Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w06 15/8 lok. 31
  • Mituna ya batángi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mituna ya batángi
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • Masolo mosusu
  • Liwa, monguna ya nsuka, akosilisama makasi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2014
  • Mokolo na Kosambisa na Nzambe esuki na esengo nyonso!
    Emoniseli—Kokokana na yango monene ebelemi!
  • Liwa mpe lisekwa ya Yesu—Ekoki komemela yo nini?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
  • Nini ekómelaka balingami na biso oyo bazali kokufa?
    Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
w06 15/8 lok. 31

Mituna ya batángi

Na nsuka ya Boyangeli ya Mbula Nkóto, nsima ya komekama ya nsuka, ekoki mpe kozala na bato oyo bakosala masumu mpe bakokufa?

Bavɛrsɛ mibale ya mokanda ya Emoniseli ekoki kosalisa biso tózwa eyano na motuna yango. Ya liboso elobi boye: “Liwa ná Hadesi ebwakamaki na kati ya laki ya mɔtɔ. Yango elakisi liwa ya mibale, laki yango ya mɔtɔ.” (Emoniseli 20:14) Oyo ya mibale elobi ete: “Akopangwisa mpisoli nyonso na miso na bango, mpe liwa ekozala lisusu te, ná mawa ná koganga ná mpasi ekozala lisusu mpe te. Makambo ya kala esili koleka.”​—Emoniseli 21:4.

Tótalela malamu ntango oyo yango ekosalema. “Liwa ná Hadesi” ekobwakama na laki ya mɔtɔ soki basilisi kosambisa bato oyo bakobika na Armagedona, ná baoyo bakosekwa, mpe bato oyo, mbala mosusu bakobotama nsima ya Armagedona, na kotalela “makambo oyo ekomamá na kati ya barulo,” to mibeko oyo Yehova akopesa bato na boumeli ya mbula nkóto. (Emoniseli 20:12, 13) Na Emoniseli mokapo 21, ntoma Yoane akomaki emonaneli mosusu oyo ekokokisama na Boyangeli ya Mbula Nkóto ya Klisto Yesu. Kasi, emonaneli yango ekokokisama mobimba na nsuka ya Mokolo ya Kosambisama oyo ekoumela mbula nkóto. Na ntango wana, Yehova akofanda na bato elongo, elingi koloba ete bakozala lisusu na mposa ya bayokanisi te; Yesu akozongisa Bokonzi epai ya Tata na ye. Yehova akofanda libela na “bato na ye” na ndenge ya elilingi. “Liwa ekozala lisusu te” ntango bato bakokóma bato ya kokoka na lisalisi ya mbeka ya lisiko oyo Klisto apesaki.​—Emoniseli 21:3, 4.

Na bongo, bavɛrsɛ oyo totángaki ezali kolobela liwa oyo Adama atikelá bato, oyo mbeka ya Klisto ekolongola. (Baloma 5:12-21) Lokola liwa oyo moto ya liboso atikelá biso ekolongwa, bato bakokóma ndenge Adama azalaki ntango bakelaki ye. Adama azalaki moto ya kokoka, kasi yango elingi koloba te ete akokaki kokufa te. Yehova alobaki na Adama ete alya te “mbuma ya nzete ya koyeba malamu mpe mabe,” mpe abakisaki ete ‘mokolo akolya yango akokufa.’ (Genese 2:17) Liwa wana eyaki mpo asalaki lisumu na nko. Na nsuka ya Boyangeli ya Mbula Nkóto, nsima ya komekama ya nsuka, bonsomi ya kopona ekozala kaka. (Emoniseli 20:7-10) Yango elingi koloba ete ata na ntango wana, bato bakozala kaka na likoki ya kopona soki balingi kosalela Yehova to te. Tokoki koyeba te soki moto moko akopesa Nzambe mokɔngɔ, ndenge Adama asalaki.

Nsima ya komekama ya nsuka, na ntango oyo liwa mpe Hadesi ekozala lisusu te, soki moto moko aboyi kotosa Nzambe, nini ekokómela ye? Na ntango wana, liwa oyo Adama atikelá biso ekozala lisusu te. Hadesi, to nkunda ya bato nyonso oyo bakosekwa, ekozala lisusu te. Atako bongo, Yehova azali na likoki ya koboma motomboki nyonso na laki ya mɔtɔ, elingi koloba azali na likoki ya kozwa ekateli ya kosekwisa ye te. Liwa wana ekozala lokola liwa oyo Adama ná Eva bakufaki, kasi te liwa oyo bato bazwaki na nzela ya Adama.

Kasi, eloko moko te ekoki kotinda biso tókanisa ete likambo ya ndenge wana ekosalema. Bato oyo bakoleka komekama ya nsuka bakokesana na Adama na likambo moko ya ntina mingi. Bato yango bakomekama liboso. Tokoki kolikya ete komekama ya nsuka ekozala likolólikoló te mpamba te Yehova ayebi kotala mitema ya bato malamumalamu. Tokoki kozala na elikya ete moto moko te, oyo akoki kosalela bonsomi na ye na ndenge ya mabe, akoleka komekama ya nsuka. Na bongo, atako likoki ezali ete moto oyo aleki komekama ya nsuka atombokela Nzambe mpe abomama, ezali mwa mpasi tókanisa ete likambo ya ndenge wana ekosalema.

[Elilingi na lokasa 31]

Nsima ya komekama ya nsuka, ndenge nini bato bakozala lokola Adama?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto