Mosolo mpe bizaleli malamu—Liteya oyo tokoki kozwa na masolo ya kala
MWA 7 Aprili ya mobu 1630, bato soki nkama minei bazwaki masuwa minei na Angleterre mpo na kokende na Amerika. Mingi kati na bango bazalaki bato batángá mingi. Bamosusu bazalaki bakomelesa ya minene. Bamosusu kutu bazalaki badepite. Nkita ya ekólo Angleterre ekitaki makasi na ntango wana, mpe Etumba ya Mbula Ntuku Misato (1618-1648) oyo ezalaki kobundama na Mpoto ebakisaki lisusu mokakatano yango. Yango wana, bato yango batikaki bandako, misala mpe bandeko na bango mpe bakendaki na mboka mopaya mpo na koluka bomoi ya malamu.
Kasi, bato yango oyo batondaki na bilikya bazalaki kaka te bakomelesa oyo bazalaki koluka epai bakoki kokolisa mimbongo na bango. Bazalaki ba Puritains ya molende mpenza, oyo bakimaki monyoko.a Ntina mpenza oyo bakendaki ezalaki ya kosala mboka moko ya bato oyo babangaka Nzambe, epai bango ná bana na bango bakoki kokóma na bozwi mingi kozanga ete bábuka mibeko ya Biblia. Mwa moke nsima ya kokóma na Salem, na etúká ya Massachusetts, bazwaki mwa eteni moko ya mabelé na pembeni ya mbu. Babengaki mboka na bango ya sika Boston.
Kozala na mosolo mpe bizaleli malamu ezali pɛtɛɛ te
John Winthrop, oyo azalaki mokambi mpe guvɛrnɛrɛ na bango, asalaki nyonso mpo bato nyonso bázala na bozwi mpe mboka mobimba ezala malamu. Alingaki ete bato bázala na mosolo mpe na bizaleli malamu. Kasi, ezalaki mpasi mpenza kosangisa makambo mibale wana. Lokola ayebaki ete ekozala pɛtɛɛ te, alimbolelaki baninga na ye na bolai mpenza ntina ya bozwi epai ya bato oyo babangaka Nzambe.
Lokola bakambi mosusu ya ba Puritains, Winthrop azalaki kokanisa ete koluka bozwi ezali mpenza mabe te. Mpo na ye, bozwi ezalaka libosoliboso mpo na kosalisa basusu. Na yango, soki moto azali na bozwi mingi, akosalisa mpe bato mingi. Patricia O’Toole, moto moko ya mayele na masolo ya kala, alobaki ete: “Ezali na likambo mosusu te oyo ba Puritains bazalaki kobomela nzoto lokola bozwi. Kozala na bozwi ezalaki mbala moko elembo ya lipamboli ya Nzambe mpe eloko oyo ekoki komema na lisumu ya lolendo . . . mpe na masumu ya nzoto.”
Winthrop amonisaki ete mpo na kokima masumu oyo ekoki kouta na bozwi, esengeli kozala na bokatikati mpe na elimo ya komipimela. Kasi mosika te, milende oyo Winthrop azalaki kosala mpo na kolona ezaleli ya kokangama na Nzambe mpe bolingo mpo na basusu na mitema ya baninga na ye endongbanaki mpenza na mposa makasi ya bozwi oyo bazalaki na yango. Baoyo basepelaki na makanisi na ye te babandaki kotɛmɛla yango makasi mpe koloba ete Winthrop akómi kokɔta tii na makambo oyo etali ye te. Bamosusu babandaki kotinda bato bátomboka mpe básɛnga ete voti esalema mpo bápona badepite oyo bakobanda kozwa bikateli. Bamosusu kutu bamonaki malamu bálongwa wana bákende kofanda na etúká ya Connecticut, mpo bákoba kosala makambo na bango na bonsomi.
O’Toole alobi boye: “Misala ya malamu, bomɛngo mpe demokrasi, nyonso wana ezalaki makambo oyo ba Puritains na etúká ya Massachusetts bazalaki koluka makasi, mpe ezalaki kotinda bango báluka matomba na bango moko na esika ya kolanda makanisi ya Winthrop oyo azalaki kosɛnga bango bálukaka nde matomba ya bato nyonso.” Na mobu 1649, Winthrop akufaki mobola, na mbula 61. Atako mboka yango ya sika oyo ezalaki na likama ya kopanzana epanzanaki lisusu te, Winthrop azalaki lisusu na bomoi te mpo na komona ndenge mposa na ye ekokisamaki.
Bato batiki te koluka mokili ya malamu
John Winthrop kaka te nde azalaki na mposa ya mokili ya malamu. Mbula na mbula, ebele ya bato ya Afrika, ya Azia ya Sudi-Ɛsti, ya Mpoto ya Ɛsti mpe ya Amerika ya Sudi bazali kokende na mikili mosusu mpo na koluka bomoi ya malamu. Mingi kati na bango bazali kozwa likanisi wana na bilaka oyo bato bazali kopesa mbula na mbula na babuku, na baseminɛrɛ mpe na Internet, ete bazali na fungola ya bomɛngo. Emonani mpenza ete bato mingi bazali kokoba koboma nzoto mpo na kozwa mosolo, na elikya ete bakobebisa bizaleli na bango te.
Nzokande, makambo ezali kosalema te ndenge bakanisaki. Mbala mingi, bato oyo balukaka bomɛngo babungisaka bizaleli na bango ya malamu, ntango mosusu ata mpe kondima na bango, mpe bakómaka komipesa epai ya nzambe Mammon to bozwi. Na yango, okoki komituna boye: “Moto akoki kozala moklisto ya solo mpe kozala mozwi? Ekozala na mokili moko ya bato oyo babangaka Nzambe oyo ekotonda na bomɛngo ya mokili mpe ya elimo?” Ndenge lisolo oyo elandi emonisi yango, Biblia ezali kopesa biyano na mituna wana.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Ba Puritains ezali nkombo oyo bapesaki na Baprotesta mosusu ya Lingomba ya Angleterre na ekeke ya 16. Baprotesta yango bazalaki koluka kopɛtola lingomba na bango na makambo nyonso ya mabe ya Lingomba ya Katolike.
[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 3]
Boats: The Complete Encyclopedia of Illustration/J. G. Heck; Winthrop: Brown Brothers