Osololaka na bato ya libota na yo?
ZULUNALO moko ya ekólo Pologne (Polityka) elobaki boye: “Tokómi mpenza kobungisa momeseno ya kosolola na bato ya libota na biso.” Na États-Unis, balapolo ezali komonisa ete balongani balekisaka kaka miniti motoba na mokolo mpo na kosolola masolo ya ntina. Bato mosusu ya mayele bazali kokanisa ete soki totali na kati ya mabala zomi oyo ezali kokabwana to kokufa, mitano ezali kokabwana to kokufa mpo balongani bazalaki kosolola te.
Ezali boni mpo na masolo ya baboti ná bana? Zulunalo yango emonisi ete mbala mingi, “ezalaka masolo te, kasi nde mituna: Kelasi eleki malamu? Boni baninga na yo?” Mpe etuni boye: “Ndenge nini bana na biso bakoki koyekola kozala baninga ya bato mosusu?”
Lokola moto abotamaka te na likoki ya koyeba ndenge ya kosolola na basusu, ndenge nini tokoki kokolisa makoki na biso ya kosolola? Moyekoli Yakobo apesaki toli oyo ya ntina mingi: “Moto nyonso asengeli koyokaka noki, kowelaka koloba te, koyokaka nkanda noki te.” (Yakobo 1:19) Ya solo, mpo na kosololaka malamu na basusu, tosengeli koyoka bango na likebi mpe kozala motema molai mpo na kokata te moto oyo azali koloba to kokanisa mbala moko ete toyebi likanisi na ye. Tózalaka te na ezaleli ya kosambisa, mpamba te yango ekoki kobebisa lisolo. Lisusu, ntango Yesu azalaki kotuna mituna, ezalaki te mpo na kosambisa bato, kasi ezalaki nde mpo na koyeba oyo ezalaki na mitema ya bato oyo bazalaki koyoka ye mpe kokolisa boyokani kati na bango.—Masese 20:5; Matai 16:13-17; 17:24-27.
Salelá mitinda malamu mingi oyo ezali na Biblia mpe lukaká kosolola na bato ya libota na yo. Yango ekoki kosala ete bózala na boyokani malamu oyo ekoumela bambula, ata mpe bomoi mobimba.