Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w07 15/2 nk. 9-12
  • Mosala ya Bokonzi na Zimbabwe

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mosala ya Bokonzi na Zimbabwe
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
  • Mitó ya makambo mike
  • Bazali kosakola nsango ya kobɔndisa
  • Lisungi mpo na bandeko
  • Bolingo ezali kotonga
  • Bazali kotonga bandako ya losambo
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
w07 15/2 nk. 9-12

Mosala ya Bokonzi na Zimbabwe

Nkombo Zimbabwe elimboli “ndako ya libanga.” Ekólo yango eyebani mingi mpo na Bweta ya Victoria (chutes Victoria) mpe mitindo ndenge na ndenge ya banyama ya zamba mpe bandɛkɛ oyo ezali kuna. Nzokande, ezali mpe na bandako eleki minene mpe eleki koumela na sudi ya esobe Sahara. Mwa bangomba patatalu oyo etondi na mabanga eleká na katikati ya ekólo yango. Malili oyo ezalaka na esika yango esalá ete zamba moko kitoko ebota wana. Ekólo Zimbabwe ezali na bato soki milio 12.

MPO na nini babengaka yango ndako ya libanga? Na mobu 1867, Adam Renders, oyo azalaki moto ya bokila mpe oyo azalaki kotambolatambola mpo na koyeba mokili, akómaki na esika moko oyo amonaki bandako mineneminene ya mabanga na etando ya hectare 720. Azalaki kosala mobembo na kati na bisobe ya Afrika, epai bato mingi bafandaka na bandako ya ndɛlɛ. Na nsima akómaki na bitika ya engumba moko etongamaki na mabanga, oyo babengaka lelo Great Zimbabwe.

Bitika yango ezali lelo na sudi ya engumba Masvingo. Bifelo mosusu ya bitika yango ezali na bosanda ya mɛtrɛ koleka 9; balandisá mabanga mineneminene kozanga kotya simá. Na kati ya bitika yango, ezali na linɔ́ngi moko oyo ezali na molai mɛtrɛ 11 mpe etongamá likoló ya fondasyo ya mɛtrɛ 6. Eyebani te soki ndako yango ezalaki mpo na nini. Bitika yango eumeli banda na siɛklɛ ya mwambe ya ntango na biso (T.B.), kasi emonani ete bato bafandaki kuna bankama ya bambula liboso.

Na 1980, Angleterre epesaki ekólo yango oyo bazalaki kobenga Rhodésie lipanda mpe bakómaki kobenga yango Zimbabwe. Ezali na bituluku mibale ya minene: Shona oyo ezali monene koleka, mpe Ndebele. Bato ya mboka yango bayambaka bapaya malamu, ndenge Batatoli ya Yehova bamonaka yango mbala mingi ntango bazali kosakola ndako na ndako. Mbala mosusu kutu, naino bayebi ata te moto oyo azali na porte, kasi ntango kaka abɛti porte, okoyoka “kɔtá” mpe “fandá.” Bato mingi ya Zimbabwe bazalaka na limemya makasi mpo na Biblia mpe balingaka ete, ntango bazali kosolola makambo ya Biblia, bana na bango báfanda wana mpo bango mpe balandaka.

Bazali kosakola nsango ya kobɔndisa

Ntango bazali kolobela Zimbabwe na bazulunalo, maloba lokola “sida” mpe “elanga makasi” ezongaka mbala mingi. Sida ebebisi bomoi ya bato mingi mpe nkita na mikili mingi ya Afrika. Kuna, bato mingi oyo bakɔtaka lopitalo ezalaka mpo na sida. Maladi yango ekɔtisi mpasi na mabota mingi.

Mpo na kosalisa bato ya ekólo Zimbabwe, Batatoli ya Yehova bazali koteya na molende nyonso ete mpo na kozala na bomoi ya malamu, esengeli kotosa mitinda ya Nzambe oyo ezali na Biblia. Na ndakisa, Biblia eteyaka ete kosangisa nzoto ezali kaka mpo na bato oyo babalani, mpe ete Nzambe apekisi kosangisa nzoto mibali na mibali to basi na basi, mpe mibeko ya Yehova epekisi kozongisa makila to mpe komɛla likaya to bangi. (Misala 15:28, 29; Baloma 1:24-27; 1 Bakolinti 7:2-5; 2 Bakolinti 7:1) Batatoli bazali mpe kopanza nsango ya elikya, bazali komonisa ete mosika te, Bokonzi ya Nzambe ekolongola maladi nyonso.​—Yisaya 33:24.

Lisungi mpo na bandeko

Elanga makasi ememaki mikakatano mingi na Zimbabwe na boumeli ya mbula zomi oyo eleki. Banyama ya zamba ekufaki mpo na nzala mpe kozanga mai. Bankóto ya bibwɛlɛ ekufaki. Mɔtɔ ebebisaki bazamba minene. Bana mike mpe mibange mingi bakufaki mpo bazalaki kolya malamu te. Ata mai monene ya Ebale Zambèze ekitaki mpe esalaki ete babaraje oyo epesaka kura ezalaki kosala malamu te.

Mpo na yango, Batatoli ya Yehova basalaki bakomite mwambe ya lisungi na bisika ndenge na ndenge ya ekólo yango. Bakɛngɛli-batamboli bazalaki kokende na masangá mpo na koyeba bamposa ya bandeko. Bazalaki kotinda balapolo na bakomite ya lisungi. Mokɛngɛli-motamboli moko alobaki boye: “Na mbula mitano oyo eleki, tokabolaki batone koleka nkóto ya masango, batone zomi ya mbisi ya kokauka, mpe batone zomi ya madesu. Bandeko babongisaki batone mibale ya biloko ya kolya. Tokabolaki mpe bilamba mingi ná mbongo.” Mokɛngɛli-motamboli mosusu alobaki boye: “Soki nakanisi mikakatano oyo tokutanaki na yango mpo tózwa mikanda ya Leta ya Zimbabwe mpe ya Afrika ya Sudi mpo na kokɔtisa biloko nyonso wana mpe mpasi oyo tomonaki mpo na kozwaka esansi oyo ekoki mpo na komema ebele ya biloko wana oyo bandeko bazalaki na yango mposa, nakoki koloba ete tolongaki kaka mpo, ndenge Yesu alobaki, Tata na biso ya likoló ayebi ete tozali na mposa ya biloko nyonso wana.”​—Matai 6:32.

Ndenge nini bakɛngɛli-batamboli basalaka na bisika oyo ezali na elanga makasi? Bamosusu bamemaka bilei mpo na bango moko mpe mpo na mabota oyo ekoyamba bango. Mokɛngɛli moko alobaki ete bandeko mosusu ya basi bazalaki komituna soki basengeli kokata mosala ya kosakola mpo na kokende kokɔta na molɔngɔ ya bato oyo bazalaki kozela mbala mosusu Leta akoki kotindela bango biloko. Bazwaki ekateli ya kotyela Yehova motema, bakobaki kosakola mpe kotala ndenge makambo ekoleka. Leta atindaki biloko te mokolo yango.

Mokolo oyo elandaki ezalaki mokolo ya makita, mpe bandeko basi yango basengelaki lisusu kozwa ekateli. Bákende na makita to bákende kozela biloko tii ntango ekoya? Lokola batyaki makambo ya ntina na esika ya liboso, bakendeki na makita na Ndako ya Bokonzi. (Matai 6:33) Ntango bazalaki koyemba loyembo ya nsuka, bayokaki motuka moko ezali koya. Biloko eyaki nde wana, komite ya lisungi ememaki biloko oyo bandeko ya bisika mosusu batindaki! Bandeko ya sembo oyo bayanganaki na makita mokolo yango batondaki na esengo mpe na botɔndi.

Bolingo ezali kotonga

Komonisa boboto epai ya bato oyo bazali Batatoli ya Yehova te epesi bandeko mabaku ya kopesa litatoli. Na engumba Masvingo, mokɛngɛli-motamboli moko azalaki na mosala ya kosala na bandeko ya lisangá oyo akendaki kotala. Amonaki elenge mwasi moko alali na balabala. Bamonaki ete elenge yango azalaki kobɛla makasi, mpo azalaki kokoka koloba te mpe mongongo na ye ezalaki kolɛnga. Nkombo ya elenge yango ezalaki Hamunyari, oyo na monɔkɔ ya Shona elimboli, “Ozali na nsɔni te?” Bandeko bayokaki ete bato oyo basambelaka lingomba moko na elenge yango basundolaki ye ntango bazalaki kokende na bangomba mpo na kobondela. Batatoli basalisaki elenge yango mpe bamemaki ye na mboka moko ya pembeni.

Na mboka yango, bato mosusu bayebaki Hamunyari; yango wana babengaki bandeko na ye ya libota mpo báya kozwa ye. Bato ya mboka yango balobaki boye mpo na Batatoli ya Yehova: “Oyo ezali mpenza lingomba ya solo. Bamonisi mpenza bolingo oyo baklisto basengeli komonisa.” (Yoane 13:35) Liboso bandeko bákabwana na Hamunyari, bapesaki ye trakte Aimeriez-vous en savoir plus sur la Bible? [Olingi koyeba Biblia malamu?]a

Na pɔsɔ oyo elandaki, mokɛngɛli yango akendaki kotala lisangá oyo ezalaki na esika oyo Hamunyari afandaka. Mokɛngɛli alukaki koyeba soki Hamunyari akómaki malamu. Bandeko ya libota ya Hamunyari basepelaki mingi ntango bamonaki mokɛngɛli yango ná bandeko mosusu oyo bafandaka kuna. Baboti na ye balobaki boye: “Bino, bozali na lingomba ya solo. Bobikisi mwana na biso ya mwasi, oyo basundolaki na nzela mpe alingaki kokufa.” Batunaki bato ya lingomba ya Hamunyari boye: “Bozalaki ata na nsɔni te ya kotika ye akufa?” Batatoli babandaki kosolola na bango na Biblia mpe batikelaki bango mikanda oyo elimbolaka Biblia. Basɛngaki bandeko bázongela bango mpe bábanda koyekola Biblia elongo. Bato mosusu na libota yango oyo bazalaki koboya Batatoli babongolaki makanisi. Moko na bango, sɛmɛki ya Hamunyari, azalaki kokamba lingomba moko na mboka yango. Andimaki koyekola Biblia.

Bazali kotonga bandako ya losambo

Mokomi moko ya Biblia alobaki boye: “Ɛɛ Nzambe, . . . motema na ngai eyoki mposa mpo na yo; . . . lokola na kati na esika ekauki mpe ezangi mai.” (Nzembo 63:1) Maloba yango ebongi mpenza na bato ya Zimbabwe! Elanga makasi ezali konyokola bango; kasi, bazali kokokisa mposa na bango ya koyeba Nzambe mpe boboto na ye. Okoki komona yango na mbuma oyo mosala ya kosakola ya Batatoli ya Yehova ebimisi. Ntango Zimbabwe ezwaki lipanda na 1980, Batatoli ya Yehova bazalaki soki 10 000 na kati ya masangá 476. Lelo oyo, mbula soki 27 na nsima, motángo ya Batatoli ebakisami mbala misato mpe motángo ya masangá ebakisami koleka mbala mibale.

Masangá mingi ezalaki na bandako ya losambo te. Na Yanuali 2001, kaka masangá 98 kati na masangá koleka 800 ya Zimbabwe ezalaki na Bandako ya Bokonzi. Masangá mingi ezalaki kosala makita na nse ya banzete to na mwa bandako ya ndɛlɛ.

Na lisalisi ya makabo mpe elimo ya komipesa ya bandeko na bango ya elimo ya mokili mobimba, Batatoli ya Zimbabwe bakɔti na programɛ ya kotonga mpo masangá ezala na Bandako ya Bokonzi ya malamu mpo na makita. Batatoli mingi ya mikili ya Mpoto oyo bayebi mosala ya kotonga bandako bandimaki koya na Zimbabwe mpe bazali kosala elongo na bandeko ya ekólo yango. Ndeko moko ya Zimbabwe alobaki boye: “Topesi botɔndi mingi epai ya bandeko mibali mpe bandeko basi nyonso oyo bauti na mikili mosusu mpe bayei awa mpo na kotonga Bandako ya Bokonzi ya kitoko. Totɔndi mpe bandeko nyonso oyo batyaka makabo mpo na kotonga Bandako ya Bokonzi.”

Na ɛsti ya ekólo yango, bandeko ya lisangá moko bazalaki kosala makita na nse ya nzete moko monene ya baoba na boumeli ya mbula 50. Ntango bayebisaki bankulutu ete bakotonga ndako ya losambo na esika yango, bankulutu mosusu batangisaki mai ya miso. Na lisangá mosusu, mobange moko ya mbula 91 alobaki boye: “Nabondelaka Yehova banda kala mpo likambo ya boye esalama!”

Bato mingi balobelaki ndenge oyo bandako kitoko yango ezalaki kotongama na lombangu. Moto moko alobaki boye: “Bino bozali kotonga na moi; kasi, namoni ete Nzambe ayaka kotonga na butu!” Bato mosusu bamonaka mpe bomoko mpe esengo oyo bandeko basalaka na yango. Lelo oyo, Bandako ya Bokonzi koleka 350 etongami na ekólo yango mobimba. Yango epesi masangá 534 nzela ya kosala makita na bandako oyo etongami na babriki.

Bandeko bazali kokoba kotonga na ekólo Zimbabwe. Soki totali nyonso oyo esalami, tosengeli kopesa matɔndi epai ya Yehova, ye oyo asopi mapamboli yango. Ya solo, “soki ezali [Yehova] te oyo akotongaka ndako, basali bakosala wana bobele mpamba.”​—Nzembo 127:1.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Ebimisami na Batatoli ya Yehova.

[Karte na lokasa 9]

(Mpo na komona yango, talá mokanda)

ZIMBABWE

HARARE

Masvingo

Great Zimbabwe

[Elilingi na lokasa 9]

Linɔ́ngi

[Elilingi na lokasa 12]

Ndako ya Bokonzi ya lisangá ya Concession

[Elilingi na lokasa 12]

Bandeko ya lisangá ya Lyndale liboso ya Ndako ya Bokonzi na bango

[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 9]

Bitiká mpe basikalye: ©Chris van der Merwe/AAI Fotostock/age fotostock; linɔ́ngi: ©Ingrid van den Berg/AAI Fotostock/age fotostock

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto