Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w05 15/12 nk. 9-12
  • Bazali “kosakola kosikolama epai ya bakangami”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bazali “kosakola kosikolama epai ya bakangami”
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
  • Mitó ya makambo mike
  • Baombo ya bangi bakómi baklisto
  • Basali-mabe minene babongwani
  • Leta andimi mosala yango
  • Matomba ata libándá ya bolɔkɔ
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
w05 15/12 nk. 9-12

Bazali “kosakola kosikolama epai ya bakangami”

NTANGO Yesu abandaki mosala na ye, alobaki ete asengeli mpe “kosakola kosikolama epai ya bakangami.” (Luka 4:18) Na ndakisa ya Nkolo na bango, baklisto ya solo bazali kosakola nsango malamu ya Bokonzi epai ya “bato ya ndenge nyonso” mpo na kopesa bango bonsomi ya elimo mpe kosalisa bango bábongola bomoi na bango.​—1 Timote 2:4.

Lelo oyo, bazali kosakola mpe epai ya bato oyo bazali mpenza na bolɔkɔ, oyo bakangi bango mpo na makambo ndenge na ndenge ya mabe oyo basalaki mpe bazali kozwa bonsomi ya elimo. Tosɛngi na yo otánga lisolo oyo ezali kolobela mosala ya kosakola ya Batatoli ya Yehova na babolɔkɔ ya Ukraine mpe ya mikili mosusu ya Mpoto.

Baombo ya bangi bakómi baklisto

Serhiia azali na mbula 38; kasi alekisi mbula 20 na bolɔkɔ. Kutu, asilisaki kelasi na bolɔkɔ. Alobi boye: “Eleki sikoyo bambula mingi, bakangaki ngai mpo nabomaki moto, kasi natikali lisusu na bambula mingi ya bolɔkɔ. Na bolɔkɔ nazalaki konyokola bato, mpe bakangami mosusu bazalaki kobanga ngai.” Yango epesaki ye nde bonsomi? Te. Na boumeli ya bambula mingi, Serhii azalaki moombo ya bangi, ya masanga, mpe ya likaya.

Na nsima, moto moko oyo azalaki mpe na bolɔkɔ ateyaki ye solo ya Biblia. Ezalaki lokola mwa pole na kati ya molili. Mwa basanza na nsima, atikaki mimeseno na ye ya mabe, akómaki mosakoli ya nsango malamu mpe azwaki batisimo. Lelo oyo, Serhii azali na mosala mingi na bolɔkɔ mpo azali mobongisi-nzela ya sanza na sanza. Na kati ya bolɔkɔ, asalisi bato nsambo oyo bazalaki basali-mabe bábongola bizaleli na bango mpe bakómi bandeko na ye ya elimo. Bato motoba kati na bango babimaki na bolɔkɔ, kasi Serhii azali kaka kuna. Ayokaka mawa te mpo na yango, mpamba te azali na esengo ya kosalisa bato mosusu básikolama na elimo.​—Misala 20:35.

Moko na bato oyo Serhii ateyaki Biblia na bolɔkɔ ezali Victor, oyo azalaki motɛki mpe momɛli-bangi. Ntango Victor abimaki na bolɔkɔ, akobaki kokola na elimo mpe akɔtaki na Eteyelo mpo na kobongisa basungi na Ukraine. Lelo oyo, azali mobongisi-nzela monene na ekólo Moldavie. Victor alobi boye: “Nabandaki komɛla likaya ntango nazalaki na mbula 8, kolangwa masanga ntango nakómaki na mbula 12, mpe komɛla bangi ntango nakómaki na mbula 14. Nazalaki na mposa ya kotika, kasi nazalaki kokoka te. Na nsima, na 1995, ntango ngai ná mwasi na ngai tozalaki kokanisa tólongwa esika oyo tozalaki kofanda mpo nakabwana na baninga ya mabe, moto moko oyo azalaki na maladi ya motó abomaki mwasi na ngai na mbeli. Bomoi na ngai ebebaki mpenza. Nakómaki komituna: ‘Mwasi na ngai azali wapi? Moto akendaka wapi soki akufi?’ Kasi, nazwaki biyano te. Nakómaki komɛla bangi mingi mpo nabosana mpasi wana. Bakangaki ngai mpo nazalaki kotɛka bangi mpe bakatelaki ngai etumbu ya mbula mitano ya bolɔkɔ. Ntango nazalaki na bolɔko, Serhii asalisaki ngai nazwa biyano na mituna na ngai. Mbala mingi nazalaki komeka kotika bangi, kasi nazalaki kolonga te; nzokande sikoyo na lisalisi ya Biblia natiki yango. Liloba ya Nzambe ezali mpenza na nguya!”​—Baebele 4:12.

Basali-mabe minene babongwani

Vasyl azalaki komɛla bangi te, kasi ye mpe akɔtaki bolɔkɔ. Alobi boye: “Namipesaki mpenza na lisano ya makofi. Nayekolaki ndenge ya kobɛta moto kozanga kozokisa to kotika ye na elembo.” Vasyl azalaki kosalela makasi na ye mpo na kobɔtola bato biloko. “Nakɔtaki bolɔkɔ mbala misato; yango wana, mwasi na ngai abomaki libala. Na mbala ya misato, oyo bakatelaki ngai mbula mitano ya bolɔkɔ, nakómaki kozwa mikanda ya Batatoli ya Yehova. Yango etindaki ngai nabanda kotánga Biblia, kasi nazalaki kaka kolinga bitumba.

“Kasi, nsima ya kotánga Biblia sanza motoba, eloko moko ebongwanaki epai na ngai. Esengo oyo nazalaki koyoka soki nalongi bitumba, nazalaki koyoka yango lisusu te. Yango wana, nabandaki komitalela na kolanda Yisaya 2:4 mpe namonaki ete soki nabongwani te, nakolekisa bomoi na ngai mobimba na bolɔkɔ. Nabwakaki bibundeli na ngai nyonso mpe nakómaki kobongisa bomoto na ngai. Ezalaki pɛtɛɛ te, kasi komanyola mpe libondeli esalisaki ngai natika mokemoke ezaleli na ngai ya mabe. Na bantango mosusu, nazalaki mpenza kobondela Yehova na mai na miso apesa ngai makasi ya kotika ezaleli oyo ekangaki ngai na boombo. Nsukansuka, nalongaki.

“Nsima ya kobima na bolɔkɔ, tozonganaki na mwasi na ngai. Lelo oyo, nasalaka na kompanyi ya kotimola charbon. Mosala yango etikelaka ngai ntango mingi ya kobima na mosala ya kosakola ná mwasi na ngai mpe ya kokokisa mikumba na ngai na lisangá.”

Mykola ná baninga na ye bayibaki mbongo na babanki mingi ya Ukraine. Yango wana, bakatelaki ye etumbu ya mbula zomi ya bolɔkɔ. Liboso bákanga ye, akɔtaki na ndako-nzambe kaka mbala moko​—mpo azalaki koluka ndenge ya koyiba na ndako-nzambe yango. Mykola azwaki libaku ya koyiba te, kasi makambo oyo amonaki kuna etindaki ye akanisa ete Biblia ezali mokanda oyo etondá na masolo ya mpambampamba ya basango ya Lingomba ya Ɔrtɔdɔkse, ya babuji, mpe bafɛti ya mangomba. Alobi boye: “Nakómaki kotánga Biblia; kasi, nayebi mpenza te nini etindaki ngai nabanda kotánga yango. Nakamwaki ntango namonaki ete ezalaki ata moke te na makambo oyo nazalaki kokanisa!” Abandaki koyekola Biblia mpe azwaki batisimo na 1999. Lelo oyo, soki omoni komikitisa oyo mosaleli na misala wana azali na yango, okondima te ete azalaki kala kosimba mondoki mpo na koyiba na banki!

Bakatelaki Vladimir etumbu ya liwa. Ntango azalaki kozela mokolo oyo bakoboma ye, abondelaki Nzambe mpe alakaki Ye ete soki akufi te, akosalela ye. Na ntango yango, mibeko ebongwanaki, na esika báboma ye, asengelaki nde kotikala na bolɔkɔ bomoi na ye mobimba. Mpo na kokokisa elaka na ye, Vladimir abandaki koluka lingomba ya solo. Akómaki kolanda mateya na nzela ya mikanda mpe azwaki diplome ya Lingomba ya Adventiste, kasi mposa na ye ekokisamaki kaka te.

Ntango Vladimir atángaki Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! oyo azwaki na bibliotɛkɛ ya bolɔkɔ, akomelaki biro ya filiale ya Batatoli ya Yehova na Ukraine mpo na kosɛnga ete moto moko akende kotala ye. Ntango bandeko bakendaki kotala ye, bakutaki ye azali komibenga Motatoli mpe azalaki kosakola na bolɔkɔ. Bandeko basalisaki ye akokisa masɛngami mpo na kokóma mosakoli ya Bokonzi. Ntango tozali kokoma lisolo oyo, Vladimir ná basakoli mosusu nsambo oyo bazali na bolɔkɔ yango bazali kozela bázwa batisimo. Kasi, bazali na mokakatano moko. Lokola bakabolá bato oyo bakozala na bolɔkɔ bomoi na bango mobimba na kolanda mangomba na bango, Vladimir ná bato azali na bango esika moko bazali lingomba moko. Na bongo, bateyaka banani? Bateyaka bakɛngɛli mpe bakomaka mikanda oyo batindelaka bato mpo na kopesa litatoli.

Nazar alongwaki Ukraine mpe akendaki kofanda na République tchèque, epai akɔtaki na etuluku ya miyibi. Akɔtaki bolɔkɔ ya mbula misato na ndambo. Ntango azalaki na bolɔkɔ, akómaki koyamba Batatoli ya Yehova oyo bazalaki kouta na engumba Karlovy Vary, ayekolaki solo, mpe abongwanaki. Ntango mokɛngɛli moko ya bolɔkɔ amonaki bongo, alobaki na bato mosusu oyo bazalaka esika moko ná Nazar boye: “Soki bino nyonso bokómi lokola moto ya Ukraine oyo, nakoluka mosala mosusu.” Mokɛngɛli mosusu alobaki boye: “Batatoli ya Yehova bayebi mpenza kobongola bato. Moto oyo azalaki bandi ntango akɔtaki bolɔkɔ, ntango abimi, akómi na bizaleli ya malamu.” Lelo oyo Nazar abimá na bolɔkɔ. Ayekolá mosala ya mabaya, abalá, mpe ye ná mwasi na ye bazali babongisi-nzela ya sanza na sanza. Azalaka na botɔndi mingi ndenge Batatoli ya Yehova bazalaki kokende kotala ye na bolɔkɔ!

Leta andimi mosala yango

Ezali kaka bato ya bolɔkɔ te nde bazali na botɔndi mpo na mosala malamu ya Batatoli ya Yehova. Miroslaw Kowalski, molobeli ya bolɔkɔ moko ya Pologne, alobaki boye: “Tosepelaka mingi ndenge bayaka awa. Bato mosusu ya bolɔkɔ banyokwamaki mingi na bomwana na bango. Ekoki kozala ete basalelá bango makambo lokola bato te. . . . Lisalisi [ya Batatoli] ezali na ntina mingi mpamba te bakɛngɛli mpe bato oyo bakoki kosalisa bato ya bolɔkɔ bazali mingi te.”

Mokonzi ya bolɔkɔ mosusu na Pologne akomelaki biro ya filiale mpo na kosɛnga ete Batatoli bákendaka mingi kotala bato ya bolɔkɔ epai ye asalaka. Mpo na nini? Alobaki boye: “Soki bato ya Watchtower bazali koya kotala bato ya bolɔkɔ mbala na mbala, ekosalisa bango bákóma na bizaleli ya malamu mpe bakobanda kobunda lisusu te na kati ya bolɔkɔ.”

Zulunalo moko ya Ukraine elobelaki moto ya bolɔkɔ moko oyo azalaki konyokwama na makanisi mpe alingaki komiboma, kasi Batatoli ya Yehova basalisaki ye. Elobaki boye: “Lelo oyo, moto yango abandi kobonga mokemoke. Abandi kotosa mibeko ya bolɔkɔ mpe akómi ndakisa malamu mpo na bato mosusu ya bolɔkɔ.”

Matomba ata libándá ya bolɔkɔ

Matomba ya mosala ya Batatoli ya Yehova esukaka kaka na bolɔkɔ te. Ekobaka ata ntango bato oyo bakangamaki babimi na bolɔkɔ. Banda mwa bambula, bandeko basi mibale, Brigitte ná Renate, basalisaka bato oyo babimá na bolɔkɔ. Zulunalo moko ya Allemagne (Main-Echo Aschaffenburg), elobi mpo na bango boye: “Basalisaka bato ya bolɔkɔ sanza misato to mitano nsima ya kobima na bolɔkɔ, balendisaka bango báluka kozala na bomoi oyo ezali na ntina. . . . Leta ayebi bango lokola basali ya bolingo malamu oyo balandelaka etamboli ya bato oyo babimi na bolɔkɔ. . . . Bazali mpe na boyokani malamu na bakonzi ya bolɔkɔ.” Bato mingi bamipesi epai ya Yehova mpe bazwi batisimo mpo bandeko basalisaki bango ndenge wana.

Na nzela ya mateya na bango, Batatoli ya Yehova bazali kosalisa ata bakonzi ya bolɔkɔ. Na ndakisa, Roman azalaki mokonzi ya basoda mpe monganga oyo asalisaka bato oyo bazali konyokwama na makanisi na bolɔkɔ moko ya Ukraine. Ntango Batatoli bakendaki kotala ye na ndako, andimaki koyekola Biblia. Na nsima, ayokaki ete Batatoli bazali na ndingisa te ya kokende kosolola na bato ya bolɔkɔ epai asalaka. Na yango, asɛngaki mokonzi ya bolɔkɔ ndingisa ya kosalelaka Biblia ntango azali kosolola na bato ya bolɔkɔ. Mokonzi andimaki, mpe bato ya bolɔkɔ zomi basepelaki koyekola Biblia. Roman azalaki mbala na mbala kosolola na bato ya bolɔkɔ makambo oyo azalaki koyekola na Biblia, mpe mosala na ye ebotaki mbuma malamu. Bato mosusu ntango babimaki na bolɔkɔ, bakobaki koyekola mpe bakómaki baklisto oyo bazwi batisimo. Ntango Roman amonaki nguya ya Liloba ya Nzambe, amipesaki mpenza na koyekola Biblia. Atikaki mosala ya soda mpe akobaki mosala ya koteya Biblia. Lelo oyo, asakolaka ná moto moko oyo azalaká na bolɔkɔ.

Moto moko ya bolɔkɔ akomaki boye: “Biblia, mikanda oyo elimbolaka Biblia, mpe boyekoli ya Biblia nde esalisaka biso awa.” Maloba yango emonisi ete na babolɔkɔ mosusu, bato mingi bazali na mposa ya mikanda oyo elimbolaka Biblia. Mpo na mosala ya koteya bato Biblia oyo ezali kosalema na babolɔkɔ, bandeko ya lisangá moko na Ukraine bakomi boye: “Bakonzi bazali na botɔndi mingi mpo na mikanda oyo tomemelaka bango. Totindelaka bango bakopi 60 ya nimero nyonso ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe ya Lamuká!” Lisangá mosusu ekomi boye: “Tosakolaka na bolɔkɔ moko oyo ezali na bibliotɛkɛ 20 ya mike. Topesaki mikanda na biso ya minene na mokomoko ya babliotɛkɛ yango. Nyonso wana ezalaki bakartɔ 20 ya mikanda.” Na bolɔkɔ moko, bakɛngɛli batyaka bazulunalo na biso esika moko mpo bato ya bolɔkɔ bázala na likoki ya kotánga nimero nyonso.

Na 2002, filiale ya Ukraine efungolaki biro moko na Betele mpo etalelaka mosala ya kosalisa bato oyo bazali na babolɔkɔ. Lelo oyo, biro yango eyokani na bakonzi ya babolɔkɔ 120 mpe epesi masangá mosusu mokumba ya kosakola na babolɔkɔ yango. Sanza na sanza, biro yango ezwaka nkoma soki 50 oyo bato ya bolɔkɔ batindaka, mingi kati na yango ezalaka mpo na kosɛnga mikanda to kosɛnga ete Batatoli ya Yehova bákende koteya bango Biblia. Biro ya filiale etindelaka bango babuku, bazulunalo, mpe mwa babuku tii ntango basakoli ya masangá ya pembeni bakokende kotala bango.

Ntoma Paulo akomelaki bandeko na ye baklisto boye: “Bókanisaka baoyo bazali na kati ya minyɔlɔlɔ.” (Baebele 13:3) Azalaki kolobela bato oyo bazalaki na bolɔkɔ mpo na kondima na bango. Lelo oyo, Batatoli ya Yehova bazali kokanisa bato oyo bazali na bolɔkɔ, bazali kokende kotala bango, mpe bazali “kosakola kosikolama epai ya bakangami.”​—Luka 4:18.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Topesi bato yango bankombo mosusu.

[Elilingi na lokasa 9]

Bolɔkɔ ya Lviv, na Ukraine

[Elilingi na lokasa 10]

Mykola

[Elilingi na lokasa 10]

Vasyl ná mwasi na ye Iryna

[Elilingi na lokasa 10]

Victor

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto