Asalaki molende mpo bato bázala na Biblia
Mobali moko na nkombo Séraphin de Mytilène asilaki lokumu nyonso na miso ya bato mpe nsukansuka akufaki na zamba mpenza, na ɛsti ya Sibérie. Bato mingi te bayebaka ete azali na kati ya bato oyo basalaki ete bandeko na ye, bana-mboka Grèce, báyeba liloba ya Nzambe. Molende oyo asalaki mpo bato báyeba Biblia ememelaki ye liwa.
SÉRAPHIN azalaki na bomoi ntango oyo Grèce ezalaki na kati ya Ampire Ottoman. George Metallinos, moto ya mayele ya Lingomba ya Ɔrtɔdɔkse, alobaki ete na eleko wana “biteyelo ya malamu ezalaki mingi te” mpe “bato mingi batángaki kelasi te,” ata mpe bakonzi ya lingomba.
Bokeseni ekómaki makasi kati na koinè (Grɛki oyo bakomaki na yango Testama ya Sika) mpe Grɛki oyo bato bazalaki koloba na ntango wana. Bato oyo bakɔtaki kelasi te bazalaki koyoka koinè te. Nzokande, bakonzi ya lingomba baponaki kokangama na koinè, monɔkɔ oyo bato mingi bayebaki te.
Ezali na eleko wana nde Stephanos Ioannis Pogonatus abotamaki na kati ya libota moko oyo eyebanaki mingi na Esanga Lesbos, na Grèce; ezalaki na mobu soki 1670. Na Esanga Lesbos, bato mingi bazalaki babola mpe bayebaki kotánga te. Lokola biteyelo ezalaki mingi te, Stephanos akendaki kotánga kelasi ya ebandeli na monastɛrɛ moko. Azalaki naino elenge mpenza ntango baponaki ye diakono na Lingomba ya Ɔrtɔdɔkse mpe bapesaki ye nkombo ya Séraphin.
Lokola Séraphin azalaki mpenza na mposa ya koyekola, akendaki na Constantinople (lelo oyo Istanbul, na Turquie) na mobu soki 1693. Na nsima, bato minene ya Grèce bakómaki kopesa ye limemya mingi mpamba te azalaki mpenza mayele. Mwa moke na nsima, bato ya lingomba moko ya politiki oyo bazalaki koluka ete ekólo Grèce ezwa lipanda batindaki ye akende kokutana na Pierre le Grand, mokonzi ya Russie. Séraphin atambolaki na bamboka mingi ya Mpoto na mobembo na ye mpo na kokende na Moscou mpe kozonga; na bamboka yango amonaki mbongwana oyo ezalaki kosalema na makambo ya losambo mpe na biteyelo. Na mobu 1698, Séraphin akendaki na Angleterre mpe ayebanaki na bato minene na Londres mpe na Oxford. Akutanaki na episkɔpɔ-mokonzi ya Cantorbéry, mokonzi ya Lingomba ya Anglican. Mwa moke na nsima, boninga na ye na episkɔpɔ yango esalisaki ye na likambo moko.
Séraphin abimisi Biblia
Ntango Séraphin azalaki na Angleterre, amonaki ete Bagrɛki bazalaki mpenza na mposa ya Makomami ya Grɛki ya boklisto to Testama ya Sika oyo ebongolami na maloba ya pɛtɛɛ. Séraphin asalelaki libongoli moko oyo sango moko na nkombo Maxime abimisaki mbula koleka ntuku mitano liboso mpe abandaki kobongisa libongoli ya sika oyo alingaki ete ezala na mabunga te mpe ezala mpasi te mpo na kokanga ntina ya maloba na yango. Azalaki na molende ntango abandaki mosala na ye, kasi mwa moke na nsima, azalaki lisusu na mbongo te. Akómaki na elikya ete akosilisa yango ntango episkɔpɔ-mokonzi ya Cantorbéry alakaki kopesa ye mbongo. Séraphin asombaki bapapye mpe ayokanaki na moto moko oyo akokaki kobimisa Babiblia yango.
Kasi, mbongo oyo bapesaki ye ekokaki kaka mpo na kobimisa Evanzile ya Matai, ya Malako, mpe ndambo ya Evanzile ya Luka. Na nsima, lokola makambo ya politiki ebongwanaki na Angleterre, episkɔpɔ-mokonzi ya Cantorbéry atikaki kopesa ye mbongo. Séraphin alɛmbaki nzoto te, alukaki bato ya mbongo oyo bakokaki kosalisa ye mpe na mobu 1703, abimisaki libongoli oyo abongisaki. Mbongo mosusu eutaki na ebongiseli moko ya bamisionɛrɛ (Society for Propagating the Gospel in Foreign Parts).
Libongoli ya Maxime ezalaki bavolimi mibale mpe kati na yango ezalaki na makomi ya Grɛki ya kala. Ezalaki mokanda monene mpe ezalaki kilo mingi. Libongoli oyo Séraphin abongisaki ezalaki na makomi ya mike, ezalaki kaka na Grɛki ya sika, ezalaki moke mpe na kilo te.
Amikɔtisi na ntembe
George Metallinos alobi boye: “Ntembe ezali te ete Biblia wana na Grɛki ya sika ekokisaki mposa monene oyo bato bazalaki na yango. Kasi, Séraphin asalelaki libaku yango mpo na kotumola bakonzi ya mangomba oyo bazalaki kosepela te ete [Biblia] ebongolama.” Bakonzi ya lingomba batombokaki ntango batángaki makambo oyo Séraphin akomaki na maloba ya ebandeli, ete abimisaki libongoli yango ‘mpenzampenza mpo na basango ná bapastɛrɛ mosusu oyo bayebaki Grɛki [Koinè] te, mpo ete na lisalisi ya Elimo Santu, bákoka kotánga mpe kokanga ntina ya makomi ya ebandeli mpo bálimbola yango epai ya baklisto.’ (The Translation of the Bible Into Modern Greek—During the 19th Century) Na ndenge yango, Séraphin amikɔtisaki na ntembe oyo ezalaki na kati ya bakonzi ya Lingomba ya Ɔrtɔdɔkse.
Na ngámbo moko, ezalaki na bato oyo bayebaki ete mpo bato bákola na elimo mpe bázala na bizaleli malamu, basengeli koyeba Biblia. Bazalaki mpe komona ete bakonzi ya mangomba basengeli kokolisa boyebi na bango ya Biblia. Longola yango, bato oyo balingaki ete Biblia ebongolama bazalaki kokanisa ete makambo ya Biblia ekoki koteyama ata na monɔkɔ nini.—Emoniseli 7:9.
Bato oyo balingaki te ete Biblia ebongolama bazalaki koloba ete kobongola Biblia ekobebisa makanisi na yango mpe ekobebisa bokonzi oyo lingomba ezali na yango ya kolimbola mateya na yango. Kasi, bazalaki kobanga mingimingi mpo Baprotesta bazalaki kosalela mabongoli ya Biblia mpo na kobebisa bokonzi ya Lingomba ya Ɔrtɔdɔkse. Bakonzi mingi ya lingomba bazalaki kokanisa ete bazali na mokumba ya kotɛmɛla likanisi nyonso oyo ezali koyokana na makanisi ya Baprotesta, ata mpe milende ya kobongola Biblia mpo bato nyonso bákanga ntina na yango. Na bongo, mosala ya kobongola Biblia ekómaki likambo monene na matata kati na Baprotesta mpe Lingomba ya Ɔrtɔdɔkse.
Atako Séraphin azalaki na makanisi ya kolongwa na Lingomba ya Ɔrtɔdɔkse te, azalaki koloba polele ete bakonzi ya lingomba oyo baboyaki ete Biblia ebongolama bayebaki mateya na yango te mpe bazalaki na makanisi mabe. Na maloba ya ebandeli ya Testama ya Sika oyo abongolaki, akomaki boye: “Moklisto nyonso oyo abangaka Nzambe asengeli kotánga Biblia Mosantu” mpo “amekola ndakisa ya Klisto mpe atosa mateya [na ye].” Séraphin azalaki koloba ete kopekisa bato báyekola Biblia ezalaki makanisi oyo eutaki na Zabolo.
Banguna batɛmɛli ye
Ntango libongoli ya Séraphin ekómaki na Grèce, epelisaki nkanda ya bakonzi ya Lingomba ya Ɔrtɔdɔkse. Bapekisaki bato básomba yango. Batumbaki Babiblia mosusu mpe soki bakangi moto na Biblia yango to azali kotánga yango, bazalaki kolongola ye na lingomba. Patriarche Gabriel III apekisaki bákabola libongoli ya Séraphin mpe alobaki ete ezali mokanda moko ezangi ntina.
Atako Séraphin azongaki nsima te, amonaki ete asengeli kozala ekɛngɛ. Atako bakonzi ya lingomba bapekisaki libongoli yango, basango mpe bandimi mosusu bazalaki kosomba yango mpe bakómaki kotánga yango. Séraphin asalelaki mpenza mayele mpo na kokabola libongoli na ye. Kasi, matata na banguna ya makasi ezalaki kaka na ebandeli.
Likambo oyo ememaki ye na liwa
Longola mosala ya kokabola Testama ya sika oyo abongolaki, Séraphin akɔtaki na mangomba ya politiki oyo ezalaki koluka ete ekólo na bango ezwa lipanda. Yango wana azongaki na Moscou na mobu 1704. Akómaki mpenza moninga ya Pierre le Grand mpe na mwa eleko moko, azalaki molakisi na eteyelo monene (Académie royale de Russie). Kasi, lokola azalaki komituna soki nini ekokómela libongoli na ye, Séraphin azongaki na Constantinople na mobu 1705.
Kaka na mbula yango, ntango Séraphin abimisaki lisusu libongoli na ye, alongolaki maloba ya ebandeli oyo esilikisaki bakonzi ya lingomba. Na esika na yango, akomaki kaka maloba oyo elendisaki bato bátángaka Biblia. Bato mingi basombaki Biblia yango, mpe mokonzi ya lingomba alobaki lisusu mabe te mpo na Biblia yango.
Atako bongo, na mobu 1714, Alexander Helladius, moto moko ya Grèce oyo azalaki kosala mibembo na mokili mpe azalaki kosepela te ete Biblia ebongolama, asalaki likambo moko ya mabe. Na buku na ye (Status Præsens Ecclesiæ Græcæ), alobaki mabe mpo na babongoli ya Biblia mpe mosala oyo basalaki. Helladius akomaki mokapo mobimba mpo na kolobela Séraphin, mpe alobaki ete azali moyibi, mobubi, mpe mokosi oyo atánga te. Maloba yango ezalaki solo? Mokomi Stylianos Bairaktaris amonisi makanisi ya bato mingi ya mayele oyo bayebi mpenza lisolo ya Séraphin na ndenge abengi ye ‘moto ya molende na mosala mpe mobongisi-nzela’ oyo balobelaki mabe mpamba te azalaki komona mosika. Atako bongo, buku ya Helladius ebendelaki Séraphin mindɔndɔ oyo ememaki ye na liwa.
Bakómi kokanisela ye mabe
Ntango Séraphin azongaki na Russie na mobu 1731, Pierre le Grand asilaki kokufa. Na bongo, mokonzi oyo akokaki kobatela Séraphin azalaki lisusu te. Mokonzi-mwasi Anna Ivanovna, oyo akómaki koyangela, azalaki koboya likambo nyonso oyo ekoki kobimisa mobulu na ekólo na ye. Na sanza ya Yanuali 1732, nungunungu ebimaki na Saint-Pétersbourg ete moto moko ya Grèce azalaki na Russie mpe azalaki kosala mpo na banguna ya ekólo yango. Bato nyonso bakanisaki ete ezali Séraphin. Bakangaki ye mpe batindaki ye na monastɛrɛ ya Nevsky mpo na kotuna ye mituna. Na monastɛrɛ yango bazalaki na buku ya Helladius, oyo elobaki ete Séraphin asalaki makambo mingi ya mabe. Séraphin akomaki mikanda misato mpo na komonisa ete bakoseli ye makambo. Batunaki ye mituna na boumeli ya sanza mitano, mpe ezalaki mpasi mpo na kondima ete Séraphin ayebaki eloko te na makambo oyo bafundaki ye.
Lokola bakonzi bamonaki likambo moko te ya solosolo oyo ekweisaki Séraphin, bakatelaki ye etumbu ya liwa te. Kasi, batikaki ye te mpo na makambo oyo Helladius akomaki. Bakatelaki ye etumbu ya kofanda na Sibérie tii liwa na ye. Balobaki ete bapesi ye etumbu yango mpo na makambo oyo “buku ya Helladius, mokomi ya Grèce” elobaki mpo na ye. Séraphin akómaki na ɛsti ya Sibérie na sanza ya Yuli 1732, na minyɔlɔlɔ mpe batyaki ye na bolɔkɔ ya Ochotsk.
Basundolaki Séraphin kuna mpe mbula misato na nsima, akufaki. Na bantango mosusu, azalaki kosala mabunga mpe ndenge oyo azalaki kosala makambo mosusu ezalaki malamu te, kasi libongoli na ye ezali moko na mabongoli ya Grɛki ya sika oyo ezali lelo.a Na kati ya mabongoli yango, ezali mpe na Libongoli ya Mokili ya sika ya Makomami Mosantu, libongoli oyo ezali na elobeli ya pɛtɛɛ mpe ebimisami na minɔkɔ mingi. Tokoki mpenza kopesa Yehova Nzambe matɔndi na ndenge abatelaki Liloba na ye mpo ete bato ya bikólo nyonso bázwa ‘boyebi ya sikisiki ya solo’!—1 Timote 2:3, 4.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Talá lisolo “Molende mpo na kobimisa Biblia na Grɛki oyo bato nyonso balobaka,” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Novɛmbɛ 2002, nkasa 26-29.
[Elilingi na lokasa 12]
Pierre le Grand
[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 10]
Bafɔtɔ: Na ndingisa ya American Bible Society