Kómisá komanyola likambo ya esengo
LIKANISI ya komanyola ekoki kobangisa bato mingi. Bakoki komona yango lokola likambo moko ya mpasi, oyo esɛngaka kotya makanisi nyonso. Bato motindo wana bakoki komona lokola bazali na ngambo, mingimingi soki batángi mikanda oyo elobeli ntina ya komanyola. (Bafilipi 4:8) Nzokande, kokanisa na mozindo na makambo oyo toyekoli na ntina na Yehova, bizaleli na ye kitoko, misala na ye ya kokamwa, masɛngami na ye, mpe mokano na ye kitoko, ekoki kozala lolenge eleki malamu ya kolekisa ntango. Mpo na nini?
Yehova Nzambe azali Moyangeli ya molɔngɔ mpe azali kosala nyonso mpo na kokokisa mokano na ye monene. (Yoane 5:17) Atako bongo, atyaka likebi na ye na makambo oyo mosambeli na ye mokomoko akanisaka na motema. Davidi, mokomi ya nzembo, ayebaki likambo yango mpe akomaki na lisalisi ya elimo santu boye: “E [Yehova], osili kotala motema na ngai mpe oyebi ngai solo. Oyebi ntango wana nakofanda mpe wana nakotɛlɛma; oyebi makanisi na ngai longwa na mosika.”—Nzembo 139:1, 2.
Soki moto akebi te, akoki kotalela maloba yango na lolenge ya mabe. Akoki kokanisa ete, ‘Atako Nzambe azali “mosika,” amonaka makanisi nyonso ya mabe oyo eyelaka ngai.’ Ya solo, kokanisa bongo ezali mabe te. Ekoki kosalisa biso tóluka kolonga makanisi ya mabe mpe, ntango tokómi na makanisi motindo wana, tóyebisa yango epai ya Nzambe, na elikya ete akolimbisa biso soki tomonisi kondima na mbeka ya lisiko ya Yesu. (1 Yoane 1:8, 9; 2:1, 2) Epai mosusu, tosengeli kobosana te ete Yehova atalaka nde makambo ya malamu epai ya basambeli na ye. Atyaka likebi ntango tozali komanyola na botɔndi mpenza na ntina na ye.
Okoki komituna boye: “Yehova amonaka mpenza makanisi nyonso ya malamu oyo bamilio ya basambeli na ye bazalaka na yango?” Ezali mpenza bongo. Yesu amonisaki ndenge Yehova atyelaka biso likebi ntango alobaki ete Yehova amonaka ata bakɛngɛli-mboka ya mike, mpe abakisaki boye: “Bino boleki bakɛngɛli-mboka ebele na motuya.” (Luka 12:6, 7) Bakɛngɛli-mboka bakoki te komanyola na ntina na Yehova. Na yango, soki atyelaka bango likebi, na ntembe te atyelaka biso likebi mingi koleka mpe asepelaka na makanisi ya malamu oyo ezali na motema ya mokomoko na biso. Ya solo, lokola Davidi, tokoki kobondela na elikya mpenza boye: “Tiká ete . . . makanisi ya motema na ngai mandimama liboso na yo, E [Yehova], nguya na ngai mpe mosikoli na ngai.”—Nzembo 19:14.
Likambo mosusu oyo emonisaka ete Yehova atyaka mpenza likebi na makambo oyo basambeli na ye ya sembo bamanyolaka ezwami na maloba ya mosakoli Malaki. Na ntina na mikolo na biso, asakolaki boye: “Bongo, baoyo batosaki [Yehova] balobanaki moto na moninga na ye mpe [Yehova azalaki kotya likebi, NW], ɛɛ ayokaki bango. Mpe mokanda ya kokanisa ekomamaki liboso na ye mpo na baoyo bazalaki kotosa [Yehova] mpe [mpo na baoyo bazalaki kokanisa mpo na nkombo na ye, NW].” (Malaki 3:16) Soki tozali kobosana te ete Yehova “atyaka likebi” ntango tozali komanyola mpo na ye, komanyola ekoki kokóma likambo ya esengo mpenza mpo na biso. Na yango, tiká ete tóloba lokola mokomi ya nzembo oyo akomaki ete: “Nakobanzaka mpe mosala na yo nyonso, [nakomanyola] yango nyonso esali yo.”—Nzembo 77:12.