Bato ndenge na ndenge ya Ouganda bazali kondima nsango malamu
OUGANDA ezali ekólo moko ya Afrika oyo ezali na lobwaku monene oyo babengaka vallée du Rift. Ekólo yango ezali na bazamba kitoko, banzete mingi, mpe banyama ya ndenge na ndenge. Na ekólo yango moi ebɛtaka makasimakasi te mpe ezali na bangomba elandaná bakilomɛtrɛ na bakilomɛtrɛ.
Na Ouganda, tokokuta likambo oyo emonanaka na bikólo mingi te: okoki kolongwa na esika ya molunge mpe, nsima ya kotambola kaka mwa moke, okómi na esika ya malili makasi. Na wɛsti ya ekólo yango ezali na Ngomba Ruwenzori, oyo nsɔngɛ na yango ezipamá na nɛjɛ, mpe na ɛsti, mabelé ekauká. Bisobe na yango ezali na banyama lokola nzoku, mpakasa, mpe nkɔsi. Na bangomba mpe bazamba ya ekólo yango ezali na bamakako mpe bandɛkɛ ya ndenge na ndenge. Na bikólo mingi ya Afrika bato banyokwamaka na nzala mpo na kozanga mbula, kasi Ouganda ezali na bibale mpe balaki mingi, na ndakisa Laki Victoria oyo ezali laki ya monene ya mibale na mokili mobimba. Mai ya Laki Victoria ekendaka tii na Ebale Nile. Ezali likambo ya kokamwa te na ndenge moto moko alobaki ete Ouganda ezali “lokola liyaka na kati ya Afrika.”
“Liyaka” ezali kongɛnga lelo oyo
Na Ouganda, eloko oyo eleki kitoko ezali nde bato; bazalaka na boboto, bayebi koyamba bapaya, mpe bazali na mimeseno ndenge na ndenge. Bato mingi ya ekólo yango bamibengaka baklisto; balobaka minɔkɔ ndenge na ndenge, mpe bazali na mimeseno ekeseni oyo emonanaka ata na bonkɔkɔ mpe na molato na bango.
Banda mwa bambula bato mingi ya ekólo yango bazali kondima nsango ya Biblia oyo elobeli ntango oyo kimya ekozala na mokili mobimba. (Nzembo 37:11; Emoniseli 21:4) Ezali pɛtɛɛ te kosakola epai ya bato nyonso ya ekólo yango.
Na 1955, moto ya liboso azwaki batisimo na ekólo yango na Laki Victoria; mpe na 1992, bato oyo bazwi batisimo bakómaki 1000; likambo oyo ekokisaki esakweli ya Biblia oyo elobi ete “moke” ekokóma nkóto. Banda wana motángo na bango ezali se kobakisama. Likambo yango ezali mpenza kokokisa maloba oyo ya Yehova ete: “Ngai nazali [Yehova]; na ntango na yango, nakoyeisa yango mbango.”—Yisaya 60:22.
Bazali kopesa litatoli na minɔkɔ mosusu
Na Ouganda, monɔkɔ ya Leta ezali Lingelesi; bayekolaka yango na kelasi, kasi bato mingi ya Ouganda balobaka minɔkɔ ya mboka. Yango wana, mpo bato mingi báyoka nsango malamu, Batatoli ya Yehova bapesaka mpe litatoli na minɔkɔ yango. Yango ezali na ntina mpamba te bato mingi ya Ouganda bafandaka na mboka mpe na bingumba ya mike mpe bayebi lingelesi te. Ezali pɛtɛɛ te kokende na bamboka yango mpe koteya bato yango nsango malamu.
Atako bongo, Batatoli ya Yehova basali milende mpo na kopesa bato yango litatoli na monɔkɔ ya mboka na bango mpe bazali kobimisa mikanda oyo elimbolaka Biblia na minɔkɔ yango. Na biro ya filiale na Kampala, bandeko bazali kobongola mikanda na minɔkɔ minei: Acholi, Lhukhonzo, Luganda, mpe Runyankore. Lisusu, bato mingi, koleka ata mbala mibale motángo ya basakoli nyonso, bayaka na mayangani oyo esalemaka na bisika ndenge na ndenge mpe na minɔkɔ mingi ya Ouganda. Yango emonisi ete milende oyo bandeko bazali kosala mpo na kosakola na minɔkɔ ndenge na ndenge ya Ouganda ezali kosalisa bato mingi bákola noki na elimo. Kasi, ezali mpe na likambo mosusu oyo ezali komema bato mingi na lisangá.
Babongisi-nzela basimbi mosala
Mbula na mbula bandeko bazalaka na esengo ya kosakola na boumeli ya sanza misato na bisika oyo basakoli bazalaka te. (Misala 16:9) Bilenge mingi oyo bazali babongisi-nzela bazali kosimba mosala yango. Bakendaka tii na bamboka ya mosika, epai bato bayoká naino nsango malamu te.
Biro ya filiale etindaki Batatoli mibale básala lokola babongisi-nzela monene na boumeli ya sanza misato na Bushenyi, mwa engumba oyo ezali na wɛsti ya Ouganda. Kuna basalaki elongo na Motatoli kaka moko oyo azalaka na mboka yango; babongisaki mosala ya kosakola mpe makita ya lisangá. Nsima ya sanza moko, bandeko yango mibale bakómaki koyekola Biblia elongo na bato 40, mpe bato 17 kati na bango babandaki koyangana na makita. Bandeko yango balobi boye: “Nsima ya mwa mikolo, bato mosusu oyo totikelaki mwa buku Nzambe azali kosɛnga nini epai na biso?a bayaki esika tozalaki kofanda mpe bakomaki na bapapye biyano ya mituna oyo ezali na mwa buku yango. Balingaki tóyebisa bango soki biyano oyo bapesaki ezalaki malamu.” Lelo oyo lisangá ezali na mwa engumba yango mpe bazali na Ndako ya Bokonzi.
Babongisi-nzela mibale bakendaki na mboka moko epai bato bayoká naino nsango malamu te. Bakomi boye: “Bato bazali mpenza na mposa ya koyoka mateya ya Biblia. Na boumeli ya sanza misato oyo tolekisi awa, tobandi koyekola Biblia na bato 86.” Eumelaki te etuluku moko efungwamaki na mboka yango.
Basakoli mosusu ya molende
Na kati ya babongisi-nzela oyo bazali kosakola na molende, ezali mpe na baoyo baumeli na mosala yango. Na ndakisa, Patrick. Liboso akóma Motatoli ya Yehova, azalaki soda na ntango ya mokonzi Idi Amin mpe azalaki kobɛta miziki. Patrick azwaki batisimo na 1983, mpe sanza motoba na nsima akómaki mobongisi-nzela. Lelo oyo azali mokɛngɛli-motamboli, akendaka kotala masangá mpo na kolendisa yango.
Margaret azwaki batisimo na 1962. Atako azali na mbula koleka 70, mpe azali na mokakatano mpo na kotambola, alekisaka ngonga 70 sanza na sanza na mosala ya koteya bato Biblia. Atandaka mikanda oyo elimbolaka Biblia liboso ya ndako na ye, mpe asakolaka nsango malamu epai ya moto nyonso oyo andimi koyoka ye.
Simon azali mosali-bilanga na mboka moko na ɛsti ya Ouganda; alukaki lingomba ya solo na boumeli ya mbula 16, nsukansuka na 1995, atángaki mikanda ya Batatoli ya Yehova. Makambo oyo atángaki etindaki ye aluka koyeba oyo Biblia elobi mpo na Bokonzi ya Nzambe mpe mokano ya Yehova mpo na mabelé. Lokola Motatoli ata moko te azalaki na mboka Kamuli, esika oyo Simon azalaki kofanda, atambolaki bakilomɛtrɛ 140 tii na Kampala mpo na koluka Batatoli ya Yehova. Lelo oyo, lisangá ezali na mboka na ye.
“Toyei awa mpo na libela”
Na Afrika, bato mingi bamonaka ete lingomba nyonso esengeli kozala na ndako-nzambe na yango. Yango wana masangá mosusu na Ouganda ezalaki na mokakatano mpo bazalaki na mbongo te mpo na kotonga Bandako ya Bokonzi. Na 1999, bandeko basepelaki mingi na ebongiseli ya kotonga Bandako ya Bokonzi na mokili mobimba. Nsima ya mbula mitano, batongaki Bandako ya Bokonzi 40 na Ouganda. Lelo oyo, masangá nyonso ezali na Ndako ya Bokonzi ya kitoko mpenza. Ntango bandeko bazali kotonga Bandako ya Bokonzi, ezali lokola nde bazali koyebisa bato ya Ouganda ete “Toyei awa mpo na libela.” Yango esali ete bato mingi báya na lisangá ya Yehova.
Bandeko ya lisangá moko bazalaki kosala makita na bango na nse ya nzete ya manga. Ntango basombaki mabelé, mosala ekendaki mbango mpenza. Bandeko oyo biro etindaki mpo na kotonga Ndako ya Bokonzi basalaki elongo ná bandeko ya lisangá yango. Moto moko ya politiki oyo azalaki kofanda pene wana akamwaki ndenge mosala ezalaki kokende mbango. Apesaki bandeko ndingisa ya kosalaka makita na esika oyo abombaka motuka tii ntango basilisaki kotonga Ndako ya Bokonzi. Andimaki mpe koyekola Biblia na moko ya bandeko oyo bazalaki kotonga Ndako ya Bokonzi. Lelo oyo, moto yango azali Motatoli ya Yehova mpe asanganaka na makita na Ndako ya Bokonzi wana ya kitoko!
Na esika mosusu oyo bandeko bazalaki kotonga Ndako ya Bokonzi, moto moko oyo azali masɔ, akamwaki ndenge bandeko bazalaki kosala mosala na bomoko mpe asɛngaki apesa bango mabɔkɔ. Liboso ya mokolo oyo esengelaki kosala lisukulu mpo na kofungola Ndako ya Bokonzi, moto yango asalaki elongo na bandeko butu mobimba mpo na kobongisa Ndako ya Bokonzi. Alobi boye: “Namoni mpenza ete bolinganaka solo.”
Ata na kati ya mikakatano, bato mingi bazali kondima solo
Lokola Batatoli ya Yehova na Ouganda bazali kosala milende mpo na kosakola tii na bisika oyo nsango malamu ekóma naino te, bato mingi bazali komipesa na Yehova mpe mingi bazali koyangana na makita. Kasi, mokakatano ezali ete bapaya mingi bakimi bitumba na bamboka na bango mpo na koya kofanda na Ouganda. Bitumba oyo esalemaki na bikólo oyo ezali zingazinga ya Ouganda ememeli ata Batatoli ya Yehova mpasi mingi. Batatoli ya Yehova oyo bazali na bakaa ya bato bakimá mboka bazali komonisa ete bazali mpenza kotyela Yehova motema. Moto moko oyo azalaki mokonzi monene na ekólo moko oyo ezali pembeni ya Ouganda, anyokolaki mpenza Batatoli ya Yehova ya ekólo wana ntango mosala na bango ya kosakola epekisamaki; nsima ya koyekola Biblia na Batatoli ya Yehova na kaa ya bato bakimá mboka, alobaki boye: “Kozala na bozwi mpe lokumu na mokili oyo ezali na ntina moko te. Lelo oyo, atako nazali mobola mpe nazali na bokɔnɔ, nakoki koloba ete bomoi na ngai ezali malamu koleka ndenge ezalaki kala. Nayebi Yehova, mpe nazali na botɔndi ete nakoki kobondela ye. Nayebi ntina oyo bato bazali konyokwama lelo oyo, mpe nayebi elikya oyo Nzambe apesi biso mpo na mikolo ezali koya. Yango wana, nazali na kimya ya makanisi, eloko oyo nazalaki na yango liboso te.”
Mabelé ya Ouganda ebotaka mpenza malamu; yango wana bato ya ekólo yango balobaka ete soki ozindisi mwa nzete na mabelé na butu, na ntɔngɔ okoya kokuta ebimisi misisa. Soki totaleli ndenge oyo bato mingi bazali kondima solo na Ouganda, tokoki koloba ete ata mabelé na yango ya elimo ezali malamu mpenza. Tozali kotɔnda Yehova na ndenge apesi nzela na bato ndenge na ndenge ya Ouganda báyoka nsango ya Bokonzi na ye. Yesu akokanisaki motuya na yango na “liyaka moko ya motuya monene.” Bato mingi ya Ouganda bazali mpe komona yango.—Matai 13:45, 46.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Ebimisami na Batatoli ya Yehova.
[Karte na lokasa 8]
(Mpo na komona yango, talá mokanda)
SOUDAN
OUGANDA
Ebale Nile
Kamuli
Tororo
Kampala
Bushenyi
Laki Victoria
KENYA
TANZANIE
RWANDA
[Elilingi na lokasa 9]
Misato kati na babongisi-nzela ya molende na Ouganda
[Elilingi na lokasa 10]
Patrick
[Elilingi na lokasa 10]
Margaret
[Elilingi na lokasa 10]
Simon
[Elilingi na lokasa 10]
Liyangani ya etúká na engumba Tororo
[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 8]
Fɔtɔ ya zamba: © Uganda Tourist Board