Ernst Glück asalaki mosala monene
ESILI koleka mbula 300, Ernst Glück abandaki mosala moko oyo bato mingi te bakokaki kozala na mpiko ya kosala yango. Azwaki ekateli ya kobongola Biblia na monɔkɔ oyo ayebaki te.
Glück abotamá na mobu 1654 na mwa engumba moko moke na Wettin, pembeni ya Halle na ekólo Allemagne. Tata na ye azalaki pastɛrɛ na Lingomba ya Protesta, mpe yango esalaki ete banda bomwana, Ernst akolisa mposa ya koyekola makambo ya Nzambe. Ntango akómaki na mbula 21, asilisaki koyekola teoloji na Allemagne mpe akendaki kofanda na ekólo oyo ebengami lelo Lettonie. Na ntango wana, bato mingi ya ekólo yango bakɔtaki kelasi te, mpe ezalaki na babuku mingi te na monɔkɔ ya mboka na bango. Glück akomaki boye: “Ntango nakómaki na mboka yango, wana nazalaki naino elenge, likambo ya liboso ya mabe oyo namonaki ezalaki ete bandako-nzambe ya Lettonie ezalaki na Biblia te . . . Yango etindaki ngai nazwa ekateli liboso ya Nzambe ya koyekola monɔkɔ yango mpe koyeba yango malamumalamu.” Azalaki na mokano ya kopesa bato ya Lettonie Biblia na monɔkɔ ya mboka na bango.
Abandi komibongisa mpo na kobongola
Ekólo oyo Glück akendaki kofanda ezalaki kobengama Livonie mpe ekólo Suède nde ezalaki koyangela yango. Johannes Fischer azalaki momonisi ya mokonzi ya Suède na ekólo yango. Mposa na ye ezalaki ya kotya biteyelo na ekólo yango mpe kosala mombongo. Glück asololaki na Fischer mpo na mokano na ye ya kobongola Biblia na monɔkɔ ya Letton, mpe likambo yango esepelisaki ye. Fischer azalaki na masini ya konyata mikanda na Riga, oyo ezalaki mboka-mokonzi. Amonaki ete mosala ya kobimisa Biblia ekopesa ye nzela ya kokokisa mposa na ye oyo azalaki na yango ya kosala biteyelo mpe na bongo, kozwa mbongo mingi. Fischer asɛngaki Charles XI, mokonzi ya Suède ndingisa ya kobongola Biblia. Mokonzi apesaki ndingisa mpe alobaki akopesa mbongo mpo na mosala yango. Ekateli ya mokonzi oyo ebimaki na mokolo ya 31 Augusto 1681, epesaki nzela na mosala yango ya kobongola Biblia.
Na ntango yango, Glück azalaki komibongisa. Lokola ayebaki monɔkɔ ya Allemand, akokaki kosalela libongoli ya Martin Luther mpo na kobongola Biblia na monɔkɔ ya Letton. Kasi, lokola Glück azalaki na mposa ya kobimisa Biblia moko ya malamu koleka, amonaki ete mpo alonga asengelaki kobongola uta na monɔkɔ ya Liebele mpe ya Grɛki. Lokola ayebaki minɔkɔ yango malamumalamu te, akendaki na Hambourg, na Allemagne mpo na koyekola Liebele mpe Grɛki. Ntango akómaki kuna, akutanaki na sango moko moto ya Lettonie, nkombo na ye Jānis Reiters oyo, mbala mosusu asalisaki ye ayeba malamumalamu monɔkɔ ya Letton mpe ya Grɛki.
Bambula mingi ya mosala mpe ya kozela
Glück asilisaki formasyo na ye na minɔkɔ yango na 1680 mpe azongaki na Lettonie mpe kuna akómaki pastɛrɛ. Eumelaki te, abandaki mosala na ye ya kobongola. Na 1683, Glück atindamaki na parwasi moko monene na Alūksne, mpe yango eyebanaki lokola esika oyo asalaki mosala na ye ya kobongola.
Na ntango yango, monɔkɔ ya Letton ezalaki na maloba te mpo na kolobela mateya mingi ya Biblia. Yango wana, Glück asalelaki maloba mosusu ya Allemand na libongoli na ye. Kasi, asalaki nyonso oyo akokaki mpo na kobongola Liloba ya Nzambe na monɔkɔ ya Letton, mpe bato oyo bayebi malamumalamu mosala ya kobongola, bandimaka ete libongoli na ye ezali malamu mingi. Kutu, Glück abimisaki maloba ya sika, mpe maloba yango mosusu esalelamaka mingi na monɔkɔ ya Letton. Na kati ya maloba yango, tokoki kotánga “ndakisa,” “fɛti,” “elombe,” “konɔnga,” mpe “kotatola.”
Johannes Fischer azalaki ntango nyonso koyebisa mokonzi ya Suède ndenge mosala ya kobongola ezalaki kotambola, mpe mikanda oyo bazalaki kokomana emonisi ete tii na 1683, Glück asilaki kobongola Makomami ya Grɛki ya boklisto. Na 1689, asilisaki mosala yango monene ya kobongola Biblia mobimba oyo ezwaki ye kaka mbula mwambe.a Esɛngaki ntango molai mpo Biblia yango ebima, kasi na mobu 1694, Glück akokisaki mokano na ye—guvɛrnema epesaki nzela ya kokabola Biblia yango ya monɔkɔ ya Letton epai ya bato.
Bato mosusu ya mayele bandimaka te ete Glück abongolaki Biblia yango kaka ye moko. Ntembe ezali te ete azalaki kotalela libongoli ya Luther mpe abongisaki mikanda mosusu ya Biblia oyo esilaki kobima na monɔkɔ ya Letton. Kasi, asalelaki yango kaka na eteni moke ya libongoli na ye. Ezalaki na babongoli mosusu oyo basalaki elongo na ye? Glück azalaki na mosungi moko ntango azalaki kobongola mpe basusu bazalaki kosalisa ye na kotánga mpo na koyeba soki akomi malamu to mpe soki abongoli likanisi moko malamu. Kasi, emonani ete bato yango bazalaki kobongola te. Na yango, emonani ete Glück azalaki kobongola kaka ye moko.
Libongoli ya Glück esalisaki na koyeba kokóma monɔkɔ ya Letton, kasi esalaki mpe likambo mosusu ya monene. Epesaki bato ya Lettonie likoki ya kotánga Liloba ya Nzambe na monɔkɔ ya mboka na bango mpe koyekola mateya ya solo. Babosanaka te likambo oyo Ernst Glück asalelaki bango. Banda mbula koleka 300, bato ya engumba Alūksne babatelaka nzete mibale oyo babengi chêne oyo babengaka yango Glika ozoli, to nzete ya Glück. Glück nde alonaki banzete yango mpo na kokanisaka Biblia na monɔkɔ ya Letton. Na ndako moko moke ya kobomba biloko ya kala oyo ezali na Alūksne ezali na mabongoli ndenge na ndenge ya Biblia; kati na yango kopi ya liboso ya libongoli ya Glück. Elembo ya engumba Alūksne ezali Biblia mpe mobu 1689, mbula oyo Glück asilisaki kobongola.
Mosala oyo asalaki na nsima
Ntango kaka Glück akómaki na Lettonie, abandaki koyekola monɔkɔ ya Russe. Na mobu 1699, akomaki ete azali kokokisa mokano mosusu—kobongola Biblia na monɔkɔ ya Russe. Na mokanda moko oyo akomaki na mobu 1702, alobaki ete abandaki kotalela lisusu libongoli na ye na monɔkɔ ya Letton. Kasi, makambo ezalaki lisusu malamu te mpo na mosala ya kobongola Biblia. Nsima ya bambula mingi ya kimya, Lettonie ekómaki mboka ya bitumba. Na mobu 1702 basoda ya Russie balongaki basoda ya Suède mpe babɔtɔlaki Alūksne. Glück mpe libota na ye bamemamaki na Russie.b Na eleko yango ya mobulu, Glück abungisaki bamaniskri na ye ya Biblia ya sika na monɔkɔ ya Letton mpe ya libongoli na ye na monɔkɔ ya Russe. Akufaki na Moscou na mobu 1705.
Kobunga ya bamaniskri ya mabongoli na monɔkɔ ya Letton mpe ya Russe ezalaki likambo ya mabe mingi. Kasi, tii lelo oyo moto nyonso oyo azali kotánga Biblia na monɔkɔ ya Letton azwaka matomba na libongoli ya liboso ya Glück.
Ernst Glück azali kaka moko kati na bato mingi oyo bamipesaki na mosala monene ya kobongola Biblia na minɔkɔ mosusu. Lelo oyo, moto nyonso akoki kotánga Liloba ya Nzambe mpe koyeba mateya na yango ya solo. Na nzela ya mabongoli ndenge na ndenge ya Biblia oyo ezali na minɔkɔ koleka 2 000, Yehova azali kosala ete na bisika nyonso bato báyeba ye.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Bato ya mayele 47 balekisaki mbula nsambo mpo na kosilisa Biblia Authorized Version, to King James Version na mobu 1611.
b Mwana moko ya mwasi oyo Glück abɔkɔlaki atikalaki na bomoi mpe abalanaki na Pierre le Grand, mokonzi ya Russie. Na mobu 1725, ntango Pierre le Grand akufaki, akómaki Catherine I, mokonzi-mwasi ya Russie.
[Elilingi na lokasa 13]
Libongoli ya Glück
[Elilingi na lokasa 14]
Batatoli ya Yehova bazali koteya Biblia na engumba oyo Glück abongolaki yango