Solo ezali kosangisa bato na Panama
“PANAMA: mboka oyo esangisi mokili.” Eleki sikoyo mbula 50, bapanzi-nsango bazalaki koloba maloba yango na radio moko monene ya ekólo yango ya Amerika ya Ntei. Lelo oyo, bato mingi bamonaka ete ekólo yango esangisi mpenza mokili.
Ekólo Panama ekangisi Amerika ya Nɔrdi ná Amerika ya Sudi. Na ekólo yango, bafungolá nzela moko ya mai oyo ekutanisi Mbu ya Atlantike ná Mbu ya Pasifike. Likoló ya nzela yango ya mai, batongá gbagba oyo babengaka “pont des Amériques.” Na nzela yango, bamasuwa oyo eutaka na mikili ndenge na ndenge esalaka mwa bangonga moke mpo elongwa na mbu moko mpe ekɔta na mbu mosusu, na esika ya kosala mobembo oyo ekoki kozwa mikolo to bapɔsɔ mingi. Yango wana bato bamonaka ete ekólo Panama esangisi mokili.
Mboka ya bato ndenge na ndenge
Panama ezali mpe mboka ya bato oyo bautá bipai na bipai. Bato yango bayaki kosangana na bato oyo bakutaki na mokili yango mpe lelo oyo, ekólo kitoko yango ezali mboka ya mindɛlɛ, baindo, ba-indien, mpe bato mosusu. Na bongo, ekoki nde kosalema ete bato oyo bazali na mimeseno, mangomba mpe minɔkɔ ekeseni bákóma na bomoko na nzela ya mateya ya solo ya Liloba ya Nzambe?
Ɛɛ, ekoki kosalema. Maloba ya ntoma Paulo oyo ezali na Baefese 2:17, 18 emonisi ete baklisto ya ekeke ya liboso—Bayuda mpe bato ya bikólo mosusu—bakómaki na bomoko yango na lisalisi ya mbeka ya Klisto. Paulo akomaki boye: “[Yesu] ayaki mpe asakolaki nsango malamu ya kimya epai na bino, bato batangwá mosika, mpe kimya epai ya baoyo ya penepene, mpamba te na lisalisi na ye biso, bikólo nyonso mibale, tozwi nzela ya kopusana pene na Tata na elimo kaka moko.”
Lelo oyo mpe, Batatoli ya Yehova ya Panama bazali kosakola “nsango malamu ya kimya” epai ya bato ya ndenge na ndenge oyo, ezala na maloba ya elilingi to mpe na ndenge ya solo, bauti mosika. Likambo yango ekɔtisi bomoko na kati ya bato oyo bazali “kopusana pene” na Yehova. Lelo oyo, ekólo yango ezali na masangá ya Batatoli ya Yehova na minɔkɔ motoba: Espagnol, Cantonais, elobeli ya bikela, Lingelesi, mpe minɔkɔ mibale ya mboka: Kuna ná Ngobere (to Guaymi). Ezali mpenza likambo ya kolendisa na koyeba ndenge oyo bato oyo balobaka minɔkɔ yango basangani na losambo ya Yehova.
Bazali kolonga mikakatano na comarca
Ekólo Panama ezali na bituluku mwambe mpe etuluku oyo babengi Ngobe nde eleki monene. Etuluku yango ezali na bato soki 170 000, mpe mingi kati na bango bafandaka na etúká moko monene oyo bakómi kobenga comarca. Etúká yango ezali na bazamba minene mpe bangomba epai batambolaka kaka na banzela ya makolo; ezali mpe na mabongo kitoko epai bakoki kokóma kaka na nzela ya mai. Bamboka mingi ezali pembeni ya bibale mpe bato basalelaka nzela ya mai mpo na kokende na bisika mosusu; bamboka mosusu mpe ezali pembenipembeni ya mbu. Bato mingi oyo bafandaka na comarca balonaka kafe na bangomba, babomaka mbisi, to mpe basalaka bilanga. Mingi bazali na mangomba ya boklisto. Kasi, bamosusu mpe bazali bandimi ya lingomba moko ya mboka yango oyo babengaka Mama Tata. Bato mosusu bakendaka epai ya ba sukias (to banganga-nkisi) soki bazali maladi to ntango batungisami na bilimu mabe. Atako bato mingi balobaka Espagnol, monɔkɔ oyo bayebi malamu ezali Ngobere.
Mibembo na bwato mpo na kokutana na bato
Batatoli ya Yehova bayebaka ntina ya koteya solo na ndenge oyo ekosuka te kaka na makanisi ya bato, kasi ekosimba mpe mitema na bango. Yango ekotinda bato yango bábongola bomoi na bango mpe bálanda mitinda ya Biblia. Yango wana, Batatoli ya etúká yango bayekolisaki babongisi-nzela monene oyo batindamaki na bisika mwambe ya etúká yango monɔkɔ ya Ngobere.
Emonani ete masangá 14 ya etúká yango ekokola. Na ndakisa, eleki mwa bambula, batindaki Dimas ná mwasi na ye Gisela babongisi-nzela monene na lisangá moko ya basakoli soki 40 na Tobobe, mboka oyo ezali na bokula ya mbu. Ezalaki pɛtɛɛ te mpo bámesana kotambola ntango nyonso na bwato mpo na kokende kosakola na bamboka oyo ezali pembenipembeni ya Mbu ya Atlantike. Dimas ná Gisela bamonaki ete mai ya mbu, oyo ntango mosusu ezalaka kimya, ekoki mbala moko kotomboka mpe komatisa bambonge ya makasi. Mbala mingi, ntango bazalaki kolongwa na mboka moko mpo na kokende na mboka mosusu, bazalaki koyoka mabɔkɔ mpe mokɔngɔ mpasi nsima ya kolúka bwato. Mokakatano mosusu ezalaki koyekola monɔkɔ ya mboka. Kasi, milende na bango ebotaki mbuma mpamba te na mobu 2001, bato soki 552 bayanganaki na Ekaniseli ya liwa ya Klisto.
Moto oyo auti na Tobobe soki akatisi mai oyo ekɔtá na mokili, akokóma na mboka Punta Escondida. Etuluku moko ya basakoli ya mboka yango bazalaki mbala na mbala kosala mobembo na bwato—soki mai ezali kimya—mpo na koyangana na makita na Tobobe mpe balapolo ezalaki komonisa ete bakoki kofungola lisangá na Punta Escondida. Yango wana, basɛngaki Dimas ná Gisela bákende kofanda kuna. Mbula mibale kutu ekokaki te, etuluku oyo ezalaki na Punta Escondida ekómaki lisangá mobimba ya basakoli 28, mpe pɔsɔ na pɔsɔ, bato soki 114 bazalaki koyangana na lisukulu ya bato nyonso. Na 2004, bandeko ya lisangá yango ya sika basepelaki mingi na komona ete bato 458 bayanganaki na Ekaniseli ya liwa ya Klisto.
Bazali koteya bato oyo bayebi kotánga te
Bato mingi ya mitema sembo bazwi likoki ya kokóma baninga ya Yehova nsima ya koyekola kotánga mpe kokoma. Moko na bango nkombo na ye Fermina, elenge mwasi moko oyo azalaki kofanda na mboka moko na kati ya bangomba ya comarca. Bamisionɛrɛ bakutanaki na ye mpe bamonaki ete asepelaki mingi na nsango ya Bokonzi. Ntango batunaki ye soki akosepela koyekola Biblia, andimaki. Kasi, azalaki na mokakatano moko: ayebaki koloba Espagnol ná Ngobere, kasi ayebaki kotánga mpe kokoma te. Misionɛrɛ moko andimaki kolakisa ye kotánga na lisalisi ya mwa buku Omipesa na kotánga mpe kokoma.a
Fermina azalaki moyekoli ya malamu mpenza; azalaki komibongisa, kosala badevuare, mpe komipesa mpenza na koyekola. Nsima ya mbula moko, akómaki koyekola mwa buku Okoki kozala moninga ya Nzambe!* Ntango bakómaki kosala makita, Fermina mpe abandaki koyangana. Kasi, lokola azali mpenza mobola, azalaki na makoki te ya kofutaka tike mpo na koyanganaka na makita elongo na bana na ye. Ntango mobongisi-nzela moko ayebaki mokakatano ya Fermina, apesaki ye likanisi ete atongaka bilamba ya basi ya Ngobe mpe atɛkaka yango. Fermina asalelaki likanisi yango mpe, atako azalaki na mposa ya biloko mosusu, azalaki kosalela mbongo oyo azalaki kozwa kaka mpo na kofuta tike mpo na kokende na makita. Lelo oyo, akómi kofanda na mboka mosusu elongo na libota na ye, mpe azali kokola malamu na elimo. Bango nyonso bazali na esengo mpo bayebi kotánga, kasi mingimingi mpo bayebi Yehova.
Bazali kolonga mokakatano ya kosolola na bababa
Na Panama, bato mingi bayokaka nsɔni soki bazali na ndeko oyo azali baba. Na mabota mosusu, mwana oyo azali baba bakɔtisaka ye kelasi te. Lokola ezalaka mpasi mpo na kosolola na bango, bababa mingi bamonaka ete bakipaka bango te.
Yango wana, Batatoli bamonaki ete basengeli kosala likambo moko mpo na kosakola nsango malamu epai ya bababa. Mokɛngɛli-motamboli moko alendisaki etuluku moko ya babongisi-nzela mpe basakoli mosusu báyekola elobeli ya bikela ya Panama. Molende na bango ebotaki mbuma.
Na nsuka ya mobu 2001, etuluku moko ya elobeli ya bikela esalemaki na engumba Panama City. Bato soki 20 bazalaki koyangana na makita kuna. Ntango bandeko bamesanaki na elobeli yango, bakómaki kopesa litatoli epai ya bababa mingi oyo “bayokaki” naino mateya ya Biblia te. Batatoli mingi oyo bazali na bana oyo bazali bababa bakómaki mpe koyangana na makita yango mpe bamonaki ete bana na bango bakómaki kokanga ntina ya mateya ya Biblia mpe bakómaki kosepela na solo. Baboti mingi bayekolaki elobeli ya bikela mpe yango esalisaki bango bákóma kosolola malamu na bana na bango. Na ndenge yango, baboti bakokaki kosalisa bana na bango bákola malamu na elimo mpe bamonaki yango ezalaki kolendisa mabota na bango. Ndakisa ya Elsa ná mwana na ye Iraida ezali komonisa likambo yango.
Motatoli moko oyo azali na etuluku ya elobeli ya bikela, ayokaki lisolo ya Iraida, akendaki kotala ye, mpe atikelaki ye mwa buku Sepelá na bomoi ya seko na mabele!b Iraida asepelaki mingi na mateya oyo ayekolaki na lisalisi ya bililingi oyo ezali komonisa mokili ya sika. Bakómaki koyekola mwa buku yango. Ntango basilisaki mwa buku Sepelá, bakɔtaki na mwa buku Nzambe azali kosɛnga nini epai na biso?* Na ntango yango, Iraida akómaki kosɛnga mama na ye asalisaka ye mpo na kobongisa boyekoli mpe alimbwelaka ye makambo mosusu.
Elsa azalaki na mikakatano mibale: lokola azalaki Motatoli te, ayebaki mateya ya solo ya Biblia te, lisusu ayebaki elobeli ya bikela te. Bato mosusu bayebisaki ye ete asengeli te kosololaka na mwana na ye na bajɛstɛ, mwana na ye nde asengeli koyekola koloba. Yango wana, azalaki mpenza kosolola na mwana na ye te. Lokola Iraida azalaki kosɛnga ye asalisaka ye, Elsa asɛngaki ete Motatoli moko ya lisangá yango ayekolaka na bango. Alobaki boye: “Nasɛngaki likambo yango mpo na Iraida, mpamba te namoná ye naino te asepela makasi na likambo moko ndenge wana.” Elsa akómaki mpe koyoka ntango bazali koyekola na mwana na ye mpe ayekolaki elobeli ya bikela. Ntango Elsa akómaki kolekisa ntango mingi na mwana na ye, bakómaki kosolola malamu. Iraida akómaki kopona baninga ya malamu, mpe akómaki koyangana na makita. Lelo oyo, mama yango ná mwana na ye bayanganaka na makita pɔsɔ na pɔsɔ. Elsa auti kozwa batisimo, mpe Iraida azali na mokano ya kozwa batisimo na mikolo ezali koya. Elsa alobi ete mpo na mbala ya liboso, akómi koyeba mwana na ye mpe bakómi kosolola makambo oyo ezali na ntina mpo na bango mibale.
Etuluku ya elobeli ya bikela, oyo ekómaki lisangá na sanza ya Aprili 2003, ezali lelo oyo na basakoli soki 50 mpe bato mingi bazali koyangana na makita. Moto moko na kati ya bato misato na lisangá yango azali baba. Bituluku mosusu ya elobeli ya bikela efungwami na bingumba mosusu misato. Atako basakoli bazali naino na mosala mingi mpo na kosalisa bababa, ntembe ezali te ete basili kosala mosala monene mpo bababa ya mitema sembo báyeba Mozalisi na bango, Yehova Nzambe.
Nyonso wana ezali kaka bandakisa ya mosala malamu oyo ezali kosalema na ekólo Panama mobimba. Bato mingi ya mimeseno ndenge na ndenge mpe oyo balobaka minɔkɔ ekeseni basangani na losambo ya Nzambe kaka moko ya solo. Solo ya Liloba ya Yehova elongi mikakatano mpo na kosangisa bato na ekólo yango oyo bato mingi babengaka “mboka oyo esangisi mokili.”—Baefese 4:4.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Ebimisami na Batatoli ya Yehova.
b Ebimisami na Batatoli ya Yehova.
[Bakarte na lokasa 8]
(Mpo na komona yango, talá mokanda)
MBU YA CARAÏBES
PANAMA
Tobobe
MBU YA PASIFIKE
Canal de Panama
[Elilingi na lokasa 8]
Basi ya ekólo Kuna basimbi batapi
[Elilingi na lokasa 9]
Misionɛrɛ azali koteya mwasi ya ekólo Ngobe
[Elilingi na lokasa 9]
Batatoli bauti na Ngobe bazali komata na bwato mpo na kokende liyangani ya mokolo moko
[Bililingi na lokasa 11]
Mateya ya Biblia ezali kosangisa bato ya minɔkɔ mpe mimeseno ndenge na ndenge na Panama
[Elilingi na lokasa 12]
Boyekoli ya “Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli” na elobeli ya bikela
[Elilingi na lokasa 12]
Elsa ná mwana na ye Iraida bakómá kosolola malamu
[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 8]
Masuwa mpe basi ya ekólo Kuna: © William Floyd Holdman/Index Stock Imagery; mboka: © Timothy O’Keefe/Index Stock Imagery