Mituna ya batángi
Ntango bayekoli bayokaki ete Petelo atɛlɛmi liboso ya porte, mpo na nini balobaki ete: “Ezali anzelu na ye”?—Misala 12:15.
Mbala mosusu bayekoli bamikosaki na kokanisa ete anzelu ya Petelo nde atɛlɛmaki na porte. Tótalela na libaku nini bantoma balobaki bongo.
Elode, oyo abomaki Yakobo, akangaki mpe Petelo. Yango wana, bayekoli basengelaki mpenza kokanisa ete mbala mosusu abomi mpe Petelo. Petelo akangamaki na minyɔlɔlɔ mpe bikipi minei ya basoda mineiminei bazalaki kosala ngala ya kokɛngɛla ye. Kasi, mokolo moko na butu, anzelu moko akangolaki ye mpe abimisaki ye na bolɔkɔ na ndenge ya likamwisi. Ntango Petelo asosolaki likambo oyo esalemaki, alobaki boye: “Sikoyo nayebi mpenza ete Yehova atindaki anzelu na ye mpe asikoli ngai na lobɔkɔ ya Elode.”—Misala 12:1-11.
Petelo akendaki nokinoki na ndako ya Malia, mama na Yoane Malako, epai bayekoli ebele bayanganaki. Ntango abɛtaki kɔkɔkɔ na ekuke, mwana mwasi moko ya mosala nkombo na ye Loda akendaki kotala. Ntango ayokaki mongongo ya Petelo, azongaki mbangu koyebisa basusu, kozanga kutu akɔtisa ye ata kokɔtisa. Na ebandeli, bayekoli bakokaki kondima te ete Petelo nde atɛlɛmaki na porte. Kasi, na libunga mpenza balobaki ete: “Ezali anzelu na ye.”—Misala 12:12-15.
Bayekoli bakanisaki nde ete Petelo asili kokufa mpe elimo na ye nde etɛlɛmi na ekuke? Bayekoli ya Yesu bakokaki kokanisa bongo te, mpo bayebaki malamu oyo Makomami elobi na ntina na bakufi, ete “bayebi likambo te.” (Mosakoli 9:5, 10) Kasi, bayekoli balingaki mpenza koloba nini ntango balobaki ete: “Ezali anzelu na ye”?
Bayekoli ya Yesu bayebaki ete, banda kala baanzelu bazalaki kosunga basaleli ya Nzambe. Na ndakisa, Yakobo alobaki ete: “Mwanze oyo asikoli ngai na mabe nyonso.” (Genese 48:16) Yesu abendaki likebi ya bayekoli na ye epai ya mwana moko oyo azalaki na kati na bango mpe alobaki na bango boye: “Bókeba ete bótyola te moko ya bana mike oyo; mpo nazali koyebisa bino ete baanzelu na bango na likoló bazali ntango nyonso kotala elongi ya Tata na ngai oyo azali na likoló.”—Matai 18:10.
Likambo ezali kobenda likebi ezali ete Biblia moko (Young’s Literal Translation of the Holy Bible) ebongoli liloba aggélos (“anzelu”) na “momemi-nsango.” Emonani ete Bayuda bazalaki kokanisa ete mosaleli mokomoko ya Nzambe azalaka na anzelu na ye, elingi koloba “anzelu-mobateli.” Nzokande, likanisi yango eteyami te na Liloba ya Nzambe. Na yango, ekoki kozala ete ntango bayekoli balobaki ete “ezali anzelu na ye,” bazalaki kokanisa ete anzelu ya Petelo nde atɛlɛmaki na porte.