Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w06 15/8 lok. 32
  • Anunaki kasi azalaki komiyoka ye moko te

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Anunaki kasi azalaki komiyoka ye moko te
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
w06 15/8 lok. 32

Anunaki kasi azalaki komiyoka ye moko te

BATO mingi balɛmbaka mpe bamiyokaka bango moko ntango bakómi mibange. Kasi, ezalaki bongo te mpo na Fernand Rivarol, mobali moko oyo azalaki kofanda na Genève, na ekólo Suisse, mpe akufaki ntango akómaki na mbula 95. Fernand azalaki kofanda ye moko na ndako mpamba te mwasi na ye akufaki mpe mwana na ye ya mwasi azalaki na ndako ya libala. Atako azalaki kolekisa bangonga mingi na kati ya ndako, azalaki komiyoka ye moko te. Mbala mingi azalaki kofanda na mesa, kozwa telefone mpe kobenga bato mpo na kosolola na bango makambo ya Nzambe.

Fernand akutaná na makambo mingi ya malamu na bomoi na ye; kasi, ezali na eleko moko oyo akabwanaki mpenza na bato. Mpo na nini? Fernand ná mwasi na ye bakómaki Batatoli ya Yehova na 1939; mwa moke na nsima, Etumba ya Mibale ya mokili mobimba ebandaki na Mpoto. Makambo oyo Fernand ayekolaki na Biblia etindaki ye aboya kosimba mondoki. Mpo na yango, balongolaki ye na mosala mpe akɔtaki bolɔkɔ mbala mingi. Na mobimba, alekisaki mbula mitano na ndambo na bolɔkɔ mpe na ntango wana nyonso, akabwanaki na mwasi mpe mwana na ye.

Fernand alobaki boye: “Bato mingi bazalaki koloba ete nandimaki kobungisa mosala ya malamu mpe natikaki mwasi ná mwana na ngai bányokwamaka. Mingi bazalaki kosepela na ngai te mpe bazalaki koloba ete nazali motema mabe. Kasi, soki nakanisi mikakatano nyonso oyo tokutanaki na yango na ntango wana, likambo oyo nakoki kobosana te ezali ndenge oyo Yehova asungaki biso. Makambo wana esalemaki eleki bambula mingi, kasi elikya na ngai epai ya Yehova ekitaka te.”

Kondima ya Fernand etindaki ye asololaka na bato na telefone mpo na koyebisa bango bilaka ya Biblia. Soki asololi malamu na moto moko, azalaki kotindela ye mokanda moko oyo elimbolaka Biblia. Nsima ya mikolo, azalaki kobenga lisusu moto yango mpo na koyeba soki asepelaki na mokanda yango. Ntango mosusu bato bazalaki kokomela ye mikanda mpo na kozongisa matɔndi, mpe likambo yango ezalaki kopesa ye esengo mingi.

Mokolo mosusu, moto moko akoki kobenga yo na telefone mpo na kosolola na yo, ndenge Fernand azalaki kosala. Tolendisi yo oyoka ye mpo oyeba mateya oyo andimaka. Batatoli ya Yehova basepelaka kosolola na bato mpo na kolimbwela bango mateya ya Biblia.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto