Yehova akotika yo soki moke te
BAKLISTO ya Yudea bazalaki na botɛmɛli makasi, mpe basengelaki kosala makasi mpo bálanda te elimo ya koluka biloko ya mokili oyo bato mosusu bazalaki na yango. Mpo na kolendisa bango, ntoma Paulo azongelaki makambo oyo Yehova ayebisaki Bayisalaele ntango bakómaki pene ya kokɔta na Mokili ya Ndaka. Paulo akomaki boye: “Nakotika yo soki moke te mpe nakosundola yo ata moke te.” (Baebele 13:5; Deteronome 31:6) Na ntembe te, elaka yango elendisaki baklisto ya Yudea ntango batángaki mokanda na ye.
Elaka yango ekosalisa mpe biso tólonga mitungisi ya “bantango ya ndenge mosusu mpe ya mpasi mpenza” oyo tozali na yango. (2 Timote 3:1) Soki totyeli Yehova motema mpe tomonisi yango na misala, akosunga biso ata na kati ya mikakatano oyo eleki makasi. Mpo na koyeba ndenge oyo Yehova akoki kokokisa eleka yango, tólobela likambo ya kolongwa mosala na mbalakaka.
Ntango olongwe mosala na mbalakaka
Na mokili mobimba, basomɛlɛ bazali se kobakisama. Zulunalo moko ya ekólo Pologne elobi ete kozanga mosala ezali “moko na mikakatano minene na bomoi ya bato.” Likambo yango ezali komonana ata mpe na mikili ya bozwi. Na ndakisa, na mobu 2004, na mikili oyo ezali kati na ebongiseli oyo ebengami Organisation de coopération et de développement économique, basomɛlɛ “balekaki milio 32, motángo oyo eleki ata oyo ezalaki na bambula ya 1930 ntango nkita ya bikólo mingi ebebaki.” Na Pologne, biro oyo etalelaka mituya emonisaki ete bato milio misato bazalaki na mosala te na Desɛmbɛ 2003; motángo yango “elimboli ete bato zomi na mwambe kati na bato monkama (18%) oyo bakoki kosala, bazalaki na mosala te.” Balobaki ete kati na bato moindo ya Afrika ya Sudi, bato koleka 47 kati na bato monkama (47,8%) bazalaki na mosala te na mobu 2002!
Kolongwa mosala na mbalakaka to kozanga mosala ezali makambo oyo ekoki kokómela bato mingi, ata mpe basaleli ya Yehova. “Ntango mpe likambo ekanami te” ekómelaka moto nyonso. (Mosakoli 9:11, NW) Ntango mosusu tokoki koloba lokola Davidi ete: “Mikakatano ya motema na ngai eyei mingi mingi.” (Nzembo 25:17) Okokoka kolonga makambo ya mpasi ndenge wana? Makambo yango ekoki kotungisa yo na makanisi, kolɛmbisa yo na elimo, mpe kobebisa bomoi na yo. Soki olongwe mosala, okoki kosala nini mpo ozongela bomoi ya malamu?
Ndenge ya kolonga kotungisama na makanisi
Janusz Wietrziński, moto moko ya mayele na pisikoloji, alobi ete “kolongwa mosala epesaka mibali mpasi mingi,” mpamba te eyebani ete bango nde basengeli koleisa libota. Moto yango alobi ete kolongwa mosala ekoki kopesa moto “makanisi ya ndenge na ndenge”; akoki kokóma na nkanda mpe komona ete akómi na nsuka. Tata oyo alongwe mosala akoki komona ete azali lisusu na ntina te mpe akobanda “koswana na mwasi ná bana.”
Adam, moklisto moko oyo azali tata ya bana mibale, ayebisi ndenge ayokaki ntango alongwaki mosala: “Nakómaki kosilika mpambampamba; makambo nyonso ezalaki kosilikisa ngai. Ata na butu, nazalaki kolɔta kaka mosala mpe kokanisa ndenge ya koleisa bana ná mwasi na ngai, oyo ye mpe alongwaki na mosala na mbalakaka.” Ntango Ryszard ná Mariola, oyo bazali na mwana moko, balongwaki na mosala oyo bazalaki kobikela, bazalaki na nyongo monene na banki. Mwasi alobi boye: “Nakómaki komitungisa mingi, lisosoli na ngai ezalaki koloba na ngai ete tosalaki libunga ndenge tokɔtaki nyongo wana. Nazalaki ntango nyonso kokanisa ete nyonso wana ezali kaka foti na ngai.” Ntango tokutani na makambo ya ndenge wana, tokoki kokóma nkandankanda, komitungisa, mawamawa mpe makanisi ya mabe ekoki kolata biso. Na yango, ndenge nini tokoki kopekisa makanisi ya mabe?
Biblia epesi toli ya malamu mingi mpo na kobatela makanisi ya malamu. Ntoma Paulo alobaki boye: “Bómitungisa ata na likambo moko te, kasi na makambo nyonso na nzela ya libondeli mpe na lilɔmbɔ elongo na matɔndi tiká ete masɛngi na bino eyebana epai ya Nzambe; mpe kimya ya Nzambe oyo eleki makanisi nyonso ekobatela mitema na bino mpe makoki na bino ya kokanisa na nzela ya Klisto Yesu.” (Bafilipi 4:6, 7) Soki topusani penepene ya Yehova na libondeli tokozwa “kimya ya Nzambe,” elingi koloba kimya ya makanisi oyo euti na kondima epai na ye. Irena, mwasi ya Adam, alobi boye: “Na mabondeli na biso, tozalaki koyebisa Yehova makambo na biso nyonso mpe ndenge oyo tozalaki kokómisa bomoi na biso pɛpɛlɛ. Mobali na ngai, oyo azalaki liboso komitungisa mingi, akómaki komona ete makambo ekobonga.”
Soki olongwe mosala na mbalakaka, ozali na libaku malamu ya kosalela toli oyo Yesu Klisto apesaki na Lisolo Likoló ya Ngomba ete: “Bótika komitungisa mpo na milimo na bino na oyo etali nini bokolya to nini bokomɛla, to mpo na banzoto na bino na oyo etali nini bokolata. . . . Boye, bókoba koluka liboso bokonzi mpe boyengebene na ye, mpe biloko nyonso wana mosusu ekobakisamela bino.” (Matai 6:25, 33) Ntango Ryszard ná Mariola basalelaki toli yango, mitungisi na bango ekitaki. Mariola alobi boye: “Mobali na ngai azalaki ntango nyonso kobɔndisa ngai mpe komonisa ngai ete Yehova akosundola biso te.” Mobali na ye abakisi boye: “Lokola tozalaki kotika te kobondela elongo, topusanaki lisusu penepene ya Nzambe mpe bolingo na biso mibale ekómaki lisusu makasi, mpe yango ebɔndisaki biso mingi.”
Elimo santu ya Nzambe ekoki mpe kosalisa biso. Ekoki kopesa biso komipekisa oyo ekoki kosalisa biso tómibatela mpe tóbatela makanisi ya malamu. (Bagalatia 5:22, 23) Yango ezali likambo ya pɛtɛɛ te; kasi ekoki kosalema mpamba te Yesu alakaki ete ‘Tata na likoló akopesa elimo santu epai ya baoyo bazali kosɛnga ye yango.’—Luka 11:13; 1 Yoane 5:14, 15.
Kobosana bamposa na yo ya elimo te
Kolongwa mosala na mbalakaka ekoki kolɛmbisa ata moklisto oyo azali makasi na elimo, kasi tosengeli te kobosana bamposa na biso ya elimo. Tózwa ndakisa ya Moize ntango azalaki na mbula 40; bomoi na ye mobimba ebongwamaki ntango alongwaki na ndako ya mokonzi na Ezipito mpe akómaki mobateli ya bampate, mosala oyo Baezipito bazalaki kotyola. (Genese 46:34) Moize asengelaki komesana na mbongwana wana. Na boumeli ya mbula 40 oyo elandaki, andimaki Yehova abongisa ye mpo na mikumba oyo asengelaki kopesa ye na nsima. (Exode 2:11-22; Misala 7:29, 30; Baebele 11:24-26) Atako Moize akutanaki na mikakatano, abatelaki makanisi na ye na makambo ya elimo, mpe andimaki ete Yehova apesa ye formasyo. Tótika te ete mikakatano ekitisa motuya oyo topesaka na makambo ya elimo!
Atako kolongwa mosala na mbalakaka epesaka mpasi, ezali mpe libaku malamu ya kosala ete boyokani na biso ná Yehova mpe basaleli na ye ekóma lisusu makasi. Adam, oyo tolobelaki liboso, amonaki yango. Alobi boye: “Ntango balongolaki ngai ná mwasi na mosala, likanisi ya kozangisa makita to ya kokitisa milende na biso na mosala ya kosakola eyelaki biso na makanisi ata mokolo moko te. Yango esalisaki biso tómitungisa koleka ndelo te.” Ryszard mpe akanisi bongo: “Soki makita mpe mosala ya kosakola te, tolingaki kolonga te; mitungisi elingaki koboma biso. Masolo ya makambo ya elimo na bandeko mosusu elendisaka mpenza, mpamba te esalisaka biso tótyela mpe bamposa na bango likebi mpe tóbosana naino oyo ya biso.”—Bafilipi 2:4.
Ya solo, na esika ya komitungisa kaka mpo na mosala, luká kosalela ntango yango mpo na makambo ya elimo, na ndakisa koyekola yo moko, kosala misala mosusu na lisangá mpe kobima mingi na mosala ya kosakola. Na esika ofanda kaka mpamba mpo mosala esili, okozala “ntango nyonso na mingi ya kosala na kati ya mosala ya Nkolo”—yango ekopesa esengo epai na yo mpe epai ya bato oyo bakosepela na nsango ya Bokonzi oyo okomemela bango.—1 Bakolinti 15:58.
Koleisa libota
Bilei ya elimo ekotondisa te libumu oyo ezali na nzala. Tosengeli te kobosana etinda oyo: “Ya solo mpenza soki moto azali kokokisa bamposa ya bato na ye te, mpe mingimingi mpenza ya bato ya ndako na ye, awangani kondima mpe azali mabe koleka moto oyo azangi kondima.” (1 Timote 5:8) Adam alobi boye: “Ata soki bandeko na lisangá bazali kosalisa biso mpo na kokokisa bamposa na biso ya mosuni, lokola tozali baklisto, tosengeli koluka mosala.” Tokoki kotya motema ete Yehova mpe basaleli na ye bakosunga biso, kasi tóbosana te ete tosengeli kosala makasi mpo na kozwa mosala.
Tokoki kosala nini? Adam alobi boye: “Kokanga mabɔkɔ te; kokanisa te ete Nzambe akosala likamwisi. Ntango ozali koluka mosala, kobomba te ete ozali Motatoli ya Yehova. Bapatrɔ basepelaka na yango mingi.” Ryszard apesi toli oyo: “Tuná moto nyonso oyo oyebi soki ayebi esika oyo bazali koluka bato ya mosala, kobá kotala na bisika oyo bakomaka ete bazali kozwa bato na mosala, tángáká mayebisi, na ndakisa bakoki kokoma: ‘Tozali koluka mwasi moko oyo akoki kosalisaka ebɔsɔnɔ to mobange’; to, ‘Mosala ya ntango mokuse.’ Kolɛmba te koluka! Koponapona mosala te, ata soki okutani na mosala moko ya lokumu te to mosala oyo okanisaki te.”
Ya solo, “Yehova azali mosungi na [yo].” ‘Akotika yo soki moke te mpe akosundola yo ata moke te.’ (Baebele 13:5, 6) Kotika te ete mitungisi elekela yo. Davidi, mokomi ya nzembo, akomaki boye: “Tikelá [Yehova] elekelo na yo, zalá na elikya epai na ye mpe ye akosala mosala.” (Nzembo 37:5) ‘Kotikela Yehova elekelo na biso’ elimboli kotyela ye motema mpe kosala makambo oyo ye alingi, ata na ntango tozali na mikakatano.
Mpo na kozwa mwa eloko ya kobikela, Adam ná Irena bakómaki kosukola bafenetre, baesikalye mpe bakómaki kosalela mbongo na mayele. Mbala na mbala bazalaki mpe kotala na bisika oyo bakomaka mayebisi ete bazali kozwa bato na mosala. Irena alobi boye: “Tozalaki kozanga te kozwa mosala na ntango oyo tozalaki mpenza na mposa na yango.” Mobali na ye abakisi boye: “Soki tokanisi makambo oyo eleká, tomonaka ete na bantango mosusu, makambo oyo tozalaki kosɛnga na mabondeli ezalaki koyokana na mokano ya Nzambe te. Yango eteyi biso kotyela bwanya na ye motema mpe kosala te makambo ndenge motema na biso elingi. Eleki malamu mingi kozela na motema ya kokita eyano oyo Nzambe akopesa.”—Yakobo 1:4.
Ryszard ná Mariola bazalaki kozwa mwa misala ya ntango mokuse mpe bazalaki kosakola na bateritware oyo mposa ya basakoli ezalaki mingi. Ryszard alobi boye: “Tozalaki kozwa mosala kaka soki tomoni ete totikali lisusu na biloko ya kolya te. Tozalaki koboya misala oyo bakofuta biso mbongo mingi, kasi ekobebisa mosala na biso ya elimo. Toponaki kotyela Yehova motema.” Bamonaka ete Yehova nde abongisaki makambo mpo bázwa mwa ndako oyo bazalaki kofutela na ntalo moke mpe, nsukansuka Ryszard azwaki mosala.
Kolongwa mosala ekoki kopesa mpasi mpenza, kasi ekoki mpe kopesa yo libaku ya komona ete Yehova akosundola yo ata mokolo moko te. Yehova atyelaka yo likebi. (1 Petelo 5:6, 7) Na nzela ya mosakoli Yisaya alakaki boye: “Yoká nsɔmɔ te mpo ete ngai nazali Nzambe na yo. Nakokembisa yo, nakosunga yo.” (Yisaya 41:10) Kotika nzela te ete makambo oyo okanaki te, na ndakisa kolongwa na mosala elɛmbisa yo nzoto. Salá nyonso oyo okoki kosala, mpe pesá nyonso na mabɔkɔ ya Yehova. Zelá Yehova “na kimya.” (Bileli 3:26) Yehova akosopela yo mapamboli.—Yilimia 17:7.
[Elilingi na lokasa 9]
Salelá ntango yango mpo na makambo ya elimo
[Bililingi na lokasa 10]
Yekolá kosalela mbongo malamu, mpe koponapona te ntango ozali koluka mosala