Philon d’Alexandrie asangisaki mateya ya Biblia ná makanisi ya bato
NA MOBU 332 liboso ya ntango na biso (L.T.B.), Alesandala Monene ná basoda na ye bakɔtaki na Ezipito. Liboso abanda kobundisa bikólo oyo ezalaki na ngámbo ya ɛsti mpo na kobɔtɔla bamboka, atongaki engumba Alexandrie. Yango ekómaki esika monene ya mateya mpe mimeseno ya Bagrɛki. Na mobu soki 20 L.T.B., elombe mosusu abotamaki na engumba yango; bibundeli na ye ezalaki mipanga mpe makonga te, kasi mateya ya filozofi. Moto yango ayebani na nkombo ya Philon d’Alexandrie, to Philon le Juif, mpo baboti na ye bazalaki Bayuda.
Ntango Yelusaleme ebomamaki na mobu 607 L.T.B., Bayuda bapalanganaki mpe mingi kati na bango bakómaki kofanda na Ezipito. Mingi bazalaki kofanda na engumba Alexandrie. Kasi, Bayuda ná Bagrɛki ya engumba yango bazalaki koyokana te. Bayuda bazalaki kolinga te kosambela banzambe ya Bagrɛki; Bagrɛki mpe na ngámbo na bango bazalaki kotyola Makomami ya Liebele. Lokola Philon atángaki na biteyelo ya Bagrɛki mpe akolaki na mimeseno ya Bayuda, ayebaki bantembe yango malamu. Philon azalaki kondima ete losambo ya Bayuda nde losambo ya solo. Kasi, na bokeseni na Bayuda mosusu, ye alukaki ndenge malamu oyo akoki komema bato oyo bazali Bayuda te básambela Nzambe. Alingaki ete bato yango básepela na losambo ya Bayuda.
Ndenge ya sika ya kolimbola makomi ya kala
Philon azalaki koloba mingimingi monɔkɔ ya Grɛki lokola Bayuda mingi oyo bazalaki kofanda na Alexandrie. Na bongo, azalaki koyekola Makomami ya Liebele na libongoli ya Septante, oyo ezali na monɔkɔ ya Grɛki. Ntango azalaki kotánga libongoli ya Septante, amonaki ete ezalaki na makambo ya filozofi mpe ete Moize azalaki “filozofe ya mayele mingi.”
Bankama ya bambula liboso, bato ya mayele ya Bagrɛki bakómaki kokakatana mpo na kondima banzambe ná banzambe-basi oyo bazalaki bingambe to mpe bilima oyo masapo ya Bagrɛki ezalaki kolobela. Bakómaki kopesa masapo wana ya kala ndimbola mosusu. James Drummond, moto ya mayele na masolo ya kala ya Baloma ná Bagrɛki, alobaki boye mpo na mayele na bango: “Bafilozofe bakómaki koluka bandimbola oyo ebombami na masapo yango, mpe koluka bandimbola ya solosolo oyo ekoki kofungola mayele ya moto na maloba oyo ekokaki komonana lokola maloba ya mpambampamba.” Philon mpe alukaki kosalela mayele wana mpo na kolimbola makambo oyo ezali na Makomami ya Liebele.
Na ndakisa, tótala makambo ezali na Genese 3:22 na libongoli ya Septante ya Bagster, oyo elobi boye: “Nkolo Nzambe asalelaki Adama ná mwasi na ye bilamba ya mposo, mpe alatisaki bango yango.” Mpo na Bagrɛki, kosala bilamba ezali mosala oyo Nzambe oyo Aleki-Likoló akoki kosala te. Yango wana, Philon amonaki ete maloba wana ezali na ndimbola mosusu mpe alobaki boye: “Bilamba ya mposo ya nyama ezali elilingi ya mposo ya nzoto, elingi koloba, nzoto na biso; mpamba te Nzambe, ntango asalaki naino mayele, abengaki yango Adama; na nsima, asalaki eloko mosusu oyo abengaki Bomoi. Na nsima, amonaki mpe malamu asala nzoto, mpe abengaki yango na maloba ya elilingi, elamba ya mposo.” Na bongo, Philon asalelaki mayele ya filozofi mpo na kolimbola likambo oyo Nzambe asalaki ya kopesa Adama ná Eva bilamba.
Tótalela lisusu Genese 2:10-14, oyo elobeli mingala oyo ezalaki na elanga ya Edene mpe elobi ete ekabwanaki na mitó minei oyo ebimaki na elanga. Philon alukaki ndimbola mosusu oyo maloba yango ebombi. Nsima ya kolobela elanga yango moko, alobaki boye: “Ekoki kozala ete maloba ya vɛrsɛ yango ebombi ndimbola mosusu; mpamba te bibale yango minei ezali komonisa bizaleli minei ya malamu mingi.” Alobaki ete Ebale Pisoni ezali elilingi ya bokɛngi, Ebale Gihona ezali elilingi ya bokatikati, Ebale Hidekele (Tigre) ezali elilingi ya mpiko, mpe Ebale Pelata ezali elilingi ya bosembo. Na bongo, ndimbola yango ezali kopesa likanisi ete ezalaki mpenza bibale te oyo ezalaki kotyola na mokili.
Philon asalelaki mayele yango mpo na koyekola lisolo ya bozalisi, lisolo ya Kaina oyo abomaki Abele, lisolo ya Mpela ya mikolo ya Noa, ndenge Nzambe abulunganisaki minɔkɔ ya bato na Babele, mpe mitinda mingi ya Mibeko ya Moize. Ndenge ndakisa ya paragrafe eleki emonisi yango, mbala mingi Philon azalaki naino kondima likanisi oyo emonisami na maloba ya vɛrsɛ ya Biblia mpe na nsima, azalaki koluka ndimbola ebombami na kosalela maloba lokola oyo: “Mbala mosusu tosengeli kotalela malamu makambo oyo ekomami mpo na koyeba ndimbola mosusu oyo ebombami.” Na mikanda ya Philon, bandimbola oyo ebombami ezali kozwa esika ya liboso, nzokande ndimbola ya Makomami emonanaka mpenza te.
Nzambe azali nani?
Philon asalelaki elilingi moko ya makasi mpo na komonisa ete Nzambe azali. Nsima ya kolobela mokili, bibale, baplanɛti, mpe minzoto, asukisaki boye: “Mokili ezali mosala oyo esalemá na mayele mpe ntɔki koleka misala mosusu nyonso, emonanaka ete ebongisamaki na moto oyo ayebaki makambo mpe azalaki na boyebi oyo eleki nyonso. Ezali na ndenge yango nde tozwi likanisi ete Nzambe azali.” Makanisi na ye ezalaki malamu mpenza.—Baloma 1:20.
Kasi, Philon atikaki solo mosika mpenza ntango alimbolaki ndenge Nzambe Mozwi-na-Nguya-Nyonso azali. Philon alobaki ete Nzambe “azali na bizaleli te oyo emonanaka” mpe ete Nzambe “akoki koyebana te.” Philon alendisaki bato te na koyeba Nzambe mpe alobaki ete “koluka koyeba makambo mingi mpo na Nzambe, koluka koyekola bomoto to bizaleli na ye ezali mosala ya mpunda.” Makanisi yango eutaki na Biblia te, kasi eutaki nde epai ya filozofe Platon.
Philon alobaki ete bato bakoki koyeba Nzambe te, yango wana bakoki mpe te kobenga ye na nkombo. Alobaki boye: “Yango wana, ezalaki mpenza likambo elongobani ete bákoka te kopesa Nzambe ya bomoi nkombo.” Amikosaki mpenza!
Biblia emonisi polele ete Nzambe azali na nkombo. Nzembo 83:18 elobi boye: “Yo oyo azali na nkombo [Yehova] Oyo-Aleki likoló na mokili mobimba.” Na Yisaya 42:8, Nzambe ye moko alobi boye: “Ngai nazali [Yehova], yango nkombo na ngai.” Mpo na nini Philon, Moyuda oyo ayebaki bavɛrsɛ yango, alobaki ete Nzambe azali na nkombo te? Mpo azalaki te kokanisa Nzambe oyo Biblia elobeli, kasi nzambe oyo azangi nkombo mpe oyo bato bakoki koyeba te, oyo bafilozofe ya Bagrɛki bazalaki kolobela.
Molimo ezali nini?
Philon ateyaki ete molimo ezali eloko mosusu, nzoto mpe eloko mosusu. Alobaki ete moto “azali na nzoto mpe na molimo.” Molimo ekoki nde kokufa? Yoká makanisi ya Philon: “Ntango tozali na bomoi, molimo na biso ezalaka ekufá mpe nzoto na biso ezalaka lokola lilita epai bakundi yango. Kasi, soki [nzoto] ekufi, molimo ekómaka na bomoi na yango, ekabwanaka na nzoto ya mabe mpe oyo ekufá oyo ekangaki yango.” Mpo na Philon, koloba ete molimo ekufi ezali maloba ya elilingi. Molimo ekufaka na ndenge ya solo te; kutu, ekoki kokufa te.
Kasi, Biblia eteyi nini? Genese 2:7 elobi boye: “[Yehova] Nzambe asalaki moto na mputulu ya mokili, mpe apemaki kati na zolo na ye mpema ya bomoi, mpe moto akómaki molimo ya bomoi.” Biblia elobi te ete bato bazali na milimo; elobi nde ete bato bazali milimo.
Biblia elobi mpe ete molimo ekufaka. Ezekiele 18:4 elobi boye: “Molimo oyo asali lisumu, ye akokufa.” Nsima ya kotánga vɛrsɛ yango, tokoki koloba boye: Moto azali molimo. Yango wana, ntango moto akufi, molimo ekufi.—Genese 19:19.a
Nsima ya liwa ya Philon, Bayuda babosanaki mpenza makambo oyo ateyaki. Nzokande, mangomba ya boklisto balandaki yango. Eusèbe mpe bakonzi mosusu ya lingomba balobaki ete Philon akómaki moklisto. Jérôme atángaki Philon na kati ya Batata ya Lingomba. Ezali mangomba ya baklisto oyo bapɛngwaki nde babatelaki mikanda ya Philon, kasi Bayuda te.
Mikanda ya Philon ekɔtisaki mbongwana monene na mateya ya mangomba ya boklisto. Makanisi na ye ememaki baklisto ya nkombo mpamba na kondima liteya oyo euti na Biblia te oyo elobaka ete molimo ekufaka te. Lisusu, mateya ya Philon mpo na Logos (to, Liloba) ebongisaki nzela mpo na kokɔtisa liteya ya Bosato, liteya euti na Biblia te oyo mangomba ya boklisto oyo epɛngwi eteyaka.
Bókosama te
Na boyekoli na ye ya Makomami ya Liebele, Philon asalaki makasi “abosana ndimbola moko te oyo mbala mosusu ebombami na maloba oyo ezali polele.” Nzokande, ndenge Deteronome 4:2 ezali komonisa yango, Moize alobaki boye mpo na Mibeko ya Nzambe: “Bokobakisa eloko te na monɔkɔ oyo elakeli ngai bino, mpe bokolongola eloko na yango te, ete bótosa malako ya [Yehova] Nzambe na bino, oyo elakeli ngai bino.” Atako ekoki komonana ete Philon azalaki na makanisi ya malamu, akɔtisaki makanisi ya bato oyo, lokola londende, ezipaki mateya ya solo ya Liloba ya Nzambe.
Ntoma Petelo alobaki boye: “Ezalaki te na kolandáká masapo ya lokuta oyo esalemi na ndenge ya mayele nde tolakisaki bino nguya mpe kozala ya Nkolo na biso Yesu Klisto.” (2 Petelo 1:16) Mikanda ya Philon ekeseni mosika na malako oyo ntoma Petelo akomelaki baklisto ya ekeke ya liboso, mpamba te malako yango eutaki na makambo ya solo mpe elimo ya Nzambe, “elimo ya solo,” oyo ezalaki kokamba bango na kati ya solo nyonso nde etindaki ye akoma yango.—Yoane 16:13.
Soki olingaka mpenza kosambela Nzambe oyo Biblia ezali koteya, ozali na mposa bálakisa yo nzela ya solo, kasi te bandimbola oyo euti na makanisi ya bato. Osengeli kozwa boyebi ya sikisiki ya Yehova mpe ya mokano na ye, mpe osengeli kozala na komikitisa mpo na kozala moyekoli ya sembo. Soki ondimi koyekola Biblia na makanisi ya malamu ndenge wana, okoyeba “makomi mosantu, oyo ezali na likoki ya kokómisa yo moto ya bwanya mpo na lobiko na nzela ya kondima na bokangami na Klisto Yesu.” Na ndenge yango, okomona ete Liloba ya Nzambe ekoki kokómisa yo “moto oyo akoki mpenza, oyo azali na nyonso esengeli mpo na mosala nyonso ya malamu.”—2 Timote 3:15-17.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Na ntina na molimo, buku moko (The Jewish Encyclopedia, ebimeli ya 1910) elobi boye: “Liteya oyo elobaka ete molimo etikalaka na bomoi ntango nzoto epɔli euti na makanisi ya bafilozofe to na makanisi ya bakonzi ya mangomba kasi te na kondima ya solo; yango wana, Makomami Mosantu emonisi likanisi yango ata na esika moko te.”
[Etanda/Elilingi na lokasa 10]
ENGUMBA YA PHILON
Philon azalaki kofanda na Alexandrie, na Ezipito, mpe akomaki mikanda na ye kuna. Na boumeli ya bankama ya bambula, bato mingi oyo bazalaki kokoma mikanda mpe bato ya mayele bazalaki kokutana na engumba yango.
Bana-kelasi bazalaki koyekola epai ya bato ya mayele oyo bayebanaki oyo bazalaki koteya na biteyelo ya engumba yango. Bibliotɛkɛ oyo ezalaki na Alexandrie ekendaki nsango na mokili mobimba. Ndako yango ekómaki na bankóto na bankóto ya mikanda mpamba te bakambi na yango bazalaki koluka kopi ya mokanda nyonso mpo bátya yango kuna.
Na nsima, lokumu ya Alexandrie, engumba oyo ezalaki na ebele ya mikanda mpe bato mingi ya mayele, ekómaki kokita mokemoke. Baamperɛrɛ ya Loma bazalaki kopesa lokumu mingi na engumba na bango, mpe engumba ya bato ya mayele mpe ya ntɔki ekómaki na Mpoto. Lokumu ya Alexandrie esilaki mpenza na ekeke ya nsambo T.B. ntango bapunzi bakɔtaki na engumba yango. Lelo oyo, bato ya mayele bayokaka mawa ndenge bibliotɛkɛ ya engumba wana elimwá; bamosusu kutu bazali koloba ete na ndenge babebisá engumba wana, mokili ezongá nsima mbula nkóto.
[Eutelo ya bafɔtɔ]
L. Chapons/Illustrirte Familien-Bibel nach der deutschen Uebersetzung Dr. Martin Luthers
[Etanda na lokasa 12]
KOLUKA NDIMBOLA OYO EBOMBAMI NA MALOBA LELO OYO
Bato basalelaka mingi masapo to masese mpo na kolobela makambo ya bomoi. Masapo ezalaka na maloba ya elilingi oyo ebombaka bandimbola ya ntina mingi. Lokola Philon d’Alexandrie, bateyi mosusu ya mikolo na biso bazali komonisa ete maloba ya Biblia ezali nde masapo mpe bazali koluka bandimbola oyo ebombami na maloba yango.
Tózwa ndakisa ya Genese mokapo 1 tii 11, oyo elobeli lisolo ya bato banda na bozalisi tii ntango bato bapalanganaki na mokili mobimba ntango bazalaki kotonga ndako molai ya Babele. Libongoli moko ya Katolike (The New American Bible) elobi mpo na mikapo yango boye: “Mpo Bayisalaele bákanga ntina ya maloba ya solo oyo ezali na mikapo yango, basalelaki makambo oyo bato bayebaki malamu na ntango wana mpo bábosana yango te. Yango wana, tosengeli kokesenisa makambo ya solo na maloba mosusu oyo basaleli mpo na kolobela yango.” Yango elingi koloba ete tosengeli te kokanga ntina ya Genese mokapo 1 tii 11 ndenge kaka ekomami. Kasi, ndenge kaka elamba ezipaka nzoto, maloba wana ebombi ndimbola mosusu.
Nzokande, Yesu ateyaki ete maloba ya mikapo wana ya ebandeli ya Genese ebombi ndimbola mosusu te. (Matai 19:4-6; 24:37-39) Ntoma Paulo ná ntoma Petelo mpe balobaki ndenge yango. (Misala 17:24-26; 2 Petelo 2:5; 3:6, 7) Bayekoli ya solo ya Biblia balandaka te bandimbola oyo eyokani te na makanisi mosusu ya Liloba ya Nzambe.
[Elilingi na lokasa 9]
Ndako molai oyo ezalaki na mwinda ya makasi na Alexandrie
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Archives Charmet/Bridgeman Art Library