Ntango ezali lokola mopɛpɛ, saleláká yango na mayele
NA MINƆKƆ mingi, balobaka ete ntango ezali mosolo. Nzokande, ntango ekeseni mpenza na mbongo to biloko mosusu. Okoki kobomba ntango te mpo na kosalela yango na nsima, ndenge babombaka mbongo, bilei, esansi, petrole, to biloko mosusu. Komeka kobomba ntango kozanga kosalela yango ekozala mosala ya mpunda. Nini ekoki kosalema soki olali ngonga mwambe mpe osali eloko te na bangonga oyo etikali? Na nsuka ya mokolo, bangonga oyo osaleli te ekokende libela.
Ntango ezali lokola mai ya ebale moko ya monene oyo ezali kotyola makasi. Okoki kotɛlɛmisa yango te, okoki mpe te kosalela yango nyonso. Esili koleka bambula, bato babandaki kotonga bapakapaka na pembeni ya ebale. Ntango bapakapaka yango ezali kobaluka na nguya ya mai, yango ezalaki kosalisa bango mpo na kobalukisa mabanga ya kopelisa mbeli, bamasini ya fufu, ya kopasola mabaya mpe bongo na bongo. Ndenge moko, tokoki kosalela ntango mpo na kokokisa misala ya malamu, kasi mpo na kobomba yango te. Kasi, esengeli naino kobunda na makambo mibale ya minene oyo eyibaka ntango mingi: Kozongisaka makambo nsima mpe kotondisa biloko ezangá ntina. Tiká tólobela liboso ezaleli ya kozongisa makambo nsima.
Kozongisaka makambo nsima te
Lisese moko elobaka ete: “Mafuta ya ntaba, ebongaka kolya yango ntango ezali naino na mɔtɔ.” Nzokande, bato mingi balingaka kolanda toli wana te. Soki bapesi bango mosala moko ya makasi, bamonaka malamu balekisa naino ntango. “Kozongisa makambo nsima elingi koloba koboya na nko nyonso kosala likambo oyo esengeli kosalema na ntango boye to boye.” Mpo na moto oyo amesaná kozongisa makambo nsima, yango ekómá maladi. Soki mokakatano moko ebimi, atingamaka na yango mpe alalisaka makambo tii ntango mokakatano mosusu ekobima.
Na bantango mosusu, soki tozali komiyoka malamu te, tokoki kozongisa nsima mwa misala na biso mosusu to nyonso. Lisusu, moto nyonso azalaka na mposa ya kopema ata mwa moke na misala oyo tosalaka mokolo na mokolo. Ata mwana ya Nzambe mpe azalaki kopema. Yesu azalaki kosakola mingi, kasi azalaki mpe kozwa ntango ya kopema mpo na ye moko mpe mpo na bayekoli na ye. (Malako 6:31, 32) Mwa bopemi ya ndenge wana esalaka malamu na nzoto. Nzokande, kozongisa makambo nsima ezali likambo mosusu, oyo mbala mingi ezalaka mabe. Tózwa ndakisa.
Mwana kelasi moko azali kaka na pɔsɔ misato mpo na kolɛngɛla mpo na mamekani ya mituya. Azali na makambo ebele ya koyekola. Amoni esika akoki kobanda te. Abandaki kozongisa makambo nsima. Na esika ya koyekola, azalaki nde kotala televizyo. Azalaki nde kolekisa ntango mpambampamba. Nzokande, ntango ekómaki ete akosala mamekani yango lobi, asengelaki kotánga makambo nyonso na butu moko. Afandaki na kiti, mpe abandaki koyekola.
Alekisaki ntango mingi ya koyekola. Ntango bato ya libota na ye balalaki, ye azalaki kobundana mpo na kokanga mituya ya makasimakasi. Lokola atángaki butu mobimba, motó elɛmbaki mpe na ntɔngɔ wana akokaki lisusu te kosala mamekani yango. Azwaki bilembo moke mpe alongaki te na liteya yango. Esengelaki azongela lisusu liteya yango to mpe abandela lisusu kelasi yango.
Kozongisa makambo nsima esukelaki ye mabe. Kasi, ezali na etinda moko ya Biblia oyo ekoki kosalisa biso tókóma te na mokakatano oyo ekómelaki ye mpo azongisaki makambo na nsima. Ntoma Paulo akomaki ete: “Bókeba mpenza mpo ete ndenge na bino ya kotambola ezala te lokola bato bazangá bwanya kasi lokola bato ya bwanya, komisombeláká ntango oyo ebongi.” (Baefese 5:15, 16) Paulo alendisaki baklisto ete básalelaka ntango na bango malamu mpo na kokokisa mikumba ya elimo, kasi etinda yango ekoki mpe kozala na ntina mpo na makambo mingi ya bomoi. Lokola na momeseno toponaka ntango oyo tolingi kosala mosala moko, tokozwa matomba ya malamu mpe tokomona ete mosala yango ekosalema na lombangu soki toponi kobanda na ntango oyo “ebongi” to oyo eleki malamu. Ndenge vɛrsɛ oyo emonisi yango, soki tosali bongo tokomonana “bato ya bwanya.”
Wapi “ntango ebongi” oyo mwana kelasi asengelaki komibongisa mpo na mamekani ya mituya? Soki azalaki na momeseno ya koyekola butu nyonso miniti 15 to koleka, akoki malɛmbɛmalɛmbɛ kosilisa liteya yango mobimba. Soki asalaka bongo, alingaki te koboma nzoto na kotánga butu mobimba liboso ya mokolo ya mamekani, kasi alingaki kolala. Na mokolo ya mamekani, alingaki kosala yango na motema mpiɔ mpe kozwa bilembo ya malamu, mpo amibongisaki malamu.
Na yango, ntango bapesi yo mosala moko, luká “ntango oyo ebongi” mpe salá yango. Soki osali bongo, okokwea te na motambo ya kozongisa makambo nsima. Longolá yango, okosepela mpo mosala na yo ekosalema malamu. Kosala bongo ezali na ntina, mingimingi soki mosala yango ekozala na litomba mpo na basusu, na ndakisa mikumba ya lisangá.
Longolá biloko ezangi ntina
Ndenge tomonisaki yango, likambo ya mibale oyo esengeli kosalisa biso tósalela malamu ntango na biso ezali kolongola biloko ezangi ntina. Toyebi ete kobongisa, kosalela, kosukola, kobomba mpe koluka biloko ezwaka ntango mingi. Biloko soki ezali mingi, ekozwa mpe ntango mingi. Kosala na ndako oyo etondi na biloko elyaka ntango mingi mpe ezalaka mpasi koleka esika oyo biloko ezali moke. Lisusu, soki biloko ezali mingi, yango ekosɛnga mpe ntango mingi mpo na kozwa eloko oyo ozali koluka.
Bato mingi oyo bamesaná na mosala ya kosukola bandako balobaka ete kosukola ndako ezwaka ntango mingi koleka soki ekosɛnga naino “olongola mpe ozongisa eloko mokomoko na esika na yango.” Ezali mpe bongo mpo na makambo mosusu ya bomoi. Soki olingi kosalela ntango malamu, esengeli otala malamu mpenza esika ozali. Biloko ezangi ntina etondi esika yango, epesaka yo mpasi mpo na kotambola malamu mpe ezwaka yo ntango mingi? Soki ezali bongo, longolá biloko ezangi ntina.
Kolongola biloko ezangi ntina ezalaka pɛtɛɛ te. Kolongola eloko oyo olingaka mingi kasi ezangi ntina epesaka mpasi mingi, ezali lokola kobungisa moninga ya motema. Kasi, ndenge nini okoki kozwa ekateli ya kotika eloko boye to kobwaka yango? Bato mosusu bamityelá mobeko oyo: Eloko nyonso oyo basaleli te na boumeli ya mbula mobimba, babwakaka yango. Kasi, ezali boni soki ozali kokakatana kobwaka eloko yango atako osaleli yango te na boumeli ya mbula mobimba? Bombá yango lisusu sanza motoba. Soki otali yango lisusu mpe omoni ete osaleli yango te na boumeli ya mbula mobimba na ndambo, ekozala mpasi te mpo na kobwaka yango. Ezala ndenge nini, mokano mpenzampenza ezali ya kolongola biloko ezangi ntina mpo osalelaka malamu ntango na yo.
Nzokande, biloko ezangi ntina ezalaka te kaka na ndako to na esika ya mosala. Yesu alobelaki “motungisi ya ebongiseli ya makambo ya ntango oyo mpe nguya ya bokosi ya bomɛngo,” oyo ekoki ‘kotya liloba ya Nzambe kaka’ mpe kosala ete moto “azanga kobota mbuma” na mosala ya kosakola. (Matai 13:22) Bomoi ya moto ekoki kotonda na makambo mpe mikano ebele ebele oyo ekoki kozala mpasi mpo na kozwa ntango ya kobatela makambo ya elimo mpe kozala na bokatikati. Nsukansuka, akoki kolɛmba na elimo, ata mpe kozanga kokɔta na mokili ya sika, epai tokozala na ntango nsuka te mpo na kosala makambo oyo ekopesa biso esengo ya solosolo.—Yisaya 65:17-24; 2 Petelo 3:13.
Omonaka mbala na mbala ete misala etondeli yo, na ndakisa mosala ya mosuni, ndako, motuka, kominanola, mobembo, kosala ngalasisi, bafɛti, to makambo mosusu? Soki ezali bongo, oyo nde ntango ya kolongola makambo ezangi ntina mpo ozala na ntango mingi mpo na makambo ya elimo.
Lisese moko elobaka: “Ntango ezelaka moto te.” Ndenge kaka mai etyolaka, kasi ezongaka nsima te, ntango mpe ekendeke kaka liboso. Bakoki kobomba yango te, soki ekei, ekei libela. Soki tolandi mitinda ya Biblia mpe tomeki kosalela yango, tokozala na ntango oyo tosengeli na yango mpo na kosala “makambo oyo eleki ntina,” mpo na bolamu na biso moko ya seko mpe mpo na “nkembo mpe lisanzoli ya Nzambe.”—Bafilipi 1:10, 11.
[Elilingi na lokasa 8]
Ntango ezali lokola mai oyo ezali kotyola, tokoki kosalela yango mpo na misala malamu
[Elilingi na lokasa 9]
‘Ntango nini ebongi’ na ye mpo na komilengela mpo na mamekani?
[Elilingi na lokasa 10]
Kosala esika biloko ezali mingi ezwaka ntango mingi mpe epesaka mpasi