Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w05 1/6 nk. 9-14
  • Yehova abatelaka bato oyo batyelaka ye elikya

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Yehova abatelaka bato oyo batyelaka ye elikya
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Babatelami na elimo
  • Motema-boboto mpe bosembo ezali kobatela bango
  • Babatelami na likoki ya kokanisa, na bososoli mpe na bwanya
  • Mabe ya kolukaka kaka matomba na biso moko
  • Kolinga Liloba ya Nzambe epesaka matomba
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
  • Yehova abatelaka biso mpo na lobiko
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
  • Batelá motema na yo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • Ndenge nini okoki kobatela motema na yo?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2019
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
w05 1/6 nk. 9-14

Yehova abatelaka bato oyo batyelaka ye elikya

“Tiká ete [motema-boboto, NW] na yo mpe sembo na yo ebatela ngai libela.”​—NZEMBO 40:11.

1. Mokonzi Davidi asɛngaki Yehova nini, mpe ndenge nini lelo oyo Yehova azali kokokisa likambo oyo asɛngaki?

DAVIDI, Mokonzi ya Yisalaele ya kala, ‘atyaki elikya na ye epai ya Yehova’ mpe alobaki ete Yehova ‘abongwanaki epai na ye mpe ayokaki kolela na ye.’ (Nzembo 40:1) Amonaki mbala na mbala ndenge Yehova abatelaki bato oyo balingaki ye. Yango wana, Davidi asɛngaki ete Yehova abatelaka ye ntango nyonso. (Nzembo 40:11) Lokola Davidi azali na kati ya mibali mpe basi ya sembo oyo Yehova alaki bango “lisekwa oyo eleki malamu,” Yehova abombá ye na makanisi na ye na molɔngɔ ya bato oyo akopesa mbano yango. (Baebele 11:32-35) Na yango, ata ndenge nini, Davidi akozala na bomoi na mikolo ezali koya. Nkombo na ye ekomamá na “mokanda ya kokanisa” ya Yehova.​—Malaki 3:16.

2. Ndenge nini Biblia ezali kosalisa biso toyeba soki kobatelama na Yehova elimboli nini?

2 Bato ya sembo oyo balobeli na Baebele mokapo 11 bazalaki na bomoi liboso Yesu Klisto aya awa na mabelé. Atako bongo, batambwisaki bomoi na bango na boyokani ya maloba ya Yesu oyo: “Moto oyo alingi molimo na ye azali kobebisa yango, kasi moto oyo ayini molimo na ye na mokili oyo akobatela yango mpo na bomoi ya seko.” (Yoane 12:25) Kasi, yango elingi koloba te ete soki moto azali kobatelama na Yehova akoki lisusu koyoka mpasi to konyokwama te. Yango elimboli nde kobatelama na elimo, mpo na kozala ntango nyonso na boyokani malamu na Nzambe.

3. Nini emonisi ete Yehova abatelaki Klisto Yesu, mpe yango ebimisi matomba nini?

3 Yesu ye moko mpe anyokwamaki makasi, atyolamaki, mpe nsukansuka banguna na ye babomaki ye na ndenge moko ya nsɔni. Kasi, yango emonisi te ete Nzambe akokisaki te elaka na ye ya kobatela Masiya. (Yisaya 42:1-6) Ntango Yesu asekwaki mikolo misato nsima ya liwa ya nsɔni oyo akufaki, yango emonisaki ete Yehova ayokaki kolela na ye, ndenge kaka ayokaki kolela ya Davidi. Mpe apesaki Yesu makasi ya kotikala sembo. (Matai 26:39) Lokola Nzambe abatelaki Yesu, yango esalaki ete azwa bomoi oyo ezangi kufa na likoló, mpe bamilio ya bato oyo bamonisi kondima na lisiko bazali na elikya ya bomoi ya seko.

4. Elikya nini bapesi baklisto bapakolami mpe “bampate mosusu”?

4 Tosengeli mpenza kozala na elikya ete Yehova azali na mposa mpe na makoki ya kobatela basaleli na ye lelo oyo, kaka ndenge asalaki na ntango ya Davidi mpe na ntango ya Yesu. (Yakobo 1:17) Baklisto bapakolami, bandeko ya Yesu, oyo bazali naino awa na mabelé bakoki kotyela elaka ya Yehova motema: “Libula oyo ekoki kopɔla te mpe oyo ezangi mbindo mpe oyo enzulukaka te . . . ebombami na likoló mpo na bino, baoyo bozali kobatelama na nguya ya Nzambe na nzela ya kondima mpo na lobiko oyo elingi emonisama na eleko ya ntango ya nsuka.” (1 Petelo 1:4, 5) “Bampate mosusu,” oyo bazali na elikya ya kozala na bomoi awa na mabelé, bakoki mpe kotya motema epai ya Nzambe mpe na elaka na ye oyo apesaki na nzela ya mokomi na Nzembo: “Bólinga [Yehova], bino bayengebene nyonso na ye, [Yehova] akobatelaka bayengebene.”​—Yoane 10:16; Nzembo 31:23.

Babatelami na elimo

5, 6. (a) Ndenge nini basaleli ya Nzambe bazali kobatelama na mikolo na biso? (b) Bapakolami bazali na boninga ya ndenge nini na Yehova, mpe ezali boni mpo na baoyo bazali na elikya ya kozala na bomoi awa na mabelé?

5 Na mikolo na biso, Yehova azwi bibongiseli mpo na kobatela basaleli na ye na elimo. Atako abatelaka bango te na minyoko to na mikakatano mpe makambo mosusu ya bomoi oyo ekómelaka bato nyonso, apesaka bango lisalisi mpe bilendiseli oyo basengeli na yango mpo bázala ntango nyonso na boyokani na ye. Bazali na boyokani ya ndenge wana na Nzambe mpo bazali na kondima mpo na mbeka oyo Nzambe apesá na bolingo nyonso mpo na kosikola bato. Baklisto mosusu ya sembo bapakolamaki na elimo ya Nzambe mpo na kokóma bakonzi elongo na Klisto kuna na likoló. Batángamaki bayengebeni mpe bakómaki bana ya Nzambe ya elimo, mpe maloba oyo ezali kokokisama mpo na bango: “Asikoli biso uta na nguya ya molili mpe akɔtisi biso na kati ya bokonzi ya Mwana ya bolingo na ye, oyo mpo na ye tosikolami na nzela ya lisiko, kolimbisama ya masumu na biso.”​—Bakolose 1:13, 14.

6 Bamilio ya baklisto mosusu ya sembo bazali na elikya ete bango mpe bakoki kozwa litomba na lisiko oyo Nzambe apesaki. Totángaka boye: “Mwana ya moto . . . ayaki, mpo básalela ye te, kasi mpo na kosalela mpe kopesa molimo na ye lisiko na esika ya bato mingi.” (Malako 10:45) Baklisto yango bazali kozela na motema likoló ntango oyo bakozwa “bonsomi ya bana ya Nzambe oyo etondi na nkembo.” (Baloma 8:21) Liboso na yango, bazali kobatela boninga na bango na Nzambe mpe bazali kosala makasi mpenza mpo na kokolisa boninga yango.

7.Ndenge nini Yehova abatelaka elimo ya basaleli na ye lelo oyo?

7 Lolenge moko oyo Yehova abatelaka basaleli na ye na elimo ezali ndenge apesaka bango mateya ntango nyonso. Mateya yango nde esalisaka bango bákóma na boyebi ya sikisiki ya solo. Yehova atambwisaka mpe bango ntango nyonso na nzela ya Liloba na ye, ya ebongiseli na ye mpe ya elimo santu na ye. Na litambwisi ya “moombo ya sembo mpe ya mayele,” basaleli ya Nzambe na mokili mobimba bazali lokola libota moko. Moombo ya sembo azali kokokisa bamposa ya elimo, ata mpe ya mosuni ya basaleli ya Yehova, ezala bazali bato ya mboka nini, ezala bazali babola to bato ya mbongo.​—Matai 24:45.

8. Mpo na nini Yehova atyelaka bato na ye ya sembo motema, mpe yango ezali kopesa bango elikya nini?

8 Kaka ndenge Yehova atikaki nzela ete banguna ya Yesu bányɔkɔla ye, ndenge moko mpe atikaka nzela ete baklisto bányokwama na banguna na bango. Kasi, yango emonisi te ete Nzambe azali kosepela na bango te. Ezali bongo te! Yango emonisi nde ete Yehova azali kotyela bango motema ete bakozala na ngámbo na ye na ntembe monene oyo etali bokonzi ya molɔ́ngɔ́ mobimba. (Yobo 1:8-12; Masese 27:11) Yehova akosundola soki moke te bato oyo bazali sembo epai na ye, “mpo ete [Yehova] alingi sembo; akobatela bayengebene na ye. Akobatela bango seko.”​—Nzembo 37:28.

Motema-boboto mpe bosembo ezali kobatela bango

9, 10. (a) Ndenge nini bosembo ya Yehova ebatelaka basaleli na ye? (b) Ndenge nini Biblia emonisi ete Yehova abatelaka bato na ye ya sembo na nzela ya motema-boboto na ye?

9 Na libondeli na ye oyo ezali na Nzembo 40, Davidi asɛngaki ete motema-boboto mpe bosembo ya Yehova ebatela ye. Bosembo ya Yehova mpe bolingo na ye mpo na boyengebene etindaka ye ayebisa bato mitinda na ye polele. Baoyo batosaka mitinda yango babatelamaka makasi na bampasi, na kobanga, mpe na mikakatano mosusu oyo bato oyo bayebi mitinda yango te bakutanaka na yango. Na ndakisa, soki toboyi komɛla bangi, kolangwa masanga, kozala na basi to mibali kilikili mpe mobulu, tokomibatela biso moko mpe bandeko na biso na ebele ya mikakatano. Ata baoyo batiki nzela ya bosembo ya Yehova, ndenge Davidi asalaki ntango moko boye, basengeli koyeba ete Nzambe azali “ebombelo” ata mpo na bato mabe oyo babongoli motema. Bato yango bakoki mpenza koganga na esengo ete: “Okobatela ngai na mpasi.” (Nzembo 32:7) Ya solo, Nzambe azali mpenza motema-boboto!

10 Ndakisa mosusu ya motema-boboto ya Nzambe ezali ndenge azali koloba na basaleli na ye ete bákabwana na mokili ya mabe, oyo akoboma mosika te. Totángaka boye: “Bólingaka mokili te ná biloko oyo ezali na kati ya mokili. Soki moto azali kolinga mokili, bolingo ya Tata ezali na kati na ye te; mpamba te eloko nyonso oyo ezali na kati ya mokili​—mposa ya mosuni mpe mposa ya miso mpe kolakisa na lolendo biloko na yo ya kobikela—​euti epai ya Tata te, kasi euti na mokili.” Soki tozali kolanda likebisi wana mpe tozali komitambwisa na boyokani na yango, tokobatela mpenza bomoi na biso libela na libela, mpamba te mokapo yango ekobi boye: “Lisusu, mokili ezali koleka mpe ndenge moko mposa na yango, kasi moto oyo azali kosala mokano ya Nzambe azali kotikala libela na libela.”​—1 Yoane 2:15-17.

Babatelami na likoki ya kokanisa, na bososoli mpe na bwanya

11, 12. Limbolá ndenge oyo likoki ya kokanisa, bososoli, mpe bwanya ebatelaka biso.

11 Davidi, mwana ya Salomo akomaki mpo na baoyo balingi ete Nzambe andima bango boye: “[Likoki ya kokanisa, NW ] ekobatela yo mpe bososoli ekosunga yo.” Alobaki lisusu ete: “Zwá [bwanya] . . . Tiká ye te mpe ye akobatela yo, lingá ye mpe ye akokɛngɛla yo.”​—Masese 2:11; 4:5, 6.

12 Tosalelaka likoki ya kokanisa soki tozali komanyola na makambo oyo tozali koyekola na Liloba ya Nzambe. Soki tozali kosala bongo, tokokóma na bososoli mingi mpo tóyebaka kotya makambo eleki ntina na esika ya liboso. Yango ezali na ntina mingi mpamba te, ndenge toyebi yango, makambo mosusu ekómelaki biso mpo toboyaki kopona makambo eleki ntina; to mpo tomikosaki. Mokili ya Satana ezali kotinda bato bákóma na bozwi mingi, bámitombola, mpe báluka bokonzi, nzokande, Yehova azali kolendisa biso tólanda makambo ya elimo, makambo oyo eleki ntina. Soki tomipesi mingi na bamposa ya mokili, yango ekoki kosala ete mabota na biso epanzana, tókabwana na baninga na biso mpe tóbosana mikano ya elimo. Nsukansuka, likambo ya mawa oyo Yesu alobelaki ekoki kokómela biso: “Litomba nini moto azali na yango na kozwa mokili mobimba mpe kobungisa molimo na ye?” (Malako 8:36) Bwanya ezali kosɛnga ete tólanda toli ya Yesu oyo: “Boye, bókoba koluka liboso bokonzi mpe boyengebene na ye, mpe biloko nyonso wana mosusu ekobakisamela bino.”​—Matai 6:33.

Mabe ya kolukaka kaka matomba na biso moko

13, 14. Koluka kaka matomba na yo moko elimboli nini, mpe mpo na nini kosala bongo ezali kozanga mayele?

13 Biso bato tobotamaka na ezaleli ya komilinga. Nzokande, soki moto akómi koluka libosoliboso bolamu na ye moko, yango ekómaka mabe. Na yango, mpo tóbungisa te boninga na biso na ye, Yehova azali kosɛnga biso tóboya ezaleli ya kolukaka kaka matomba na biso moko. Moto oyo alukaka kaka matomba na ye moko amibanzabanzaka kaka mpo na ye moko. Omoni te ete bato mingi lelo oyo bazali mpenza bongo? Kutu, Biblia esakolaki ete “na mikolo ya nsuka” ya ebongiseli mabe ya Satana, “bato bakozala bato oyo bamilingaka bango moko,” to bakobanda koluka kaka matomba na bango moko.​—2 Timote 3:1, 2.

14 Baklisto bayebaka ete ezali na ntina kosalela etinda ya Biblia oyo ezali kosɛnga biso tómibanzabanzaka na makambo ya bamosusu mpe tólingaka bango ndenge tomilingaka biso moko. (Luka 10:27; Bafilipi 2:4) Bato mingi bakoki komona etinda yango lokola likambo oyo ekoki kosalema te, kasi soki tolingi kozala na boyokani na kati ya mabala na biso, na kati ya libota, mpe soki tolingi kofanda malamu na baninga, etinda yango ezali na ntina mingi. Na yango, mosaleli ya Yehova ya solo asengeli soki moke te kotika ete bamposa na ye moko ekonza bomoi na ye mpe epekisa ye kolanda makambo oyo eleki ntina. Na kati ya makambo yango, likambo eleki ntina ezali kotya losambo ya Yehova Nzambe na esika ya liboso.

15, 16. (a) Ezaleli ya koluka kaka matomba na yo moko ekoki kotinda moto asala nini, mpe ndakisa ya banani emonisi likambo yango? (b) Moto oyo awelaka kosambisa baninga asalaka mpenza nini?

15 Ezaleli ya koluka kaka matomba na yo moko ekoki kotinda yo okóma komimona sembo, mpe yango ekoki kosala ete okóma na makanisi mokuse, to okóma kosala makambo oyo ozali na lotomo ya kosala te. Biblia elobi polele boye: “E! moto, ozala nani to nani, ozali kutu na likambo ya koloba te soki osambisaka; mpamba te na likambo oyo yo ozali kosambisa moto mosusu, ozali komikweisa yo moko na yango, mpo yo moto ozali kosambisa ozali mpe na momeseno ya kosala makambo yango.” (Baloma 2:1; 14:4, 10) Bakonzi ya mangomba ya ntango ya Yesu bazalaki komimona sembo; yango wana bazalaki kokanisa ete bazali na lotomo ya kosambisa Yesu ná bayekoli na ye. Na ndenge yango, bamikómisaki bazuzi. Lokola bazalaki komona mabunga na bango moko te, bamikatelaki bango moko bitumbu.

16 Yuda, moyekoli ya Yesu oyo atɛkaki ye, amikómisaki mosambisi ya basusu. Na Betania, ntango Malia ndeko ya Lazalo apakolaki Yesu mafuta ya nsolo kitoko, Yuda ayokaki mabe mpenza. Amonisaki yango na maloba oyo: “Mpo na nini mafuta oyo ya nsolo kitoko etɛkamaki te na badenali nkama misato mpe kopesama na babola?” Kasi, lisolo yango ekobi boye: “Nzokande, soki alobaki bongo, ezalaki te mpo azalaki komitungisa mpo na babola, kasi nde mpo azalaki moyibi mpe azalaki kosimba kesi ya mbongo mpe azalaki kolongola mbongo oyo ezalaki kotyama na kati.” (Yoane 12:1-6) Tókóma soki moke te lokola Yuda to bakonzi ya mangomba, oyo bazalaki kowela kosambisa basusu, kasi bazalaki koyeba te ete bazali nde komisambisa bango moko.

17. Pesá ndakisa moko oyo ezali komonisa ete soki moto azali koluka kaka matomba na ye moko to soki akómi kotuta ntolo, ekosukela ye mabe.

17 Likambo ya mawa, baklisto mosusu ya liboso, atako bazalaki miyibi te lokola Yuda, bakómaki lolendo mpe lofundo. Yakobo akomaki na ntina na bango ete: “Bozali komikumisa na makambo na bino moko ya lolendo.” Abakisaki boye: “Komikumisa nyonso ya ndenge wana ezali mabe.” (Yakobo 4:16) Soki tozali komikumisa mpo na makambo oyo tosali to mpo na mikumba oyo tozali na yango na mosala ya Yehova, ekosukela biso mabe. (Masese 14:16) Tobosani te likambo oyo ekómelaki ntoma Petelo oyo, na ntango moko boye, atutaki ntolo ete: “Ata soki bamosusu nyonso bakobɛta libaku mpo na yo, ngai nakobɛta libaku soki moke te! . . . Ata soki ekosengela nakufa esika moko na yo, nakowangana yo soki moke te.” Soki totali malamu, tozali na eloko moko te oyo tokoki komikumisa na yango. Nyonso oyo tozali na yango ezali kaka mpo na motema-boboto ya Yehova. Soki toyebi yango ndenge wana, tokoki kozala na lolendo te.​—Matai 26:33-35, 69-75.

18. Ndenge nini Yehova atalelaka lolendo?

18 Biblia elobi ete: “Lolendo liboso na kobeba, [enzombo] liboso na kokwea.” Mpo na nini? Yehova apesi eyano oyo: “[Enzombo] mpe ngambo . . . Ngai nayini yango.” (Masese 8:13; 16:18) Tokoki kokamwa te ete Yehova asilikaki mpo “na motema ya lolendo ya mokonzi ya Asulia mpe mpo na [enzombo] ya miso na ye”! (Yisaya 10:12) Yehova apesaki ye etumbu. Mosika te, mokili ya Satana, ná bakonzi na yango ya lolendo, oyo bamonanaka mpe oyo bamonanaka te, bango nyonso bakosamba liboso ya Nzambe. Tólanda soki moke te ezaleli mabe wana ya banguna ya Yehova!

19. Na likambo nini basaleli ya Nzambe bakoki komikumisa, kasi mpo na nini basengeli mpe kozala na komikitisa?

19 Baklisto ya solo basengeli mpenza komikumisa na ndenge bazali basaleli ya Yehova. (Yilimia 9:24) Kasi, basengeli mpe kozala na komikitisa. Mpo na nini? Mpamba te “bato nyonso basali lisumu mpe bazangi nkembo ya Nzambe.” (Baloma 3:23) Nzokande, soki tolingi kotikala kaka basaleli ya Yehova, tosengeli kozala lokola ntoma Paulo oyo alobaki ete “Klisto Yesu ayaki na kati ya mokili mpo na kobikisa basumuki,” mpe abakisaki boye: “Na kati na bango ngai moto ya libosoliboso mpenza.”​—1 Timote 1:15.

20. Ndenge nini Yehova azali kobatela basaleli na ye lelo, mpe ndenge nini akobatela bango na mikolo ezali koya?

20 Lokola basaleli ya Yehova batyaka matomba ya Nzambe liboso na oyo ya bango moko, tokoki mpenza kozala na elikya ete Yehova akokoba kobatela bango na elimo. Tokoki mpe kozala na elikya ete ntango bolɔzi monene ekobanda, Yehova akobatela basaleli na ye, na elimo mpe na mosuni. Ntango kaka bakokɔta na mokili ya sika ya Nzambe, bakoganga ete: “Talá oyo Nzambe na biso; tolambeli ye mpe ye akobikisa biso. Oyo azali [Yehova], tolambeli ye, tiká ete tósepela mpe tóyoka esengo na lobiko na ye.”​—Yisaya 25:9.

Ozali koyeba lisusu?

• Ndenge nini Nzambe abatelaki Mokonzi Davidi ná Yesu Klisto?

• Ndenge nini Yehova azali kobatela basaleli na ye lelo oyo?

• Mpo na nini tosengeli te kolukaka kaka matomba na biso moko?

• Mpo na nini tokoki komikumisa, kasi mpe kozala bato ya komikitisa?

[Bililingi na lokasa 9]

Ndenge nini Yehova abatelaki Davidi ná Yesu?

[Bililingi na lokasa 10, 11]

Ndenge nini Nzambe azali kobatela basaleli na ye na elimo lelo oyo?

[Bililingi na lokasa 12]

Atako tosengeli komikumisa ndenge tozali kosalela Yehova, tosengeli kozala ntango nyonso bato ya komikitisa

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto