonso wana, tosengeli kaka ‘kozala na esengo.’​—Deteronome 16:15.

Tózala bato ya kimya mpe bato ya motema molai

11, 12. (a) Ndenge nini okoki kolimbola kimya? (b) Kimya esalaka nini epai na biso?

11 Kimya, ezaleli mosusu ya mbuma ya elimo, elimboli kozanga motungisi to yikiyiki. Tata na biso ya likoló azali Nzambe ya kimya, mpe Biblia epesi biso elaka oyo: “[Yehova] akopambola bato na ye na kimya.” (Nzembo 29:11; 1 Bakolinti 14:33) Yesu alobaki na bayekoli na ye boye: “Natikeli bino kimya na ngai, napesi bino kimya na ngai.” (Yoane 14:27) Ndenge nini kimya yango esengelaki kosalisa bayekoli na ye?

12 Kimya oyo Yesu apesaki bayekoli na ye ekitisaki bango mitema, ebatelaki makanisi na bango mpe elongolaki bango kobanga. Bakómaki na kimya yango mingimingi ntango bazwaki elimo santu oyo alakaki bango. (Yoane 14:26) Lelo oyo, na lisalisi ya elimo yango mpe na mabondeli oyo tozali kosala, tozali kozwa “kimya ya Nzambe” oyo eleki nyonso mpe ekitisaka mitema mpe makanisi na biso. (Bafilipi 4:6, 7) Longola yango, elimo ya Yehova esalisaka biso tózala na kimya mpe tólukaka matata te na bandeko na biso baklisto mpe bato mosusu.​—Baloma 12:18; 1 Batesaloniki 5:13.

13, 14. Motema molai elimboli nini, mpe mpo na nini tosengeli komonisa yango?

13 Motema molai ezali na boyokani na kimya, mpamba te esalisaka biso tókanga motema na matumoli to mabe oyo bazali kosala biso, na elikya ete makambo ekobonga. Nzambe azali na motema molai. (Baloma 9:22-24) Yesu mpe azali na motema molai. Akoki komonisela biso ezaleli yango, mpamba te Paulo akomaki boye: “Ntina oyo nayokelamaki mawa ezalaki ete na nzela na ngai moto ya libosoliboso mpenza Klisto Yesu akoka kolakisa motema molai na ye nyonso lokola ndakisa epai ya baoyo bakondimela ye mpo na bomoi ya seko.”​—1 Timote 1:16.

14 Motema molai esalisaka biso tóyika mpiko ntango bato mosusu balobi na biso to basali biso mabe. Paulo alendisaki baninga na ye baklisto na maloba oyo: “Bózala na motema molai epai ya bato nyonso.” (1 Batesaloniki 5:14) Lokola biso nyonso tozali bato ya kozanga kokoka mpe tosalaka mabunga, na ntembe te tolingaka ete bato mosusu bámonisela biso motema molai ntango tosali libunga. Yango wana, tósala milende mpo na ‘kozala na motema molai esika moko na esengo.’​—Bakolose 1:9-12.

Tómonisa motema malamu mpe bolamu

15. Motema malamu elimboli nini, mpe pesá bandakisa na yango.

15 Tomonisaka motema malamu ntango tozali komibanzabanza mpo na basusu na maloba ya boboto mpe misala ya malamu. Yehova azali na motema malamu, Mwana na ye mpe azali na motema malamu. (Baloma 2:4; 2 Bakolinti 10:1) Basaleli ya Nzambe mpe ya Klisto basengeli kozala na motema malamu. (Mika 6:8; Bakolose 3:12) Kutu, ata bato mosusu oyo bazalaki basaleli ya Nzambe te bamonisaki “boboto moko ya koloba te.” (Misala 27:3; 28:2) Tokoki mpenza komonisa motema malamu soki tozali ‘kokoba kotambola na elimo.’

16. Wapi mwa makambo oyo esengeli kotinda biso tómonisa motema malamu?

16 Tokoki komonisa motema malamu ata ntango moto moko alobi na biso to asali biso likambo oyo esilikisi biso. Paulo alobaki boye: “Bóyoka nkanda, mpe atako bongo bósala lisumu te; tiká ete moi elala te bino bozali kaka na nkanda, mpe bótikela Zabolo esika te. . . . Bózala na boboto na kati na bino, bóyokelanaka mawa mingi, kolimbisanáká na motema moko ndenge Nzambe mpe na nzela ya Klisto alimbisaki bino na motema moko.” (Baefese 4:26, 27, 32) Ebongi mpenza tózalaka na motema malamu epai ya baoyo bazali konyokwama. Kasi, tokoloba te ete nkulutu moko amonisi motema malamu soki akangi monɔkɔ na ntango oyo ebongi mpenza ete apesa toli euti na Biblia, kasi asali yango te kaka mpo alingi te kosilikisa moto oyo emonani polele ete azali kopɛngwa na nzela ya “bolamu mpe boyengebene mpe solo.”​—Baefese 5:9.

17, 18. Bolamu ezali nini, mpe yango esengeli kozala na esika nini na bomoi na biso?

17 Bolamu ezali ezaleli ya moto oyo asalaka makambo na bosembo to azali na etamboli oyo ebongi mpenza. Nzambe azali malamu na ndenge ya kokoka. (Nzembo 25:8; Zekalia 9:17) Yesu azali malamu mpe azali na etamboli oyo ebongi mpenza. Kasi, aboyaki bábenga ye “Moteyi Malamu” na ndenge ya titre. (Malako 10:17, 18) Na ntembe te aboyaki titre yango mpo ayebaki ete Nzambe nde aleki bato nyonso na malamu.

18 Lokola tozali bato ya kozanga kokoka tokokaka te kosala ntango nyonso malamu. (Baloma 5:12) Atako bongo, tokoki komonisa ezaleli yango soki tozali kobondela Nzambe ‘alakisa biso bososoli malamu.’ (Nzembo 119:66) Paulo ayebisaki baninga na ye baklisto ya Loma boye: “Ngai moko mpe nandimi na ntina etali bino, bandeko na ngai, ete bino mpenza botondi mpe na bolamu, mpo botondisami na boyebi nyonso.” (Baloma 15:14) Nkulutu asengeli kozala “moto oyo alingaka makambo ya malamu.” (Tito 1:7, 8) Soki tozali kotambwisama na elimo ya Nzambe, bato bakoyeba biso na ezaleli ya malamu, mpe Yehova ‘akokanisa biso mpo na malamu oyo tozali kosala.’​—Nehemia 5:19; 13:31.

“Kondima oyo ezangi bokosi”

19. Limbolá kondima na boyokani na Baebele 11:1.

19 Kondima, ezaleli oyo etángami mpe na kati ya mbuma ya elimo, “ezali ezaleli ya kozela na motema mobimba biloko oyo ozali kolikya kozwa, elakiseli ya polelepolele ya makambo ya solosolo atako ezali komonana te.” (Baebele 11:1) Soki tozali na kondima, tokomona ete likambo nyonso oyo Yehova alaki ekokokisama. Bilembo oyo ezali kondimisa biso makambo oyo ezangi komonana ezali polele mpenza, yango wana Biblia elobi ete kondima ezali elakiseli na yango. Na ndakisa, biloko oyo tomonaka na mokili endimisaka biso ete ezali na Mozalisi oyo akelaki yango. Tokozala na kondima ya motindo wana soki tozali kokoba kotambola na elimo.

20. “Lisumu oyo ezali kokanga biso kozanga mpasi” ezali nini, mpe ndenge nini tokoki kokima yango mpe misala ya mosuni?

20 Kozanga kondima ebengami “lisumu oyo ezali kokanga biso kozanga mpasi.” (Baebele 12:1) Tosengeli kotyela elimo ya Nzambe motema mpo na kokima makambo lokola misala ya mosuni, mposa ya biloko ya mokili, mpe mateya ya lokuta oyo ekoki kobebisa kondima. (Bakolose 2:8; 1 Timote 6:9, 10; 2 Timote 4:3-5) Elimo ya Nzambe ezali kopesa biso kondima lokola oyo ya batatoli oyo bazalaki na bomoi liboso Klisto aya, mpe bato mosusu oyo Biblia elobeli. (Baebele 11:2-40) Longola yango, soki tozali na “kondima oyo ezangi bokosi” tokoki kolendisa kondima ya basusu.​—1 Timote 1:5; Baebele 13:7.

Tózala na boboto mpe na komipekisa

21, 22. Pesá ndimbola ya boboto, mpe mpo na nini tosengeli komonisa ezaleli yango?

21 Boboto ezali ezaleli malamu oyo emonanaka na bomoto na biso mpe na makambo oyo tozali kosala. Elimo ya boboto ezali moko na bizaleli ya Nzambe. Toyebi yango mpamba te Yesu, moto oyo amonisaki bomoto ya Tata na ye na ndenge ya kokoka mpenza, azalaki na elimo ya boboto. (Matai 11:28-30; Yoane 1:18; 5:19) Boye, nini ezali kosɛngama epai na biso basaleli ya Nzambe?

22 Biso baklisto tosengeli ‘komonisa boboto epai ya bato nyonso.’ (Tito 3:2) Tomonisaka boboto na mosala ya kosakola. Biblia epesi toli na baoyo bazali na makoki ya elimo ete básembola “na elimo ya boboto” moklisto nyonso oyo abandi kolanda nzela ya mabe. (Bagalatia 6:1) Biso nyonso tokoki kolendisa bomoko mpe kimya soki tozali komonisa ‘elimo ya komikitisa mpe boboto.’ (Baefese 4:1-3) Tokoki komonisa boboto soki tozali ntango nyonso kotambola na elimo mpe tozali na komipekisa.

23, 24. Komipekisa elimboli nini, mpe esalisaka biso na nini?

23 Komipekisa esalisaka biso tósɛnzɛla na makanisi, maloba mpe misala na biso. Yehova ‘azalaki ntango nyonso komipekisa’ liboso ya bato ya Babilone oyo babebisaki Yelusaleme. (Yisaya 42:14, NW) Mwana ya Nzambe ‘atikelaki biso ndakisa’ na ndenge amipekisaki ntango bazalaki konyokola ye. Ntoma Petelo mpe apesaki baninga na ye baklisto toli ete ‘bábakisa na boyebi na bango ezaleli ya komipekisa.’​—1 Petelo 2:21-23; 2 Petelo 1:5-8.

24 Bankulutu basengeli kozala na komipekisa. (Tito 1:7, 8) Kutu, bato nyonso oyo bazali kotambwisama na elimo santu bakoki kolona ezaleli ya komipekisa mpe yango ekosalisa bango bákima misala ya mbindo, maloba ya bosɔtɔ, to makambo mosusu nyonso oyo ekoki kobebisa boyokani na bango na Yehova. Soki totiki elimo ya Nzambe ekolisa ezaleli ya komipekisa na mitema na biso, ezaleli yango ekomonana na maloba mpe na etamboli na biso ya malamu.

Tókoba kotambola na elimo

25, 26. Soki tozali kotambola na elimo, tokozala na boyokani ya ndenge nini na bato mosusu mpe tokozala na elikya nini?

25 Soki tozali kotambola na elimo, tokozala basakoli ya molende. (Misala 18:24-26) Tokozala baninga ya malamu, mpe mingimingi bato oyo babangaka Nzambe bakosepela kozala elongo na biso. Lokola totambwisami na elimo santu, tokobanda mpe kolendisa baninga na biso basambeli ya Yehova. (Bafilipi 2:1-4) Moklisto mokomoko asengeli mpenza kozala bongo!

26 Kotambola na elimo ezali pɛtɛɛ te na mokili oyo etambwisami na Satana. (1 Yoane 5:19) Atako bongo, bamilio ya bato bazali kosala yango lelo oyo. Soki totye elikya epai ya Yehova na motema na biso mobimba, tokozala na bomoi ya esengo lelo mpe tokozwa libaku ya kokoba kotambola libela na libela na banzela ya sembo ya Mopesi ya elimo santu oyo atondi na bolingo.​—Nzembo 128:1; Masese 3:5, 6.

Okopesa eyano nini?

• Tokozala na boyokani ya ndenge nini na Nzambe mpe Mwana na ye soki tozali “kotambola na elimo”?

• Mbuma ya elimo santu esangisi bizaleli nini?

• Wapi mwa balolenge oyo tokoki komonisa mbuma ya elimo ya Nzambe?

• Kotambola na elimo ezali komemela biso matomba nini lelo oyo mpe ezali kopesa biso elikya nini?

[Elilingi na lokasa 23]

Elimo santu ya Yehova ekolisaka bolingo mpo na baninga na biso bandimi

[Elilingi na lokasa 24]

Monisáká motema malamu na maloba mpe na misala

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto