Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w06 15/4 nk. 17-19
  • Méliton de Sardes alongisaki mateya ya solo?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Méliton de Sardes alongisaki mateya ya solo?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • ‘Monzoto ya monene’
  • Asaleli Biblia mpo na kolongisa mateya ya boklisto
  • Amonisi motuya ya lisiko
  • Akómaki nde mopɛngwi?
  • Elambo ya Mpokwa ya Nkolo​—Esengeli kokumisama mbala boni?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
  • ‘Oyo ezali ekaniseli mpo na bino’
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2013
  • Kolongwa na séder kino na lobiko
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • Elekeli ezali nini?
    Biyano na mituna ya Biblia
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
w06 15/4 nk. 17-19

Méliton de Sardes alongisaki mateya ya solo?

MBULA na mbula, baklisto ya solo basalaka Bolei ya Mpokwa ya Nkolo na mokolo ya 14 Nisana na kolanda manaka ya Baebele. Na ndenge yango, batosaka etinda oyo Yesu apesaki ete: “Bókoba kosala boye mpo na kokanisa ngai.” Na mokolo ya 14 Nisana ya mobu 33 ya ntango na biso (T.B.), Yesu abandisaki Ekaniseli ya liwa na ye nsima ya kolya Elekeli. Akufaki mpe kaka mokolo yango.​—Luka 22:19, 20; 1 Bakolinti 11:23–28.

Na ekeke ya mibale ya T.B., bato mosusu oyo bazalaki komibenga baklisto bakómaki kobongola mokolo mpe lolenge ya kosala ekaniseli yango. Na Asie Mineure, mokolo ya Ekaniseli ya liwa ya Yesu ebongwanaki te. Kasi, ndenge buku moko emonisi yango, “na Loma mpe na Alexandrie, bato bakómaki na momeseno ya kokanisa lisekwa [ya Yesu] na mokolo ya lomingo oyo elandi mokolo ya liwa na ye”; bazalaki kobenga yango Pasika. Etuluku moko ya baklisto oyo bazalaki kobenga Ba-Quartodéciman (to bato ya mokolo ya zomi na minei) bazalaki koloba ete esengeli kokanisaka liwa ya Yesu Klisto kaka na mokolo ya 14 Nisana. Méliton de Sardes azalaki kondima liteya yango. Ye azalaki nani? Ndenge nini alongisaki likambo wana mpe mateya mosusu ya Biblia?

‘Monzoto ya monene’

Na buku na ye moko (Ecclesiastical History), Eusèbe de Césarée akomaki ete na nsuka ya ekeke ya mibale, Polycrate d’Éphèse atindaki mokanda na Loma mpe kati na yango amonisaki ete esengeli kosala “Elekeli na mokolo ya zomi na minei, ndenge Evanzile emonisi yango, esengeli te kobongola mokolo yango, kasi kosala yango na ndenge oyo eyokani na momeseno ya boklisto.” Mokanda yango emonisi ete Méliton, episkɔpɔ ya Sardes, na etúká ya Lydia, azalaki na kati ya bato oyo bazalaki koloba ete esengeli kokanisaka liwa ya Yesu na mokolo ya 14 Nisana. Mokanda yango elobi ete na ntango wana bato bazalaki koloba ete Méliton azalaki moko na ‘minzoto ya minene oyo etikaki kongɛnga.’ Polycrate akomaki ete Méliton abalaki te, “amipesaki mobimba na makambo ya Elimo Santu, akufaki mpe bakundaki ye na Sardes mpe azali kozela lisekwa mpo na kobengama na bomoi na likoló.” Maloba yango emonisi ete Méliton azalaki kati na bato oyo bazalaki koloba ete lisekwa ekobanda nsima ya kozonga ya Klisto.​—Emoniseli 20:1-6.

Na bongo, emonani ete Méliton azalaki mobali ya mpiko. Kutu, akomaki mokanda moko (Apologie), moko na mikanda ya liboso oyo ekomamaki mpo na kokɔtela baklisto; atindelaki yango Marc Aurèle, oyo azalaki amperɛrɛ ya Loma banda na mobu 161 tii 180 T.B. Méliton azalaki kobanga te kolongisa mateya ya boklisto mpe kotɔndɔla bato ya mabe mpe ya lokoso. Bato yango bazalaki koluka kosalela mibeko oyo baamperɛrɛ babimisaki mpo na kozwa nzela ya konyokola baklisto mpe kokatela bango bitumbu mpo na kobɔtɔla biloko na bango.

Méliton akomelaki amperɛrɛ maloba ya mpiko oyo: “Tozali kosɛnga yo likambo moko kaka, ete yo moko otalela malamumalamu bato oyo mpo na bango mobulu ebimi [baklisto], mpe okata na bosembo soki babongi kobomama to kozwa etumbu to nde ebongi kotika bango nyɛɛ mpe kobatela bango. Kasi, soki ezali yo te moto obimisi mobeko mpe ekateli yango ya sika, oyo ebongi te ata mpo na banguna, tobondeli yo otika te ete ebele ya bato oyo ya mobulu bákoba kobɔtɔla biloko na biso.”

Asaleli Biblia mpo na kolongisa mateya ya boklisto

Méliton amipesaki mpenza na koyekola Makomami Mosantu. Babuku mosusu oyo akomaki ezali te lelo oyo, kasi mitó ya makambo ya babuku na ye emonisi ete azalaki kosepela na makambo ya Biblia. Mosusu kati na yango ezali oyo: Bomoi ya moklisto mpe ya basakoli, Kondima ya moto, Bozalisi, Batisimo mpe solo mpe kondima mpe kobotama ya Klisto, Boyambi bapaya, Fungola, mpe Zabolo mpe Emoniseli ya Yoane.

Méliton asalaki mobembo tii na mikili ya Moyen-Orient mpo na koluka koyeba mikanda boni ezalaki mpenza na Makomami ya Liebele. Na ntina na yango akomaki boye: “Yango wana, ntango nakendaki na Moyen-Orient mpe nakómaki na esika oyo basakolaki makambo yango mpe epai bato bazalaki kosalela yango, mpe na nsima nayekolaki na likebi mpenza mikanda ya Testama ya Kala mpe nakomaki makambo oyo namonaki, natindelaki yo yango.” Atako na liste yango, Méliton atángi te mokanda ya Nehemia mpe ya Esetele, yango ezali liste oyo eleki koumela ya mikanda ya Makomami ya Liebele na makomi ya bato oyo bazalaki komibenga baklisto.

Ntango Méliton azalaki koyekola makambo, asangisaki bavɛrsɛ mwa mingi oyo azwaki na Makomami ya Liebele oyo ezalaki na bisakweli mpo na Yesu. Na buku na ye moko (Extracts), Méliton amonisi ete Yesu azalaki Masiya oyo bazalaki kozela banda kala mpe ete Mibeko ya Moize mpe mikanda ya basakoli elobelaki koya ya Klisto.

Amonisi motuya ya lisiko

Bayuda mingi bazalaki kofanda na bingumba minene ya Asie Mineure. Bayuda ya Sardes, epai Méliton azalaki kofanda, bazalaki kosala Elekeli na mokolo ya 14 Nisana. Méliton akomaki buku moko oyo motó ya likambo na yango ezalaki Elekeli, oyo emonisaki ete Mibeko esɛngaki kosala Elekeli mpe alongisaki baklisto na ndenge bazalaki kosala Bolei ya Mpokwa ya Nkolo na mokolo ya 14 Nisana.

Nsima ya kopesa makanisi likoló ya Exode mokapo 12 mpe komonisa ete Elekeli ezalaki elilingi ya mbeka ya Klisto, Méliton alimbolaki mpo na nini ezali na ntina te ete baklisto básalaka Elekeli. Ezali mpo ete Nzambe asilaki kolongola Mibeko ya Moize. Na nsima, amonisaki mpo na nini mbeka ya Klisto ezalaki na ntina: Nzambe atyaki Adama na paladiso mpo azala na bomoi ya malamu. Kasi moto ya liboso abukaki mobeko ya Nzambe oyo epekisaki kolya mbuma ya nzete ya koyeba malamu mpe mabe. Yango wana bato bakómaki na mposa ya lisiko.

Méliton amonisaki mpe ete Yesu atindamaki awa na mabelé mpe ete akufaki mpo na kolongola bandimi na lisumu mpe liwa. Kutu, Méliton asalelaki liloba ya Grɛki xylon, oyo elimboli “libaya,” ntango akomaki na ntina na nzete oyo likoló na yango Yesu akufaki.​—Misala 5:30; 10:39; 13:29.

Méliton ayebanaki kaka na Asie Mineure te. Tertullien, Clément d’Alexandrie, mpe Origène bayebaki mikanda na ye malamu. Raniero Cantalamessa, moto ya mayele na masolo ya kala, alobi boye: “Kokita ya lokumu ya Méliton, oyo mokemoke ememaki mpe kolimwa ya mikanda na ye, ebandaki ntango bakómaki kotalela Ba-Quartodéciman lokola bapɛngwi, nsima wana bato mingi balandaki momeseno ya kokanisa Pasika mokolo ya lomingo oyo elandaki liwa ya Klisto.” Nsukansuka, mikanda ya Méliton elimwaki mpenza.

Akómaki nde mopɛngwi?

Nsima ya liwa ya bantoma, lipɛngwi oyo esakolamaki ekɔtaki na lingomba ya boklisto. (Misala 20:29, 30) Emonani ete Méliton mpe azwamaki na mopɛpɛ yango. Maloba ya mindɔndɔ oyo asalelaki na mikanda na ye ekokani na maloba oyo ezali na mikanda ya bato ya filozofi ya Bagrɛki mpe ya Baloma. Mbala mosusu ezali mpo na yango nde Méliton abengaki boklisto ete “filozofi na biso.” Lisusu, amonaki ete ndenge oyo “boklisto” esanganaki na mimeseno ya Baloma, ezali “elembo eleki monene . . . ya bolongi.”

Na ntembe te, Méliton alandaki te toli ya ntoma Paulo oyo: “Bókeba: mbala mosusu ekoki kozala na moto moko oyo akomema bino lokola nyama na ye ya kolya na nzela ya filozofi mpe na bokosi ya mpambampamba engebene mimeseno ya bato, engebene makambo mikemike ya mokili kasi engebene Klisto te.” Yango wana, atako Méliton alongisaki mwa moke mateya ya solo ya Biblia, na makambo mingi alandaki mateya yango te.​—Bakolose 2:8.

[Elilingi na lokasa 18]

Yesu abandisaki Bolei ya Mpokwa ya Nkolo na mokolo ya 14 Nisana

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto