“Lisalisi na ngai ekouta epai ya Yehova”
Ebele ya bato bazali kondima losambo ya Yehova
BISAKWELI ya Biblia elobaki ete na mikolo na biso bato ya bikólo nyonso bakosangana na losambo ya pɛto ya Yehova. Na ndakisa, na nzela ya mosakoli Hagai, Yehova Nzambe alobaki boye: “Nakoningisa bikólo nyonso, mpe biloko kitoko ya bikólo nyonso esengeli koya; mpe nakotondisa ndako oyo na nkembo.” (Hagai 2:7, NW) Yisaya mpe Mika basakolaki ete na mikolo na biso—“mikolo ya nsuka”—bikólo mpe bato bakosambela Yehova na ndenge oyo ebongi.—Yisaya 2:2-4; Mika 4:1-4.
Bisakweli yango ezali mpenza kokokisama lelo oyo? Tótalela makambo oyo ezali kosalema. Na boumeli ya mbula zomi oyo euti koleka, bato koleka 3 110 000 bamipesaki na Yehova na bikólo koleka 230. Bipai nyonso na mokili, soki tokamati Batatoli ya Yehova zomi, motoba kati na bango bazwaki batisimo na boumeli ya mbula zomi oyo euti koleka. Na mobu 2004, tokoki koloba ete moto moko azalaki kozwa batisimo na nsima ya miniti mibale!a
Lelo oyo, ndenge moko na ekeke ya liboso ‘motángo moko monene ya bato bakómi bandimi mpe babaluki epai ya Nkolo.’ Atako kobakisama ya bato elimbolaka kaka te lipamboli ya Nzambe, nzokande ezali komonisa ete “lobɔkɔ ya Yehova” ezali na basaleli na ye. (Misala 11:21) Nini ezali kobenda bamilio ya bato na losambo ya Yehova? Mpe likambo yango ezali kotinda yo osala nini?
Bato ya motema sembo bazali kobendama
Yesu alobaki na maloba ya polele boye: “Moto moko akoki koya epai na ngai te soki Tata, oyo atindaki ngai, abendi ye te.” (Yoane 6:44) Na yango, ezali Yehova nde abendaka bato oyo bazali “na ezaleli oyo ebongi mpo na bomoi ya seko.” (Misala 13:48) Elimo ya Nzambe ekoki kotinda bato bátyela mposa na bango ya elimo likebi. (Matai 5:3) Lisosoli oyo ezali kotungisama, kozanga elikya to likambo moko ya mpasi oyo moto akutani na yango ekoki kotinda ye aluka kosambela Nzambe mpe na ndenge yango ayekola mokano na ye mpo na bato.—Malako 7:26-30; Luka 19:2-10.
Bato mingi babendamaka na losambo ya Yehova mpo mateya ya Biblia oyo lisangá ya boklisto ezali kopesa esalisaka bango bázwa biyano na mituna oyo etungisaka bango.
Davide, mobali moko na Italie oyo amipesaki na komɛla bangi, azalaki komituna boye: “Soki Nzambe azali, mpo na nini bato bazali konyokwama?” Azalaki mpenza kosepela na makambo ya Nzambe te, yango wana atunaki motuna wana kaka mpo na kotyola. Alobi boye: “Nandimaki te ete nakozwa eyano oyo ebongi mpe oyo ekondimisa ngai. Kasi, Motatoli oyo asololaki na ngai azalaki motema molai mpe azalaki kotánga bavɛrsɛ ya Biblia mpo na kolimbola ngai likambo nyonso. Lisolo wana esimbaki mpenza motema na ngai.” Lelo oyo, Davide abongisá bizaleli na ye mpe azali kosalela Yehova.
Bato mosusu bayaka na lisangá ya Yehova mpo bazali koluka koyeba ntina ya bomoi. Na engumba Zagreb, na ekólo Croatie, mwasi moko oyo azali monganga ya maladi ya motó akendaki kotala moninga na ye monganga oyo ayebani mingi mpo asalisa ye na makambo oyo ezalaki kotungisa ye. Kasi, mwasi yango akamwaki mpenza ndenge monganga yango apesaki ye nimero ya telefone ya biro ya Batatoli ya Yehova na Zagreb, mpe nkombo ya Motatoli ya Yehova moko oyo ayebaki. Alobaki na ye boye: “Nakanisi ete bato wana bakoki kosalisa yo. Mpo soki natindi yo na ndako-nzambe, okokuta kaka bikeko—moto moko te ayebi mateya ya solo kuna. Nandimi te ete na ndako-nzambe bakoki kosalisa yo. Natindaki mpe bato mosusu ya maladi epai ya Batatoli ya Yehova mpe basalisaki bango; nakanisi ete bakosalisa yo mpe.” Batatoli ya Yehova bandimaki kokende kotala mwasi yango mpe babandaki koyekola na ye Biblia. Nsima ya mwa bapɔsɔ, mwasi yango alobaki ete boyebi ya Nzambe mpe ya mokano na ye esalisi ye amona ntina ya bomoi.—Mosakoli 12:13.
Bato mingi bamoni ete kaka mateya ya Biblia nde ekoki kobɔndisa mpenza moto ntango akutani na mpasi. Na Grèce, mwana moko ya mbula 7 autaki likoló ya ndako na eteyelo, akweaki na nse mpe akufaki. Mwa basanza na nsima, Batatoli mibale ya basi bakutanaki na mama ya mwana yango mpe bayebisaki ye elikya ya lisekwa mpo na kobɔndisa ye. (Yoane 5:28, 29) Ntango mwasi yango ayokaki bango, abandaki kolela. Bandeko basi batunaki ye boye: “Soki olingi koyeba Biblia malamu, mokolo nini tokoki kozongela yo?” Mwasi yango ayanolaki ete: “Kaka sikoyo.” Amemaki bango na ndako na ye, mpe babandaki koyekola Biblia. Lelo oyo, mwasi yango ná libota na ye mobimba bazali kosalela Yehova.
Yo mpe ozali kopesa mabɔkɔ?
Masolo yango ezali bandakisa ya makambo oyo ezali kosalema na mokili mobimba. Yehova azali koyanganisa mpe koteya ebele ya bato oyo bauti na bikólo ndenge na ndenge mpo bázala basambeli ya solo. Ebele ya bato yango bazali na elikya kitoko ya kobika na nsuka ya ebongiseli ya makambo mabe ya mokili oyo mpe kokɔta na mokili ya sika ya boyengebene.—2 Petelo 3:13.
Etikali moke, basaleli ya Yehova bakosilisa mosala monene wana ya koyanganisa bato na ndenge oyo esalemá naino te mpamba te Yehova azali kopambola bango. (Yisaya 55:10, 11; Matai 24:3, 14) Yo mpe ozali kosala na molende mosala yango ya kosakola Bokonzi? Soki ozali kosala yango, zalá na elikya ete Nzambe akosunga yo mpe okoki koloba lokola mokomi ya nzembo ete: “Lisalisi na ngai ekouta epai ya Yehova.”—Nzembo 121:2, NW.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Talá Calendrier des Témoins de Jéhovah 2005, Sɛtɛmbɛ/Ɔkɔtɔbɛ.
[Maloba na katikati ya lokasa 9]
“Moto moko akoki koya epai na ngai te soki Tata, oyo atindaki ngai, abendi ye te.”—YOANE 6:44
[Etanda na lokasa 8]
NANI AZALI KOKOLISA?
“Soki ezali [Yehova] te oyo akotongaka ndako, basali bakosala wana bobele mpamba.”—Nzembo 127:1.
“Nzambe azalaki kokolisa; na boye ete moto oyo azali kolona azali eloko te ndenge moko mpe oyo azali komwangisa mai, kasi kaka Nzambe moto azali kokolisa.”—1 Bakolinti 3:6, 7.