Bayinaki bango, kasi bakómi kolinga bango mingi
ELEKI mwa bambula, Santiago ná mwasi na ye, Lourdes, bakendeki na Huillcapata, engumba moko kitoko ya Pérou, mpo na koteya bato nsango ya Biblia. Kasi, eumelaki te, Sango moko oyo autaki na Cuzco ayanganisaki bato nyonso ya engumba yango. Sango yango akebisaki bango ete lokola Batatoli ya Yehova bayei wana, maladi moko mpe mbula mpɛmbɛ ekoboma bibwɛlɛ mpe bilanga na bango nyonso.
Bato mingi bandimelaki ye, mpe na boumeli ya sanza koleka motoba, moto moko te na engumba yango andimaki koyekola Biblia na Santiago mpe Lourdes. Miguel, guvɛrnɛrɛ ya engumba yango abenganaki Santiago ná Lourdes na balabala mpe abambaki bango mabanga. Kasi, bazalaki ntango nyonso komonisa boboto, mpe bizaleli mosusu ya baklisto.
Na nsima, bato mosusu ya engumba yango bandimaki koyekola Biblia. Ata Miguel abongolaki makanisi na ye. Abandaki koyekola Biblia na Santiago, atikaki milangwa mpe akómaki moto ya kimya. Na nsima, Miguel ná mwasi na ye mpe bana na bango mibale ya basi bandimaki solo ya Biblia.
Lelo oyo, lisangá moko monene ya Batatoli ya Yehova ezali na engumba yango. Miguel azali na esengo mpo mabanga mingi oyo abambaki Santiago ná Lourdes ezwaki bango te, mpe azali na botɔndi epai na bango mpo na ezaleli ya kimya oyo bamonisaki.
[Bililingi na lokasa 32]
Ezaleli ya kimya oyo Santiago mpe Lourdes (na likoló) bamoniselaki Miguel (na lobɔkɔ ya mobali) ebongolaki makanisi na ye