Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w06 1/2 nk. 12-16
  • Yehova asalisaki ngai nayeba ye

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Yehova asalisaki ngai nayeba ye
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • “Okoki kobondela yo moko te?”
  • Nazongi na Derby
  • Namiyokaki lokola Ezekiele
  • Nayebaki bobola na ngai ya elimo
  • Lisalisi mosusu ezali koya
  • Kobɔkɔla bana mwambe na banzela ya Yehova ezalaki mpasi mpe esengo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • Biblia ebongolaka bato
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
  • Nsukansuka, libota na biso ekómaki na bomoko!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • Biblia ebongolaka bato
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
w06 1/2 nk. 12-16

Lisolo ya bomoi

Yehova asalisaki ngai nayeba ye

YA FLORENCE CLARK

Nasimbaki lobɔkɔ ya mobali na ngai oyo azalaki kobɛla makasi. Lokola nazalaki na Lingomba ya Anglican, nabondelaki Nzambe ete mobali na ngai abika mpe nayebisaki ye ete soki akufi te, nakoluka ye tii nakoyeba ye. Mpe na nsima nakokóma mosaleli na Ye.

NABOTAMAKI mwa 18 Sɛtɛmbɛ 1937, na mboka Oombulggurri, esika moko oyo ezalaka na Plateau de Kimberley na etúká ya Wɛsti ya ekólo Australie. Baboti na ngai bapesaki ngai nkombo Florence Chulung.

Nabosanaka te bomwana na ngai, ntango bomoi ezalaki naino malamu. Nayekolaki mwa makambo na ntina na Nzambe mpe Biblia na Lingomba ya Anglican, kasi mama na ngai nde ateyaki ngai mitinda ya boklisto. Azalaki kotángela ngai Biblia mbala na mbala mpe nakómaki mpenza kolinga makambo ya elimo banda bomwana na ngai. Nazalaki mpe kosepela na ndeko ya mama na ngai moko ya mwasi, oyo azalaki misionɛrɛ na lingomba na ye. Na motema na ngai, nayebaki ete nasengeli kolanda ndakisa na ye.

Lingomba na biso, oyo eyebanaki liboso na nkombo Forrest River Mission, ezalaki kotángisa bana banda na kelasi ya liboso tii na kelasi ya mitano. Nazalaki kokende na kelasi kaka ngonga mibale ntɔngɔ nyonso. Yango emonisi ete natángaki mingi te, mpe likambo yango ezalaki kotungisa tata mingi. Tata alingaki bana na ye bátánga mingi, yango wana azwaki ekateli ya kolongwa na Oombulgurri mpe tokendaki kofanda na engumba Wyndham. Mokolo oyo tokendaki na Wyndham, nayokaki mawa mingi, kasi kuna, natángaki ndenge bana nyonso batángaka, na boumeli ya mbula minei oyo elandaki, banda na 1949 tii na 1952. Nazali na esengo mingi ndenge tata atángisaki ngai kelasi malamu.

Mama azalaki kosala epai ya monganga ya esika tofandaki, mpe ntango nasilisaki kelasi na mbula 15, monganga yango azwaki ngai lifulume na lopitalo ya Wyndham. Nandimaki mosala yango na esengo mpenza, mpamba te na ntango wana kozwa mosala ezalaki mpasi.

Mwa bambula na nsima, nakutanaki na Alec, mondele moko oyo azalaki kobatela bibwɛlɛ na ferme moko. Tobalanaki na 1964 na engumba Derby, epai nazalaki kokende kosambela na lingomba ya Anglican. Mokolo moko, Batatoli ya Yehova bayaki na ndako na ngai. Nayebisaki bango ete ezala mbala ya yambo mpe ya nsuka, mpo nazali na ntina ya mateya na bango te. Kasi, balobaki likambo moko oyo ebendaki mpenza likebi na ngai: Nzambe, nkombo na ye Yehova.

“Okoki kobondela yo moko te?”

Na 1965, bomoi ebandaki kokóma mpasi mpenza. Mobali na ngai azwaki makama ya makasi mbala misato: Akweaki mbala mibale na mpunda mpe azwaki likama na motuka na ye. Likambo ya esengo, abikaki mpe azongelaki mosala. Kasi, mwa moke na nsima, akweaki lisusu na mpunda na ye. Na mbala wana, azokaki bampota minene na motó. Ntango nakómaki na lopitalo, monganga ayebisaki ngai ete mobali na ngai akokufa. Mayele nyonso esilaki ngai. Lifulume moko ya mwasi asɛngaki sango ya Katolike ya engumba wana aya kotala ngai, kasi ye alobaki: “Sikoyo te. Nakoya lobi!”

Nazalaki na mposa sango azala pembeni na ngai mpe abondela elongo na ngai, mpe nayebisaki mamelo mposa na ngai. Mamelo alobaki ete: “Yango likambo nini? Okoki kobondela yo moko te?” Nabandaki kosambela bikeko mpo esalisa ngai, kasi eloko moko te esalemaki. Emonanaki lokola mobali na ngai alingi kokufa. Namitunaki, ‘Nakosala nini soki akufi?’ Namitungisaki mpe mpo na bana na biso misato: Christine, Nanette mpe Geoffrey. Bakozala ndenge nini? Likambo ya esengo, nsima ya mikolo misato mobali na ngai akómaki lisusu koyeba makambo, mpe abimaki lopitalo mwa 6 Desɛmbɛ 1966.

Atako mobali na ngai abikaki, bɔɔngɔ na ye etikalaki na mwa bampota. Akómaki kobosanabosana makambo, akómaki nkandankanda mpe bomoto na ye ekómaki kobongwana mpambampamba. Azalaki lisusu kokoka bana te mpe akómaki kobɛtabɛta bango soki basali mwa mabunga. Akómaki mpenza mokumba mpo na ngai. Nasengelaki kosalela ye makambo nyonso. Nalakisaki ye kutu lisusu kotánga mpe kokoma. Kokokisa bamposa na ye mpe misala mosusu ya ndako elekelaki ngai mpe nabɛlaki motó. Mbula nsambo nsima ya likama ya mobali na ngai, toyokanaki ete tókabwana mpo na mwa ntango mpo napemisa nzoto.

Nazwaki bana mpe tokendeki na sudi ya engumba Perth. Liboso tókenda kuna, leki na ngai ya mwasi abandaki koyekola Biblia na Batatoli ya Yehova na Kununurra, mwa engumba moko na Wɛsti ya Australie. Alakisaki ngai elilingi moko na kati ya buku Solo oyo ezali komema na bomoi ya seko,a oyo ezalaki komonisa paladiso oyo Biblia elaki awa na mabelé. Alakisaki ngai mpe na kati ya buku yango ete nkombo ya Nzambe ezali Yehova, mpe yango esepelisaki ngai. Lokola nayokaki naino te makambo yango na lingomba na biso, nazwaki ekateli ete ntango kaka nakokóma na Perth, nakobenga Batatoli ya Yehova na telefone.

Nzokande, nazalaki kokakatana mpo na kobenga bango. Kasi, mokolo moko na mpokwa, ngonga ya porte elelaki. Mwana na ngai ya mobali akendeki na porte mpe azongaki mbangu koyebisa ngai ete: “Mama, bato oyo olobaki ete okobenga na telefone bayei.” Nakamwaki mwa moke mpe nayebisaki ye ete: “Yebisá bango ete nazali te!” Mwana ayebisaki ngai ete: “Mama, oyebi ete ngai nakoki kokosa te.” Lokola mwana na ngai asembolaki ngai, nakendeki kofungola porte. Ntango nazalaki kopesa bango mbote, namonaki ete bazali kokamwa. Bayaki nde kotala moto mosusu oyo azalaki kofanda wana liboso. Nakɔtisaki bango na ndako, natunaki bango mituna ebele mpe bapesaki ngai biyano ya malamu ya Biblia.

Pɔsɔ oyo elandaki, nabandaki koyekola Biblia na Batatoli ya Yehova na nzela ya buku Solo oyo ezali komema na bomoi ya seko. Boyekoli yango elamwisaki lisusu bolingo na ngai ya makambo ya elimo. Pɔsɔ mibale na nsima, nayanganaki na Ekaniseli ya liwa ya Klisto Yesu. Nabandaki koyangana na makita mokolo ya lomingo nyonso, eumelaki te nabandaki mpe koyangana na makita oyo ezalaki kosalema na mikolo mosusu ya pɔsɔ. Nabandaki mpe koyebisa bato mosusu makambo oyo nazalaki koyekola. Namonaki ete kosalisa bato mosusu báyeba solo ya Biblia esalisaki ngai natungisama lisusu te na makanisi. Sanza motoba na nsima, nabatisamaki na liyangani moko ya etúká na Perth.

Lokola nazalaki kokola na elimo, nayaki koyeba ete libala ezali bulɛɛ na miso ya Yehova, nayebaki mpe etinda ya Biblia oyo ezali na 1 Bakolinti 7:13, oyo elobi ete: “ Mwasi oyo azali na mobali oyo azali mondimi te, nzokande mobali yango andimi kofanda elongo na ye, mwasi yango atika mobali na ye te.” Vɛrsɛ wana etindaki ngai nazongela Alec.

Nazongi na Derby

Nazongaki na Derby mwa 21 Yuni 1979, nsima ya kotika mobali na ngai mbula koleka mitano. Ya solo, nazalaki komituna soki akosala nini ntango akomona ngai. Likambo ya kokamwa, azalaki na esengo ndenge nazongaki, kasi asepelaki mpenza te ndenge nakómaki Motatoli ya Yehova. Ayebisaki ngai nakóma kokende na lingomba na ye, epai nazalaki kosambela liboso nakende na Perth. Nayebisaki ye ete nakoki kosala bongo te. Nasalaki nyonso mpo natosa ye mpe namitambwisa lokola mwasi moklisto. Nazalaki komeka koyebisa ye makambo etali Yehova mpe bilaka na ye kitoko mpo na mikolo ezali koya, kasi azalaki kosepela na yango te.

Nsukansuka, Alec atikaki ngai nazala Motatoli ya Yehova, mpe abandaki kopesa ngai mbongo mpo nakende na mayangani ya etúká mpe na makita ya pɔsɔ. Nasepelaki mingi ntango asombaki motuka​—eloko ya ntina mingi na eteni wana mosika ya Australie—​mpo nabimaka na yango na mosala ya kosakola. Bandeko ya lisangá, ezala mpe mokɛngɛli ya zongazonga bazalaki mbala mingi kolekisa mwa mikolo epai na biso. Yango esalaki ete Alec ayeba Batatoli ebele, mpe emonanaki lokola azalaki kosepela na bango.

Namiyokaki lokola Ezekiele

Nazalaki kosepela ndenge bandeko bazalaki koya kotala ngai, kasi nazalaki na mokakatano moko. Nazalaki kaka ngai moko Motatoli ya Yehova na engumba Derby. Lisangá oyo ezalaki mwa pene ezalaki na engumba Broome, oyo ezali na ntaka ya kilomɛtrɛ 220 na esika oyo nazalaki. Yango wana, nazwaki ekateli ya kosala nyonso mpo na kopalanganisa nsango malamu. Na lisalisi ya Yehova, namibongisaki mpe nabandaki kosakola ndako na ndako. Mosala yango ezalaki mpasi, kasi nabosanaki te maloba ya ntoma Paulo oyo: “Na makambo nyonso nazali na makasi na lisalisi ya moto oyo apesaka ngai nguya.”​—Bafilipi 4:13.

Bakonzi ya mangomba bazalaki kosepela na mosala na ngai te, mingimingi ndenge nazalaki kosakwela bato ya mboka na biso. Bamekaki kobangisa ngai mpe kopekisa ngai kosakola. Botɛmɛli na bango etindaki ngai nakoba kosakola, mpe nazalaki kobondela Yehova mbala na mbala mpo asalisa ngai. Nazalaki mbala na mbala komikundola maloba ya kolendisa oyo Yehova ayebisaki Ezekiele: “Talá, nasili kosala elongi na yo makasi epai na bilongi na bango, mpe motó na yo makasi epai na mitó na bango. Nasili kozalisa motó na yo lokola libanga, ɛɛ koleka libanga ya makasi. Bangá bango te, mpe yoká nsɔmɔ mpo na bilongi na bango te.”​—Ezekiele 3:8, 9.

Mibali mibale ya lingomba moko boye bazalaki mbala na mbala kolandalanda ngai ntango nazalaki kosomba biloko. Bazalaki kowolola mpe kosɛkasɛka ngai, mpe koluka ete bato mosusu oyo bazalaki kosomba biloko báwolola ngai. Nazalaki kokipe bango te. Mokolo moko, ntango nazalaki kosolola na mwasi moko oyo asepelaki na nsango malamu, pastɛrɛ moko ayaki wana mpe alobaki na mwasi wana ete ngai nandimelaka Yesu te. Abɔtɔlaki ngai Biblia, abɛtaki ngai yango na elongi mpe azongiselaki ngai yango. Natalaki ye, mpe na boboto nyonso, natángelaki ye maloba ya Yoane 3:16 mpe nayebisaki ye ete nandimaka Yesu. Akangaki monɔkɔ ntango ayokaki eyano na ngai ya polele, mpe akendeki kozanga koloba ata liloba moko.

Nazalaki kosepela kosakwela bato ya Derby. Sango moko amekaki kopekisa ngai kosakola na mwa mboka moko boye, kasi batindaki ye epai mosusu. Yango epesaki ngai nzela ya kosakwela bango nsango ya Biblia. Nazalaki ntango nyonso na mposa ya kokóma misionɛrɛ lokola mama leki na ngai, mpe nakómaki misionɛrɛ mpe nazalaki kosalisa bato mosusu báyekola Biblia. Bana-mboka mingi basepelaki na nsango malamu mpe nayekolaki Biblia na mingi kati na bango.

Nayebaki bobola na ngai ya elimo

Na boumeli ya mbula mitano, nazalaki Motatoli ya Yehova kaka ngai moko na engumba Derby. Namonaki ete nakoki te kotikala makasi na elimo soki nazali te koyangana na makita elongo na bandeko mpo na kozwa bilendiseli. Mokolo moko nalɛmbaki mpenza mpe nakendeki kotambola na motuka. Ntango nazongaki na ndako na mpokwa mpenza, nakutaki ndeko mwasi moko ná bana na ye nsambo bazali kozela ngai. Bamemelaki ngai mikanda oyo bautaki na yango na lisangá ya Broome oyo ezali mosika mpenza na Derby. Banda mokolo wana, ndeko mwasi yango azwaki ekateli ya koyaka na Derby mbala moko na sanza mpe kolekisa wikende elongo na ngai. Tozalaki kosakola elongo mpe koyekola Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli elongo na ndako na ngai. Ngai mpe nazalaki kokende na Broome mbala moko na sanza.

Bandeko ya Broome bazalaki kosalisa ngai mingi mpe ntango mosusu bazalaki koya tii na Derby mpo na kosalisa ngai na mosala ya kosakola. Bazalaki kolendisa bandeko ya bingumba mosusu oyo bazalaki koleka na Derby ete báyaka kotala ngai mpe bábimaka na ngai na mosala ya kosakola. Bandeko bazalaki komemela ngai mpe bakasɛti ya masukulu. Basusu bazalaki koyekola Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli elongo na ngai. Atako bazalaki koumela mingi te, bazalaki kolendisa ngai mingi.

Lisalisi mosusu ezali koya

Na boumeli ya mwa bambula, lisalisi mosusu eyaki ntango Arthur Willis ná mwasi na ye Mary, oyo bazwá epaso mpe bazalaki kouta na Sudi-Wɛsti ya Australie, bazalaki koya kolekisa na ngai sanza misato na eleko ya malili mpo na kosalisa ngai. Ndeko Willis azalaki kotambwisa pene na makita nyonso mpe kokamba mosala ya kosakola. Tozalaki kokende elongo na bamboka ya mosika ya Plateau de Kimberley mpo na kotala bato na baferme ya bangɔmbɛ. Ntango nyonso oyo ndeko Willis ná mwasi na ye bazalaki kozonga epai na bango, nazalaki mpenza komiyoka ete natikali ngai moko.

Nsukansuka, pene na nsuka ya mobu 1983, nazwaki nsango ya esengo ete Danny Sturgeon ná mwasi na ye Denise mpe bana na bango ya mibali minei bazali koya kofanda na Derby. Ntango bayaki, tokómaki kosala makita nyonso ya pɔsɔ mpe kobima elongo na mosala ya kosakola. Na 2001, lisangá moko efungwamaki. Lelo oyo, Derby ezali na lisangá moko makasi ya basakoli 24, mpe bankulutu mibale ná mosaleli na misala moko bazali kosalisa biso malamu na elimo. Ntango mosusu tokómaka ata bato 30 na makita.

Soki nakanisi bambula oyo eleká, nazalaka mpenza na esengo ya komona ndenge Yehova asalisi ngai nasalela ye. Atako mobali na ngai akómi naino Motatoli ya Yehova te, azali kokoba kosunga ngai na ndenge mosusu. Bato mitano ya libota na ngai bakómá Batatoli: Bana na ngai mibale ya basi, bankɔnkɔ na ngai mibale ya basi mpe mwana ya leki na ngai moko ya mwasi. Lisusu, bandeko na ngai mibale ya basi mpe moko ya mobali bazali koyekola Biblia na Batatoli ya Yehova.

Nazali mpenza kotɔnda Yehova mpo na ndenge asalisaki ngai nayeba ye. Nazali na ekateli ya kozala mosaleli na ye libela na libela.​—Nzembo 65:2.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Ebimisamaki na Batatoli ya Yehova kasi sikoyo ebimaka lisusu te.

[Karte/Bililingi na lokasa 15]

(Mpo na komona ndenge ezali, talá na kati ya zulunalo)

AUSTRALIE

Wyndham

Plateau de Kimberley

Derby

Broome

Perth

[Eutelo ya bafɔtɔs]

Kangaroo and lyrebird: Lydekker; koala: Meyers

[Elilingi na lokasa 14]

Ntango nazalaki lifulume na lopitalo Wyndham, na 1953

[Elilingi na lokasa 15]

Lisangá ya Derby, na 2005

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto